Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 50 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Joseph bent over his father's face and wept over him and kissed him. Jozefi amibwakaki na nzoto ya tata na ye, alelaki ye mpe apesaki ye beze.
2 Then Joseph ordered the physicians who served him to embalm his father. So the physicians embalmed Israel. Bongo Jozefi apesaki mitindo na minganga oyo bazalaki kosala epai na ye ete bakawusa nzoto ya Isalaele, tata na ye. Boye minganga bakawusaki nzoto ya Isalaele,
3 Forty days were needed, the usual time for embalming; Egyptians wept for him seventy days. bakokisaki mikolo tuku minei oyo esengelaki mpo na kokawusa nzoto ya mowei. Bato ya Ejipito basalelaki ye matanga mikolo tuku sambo.
4 When his days of mourning passed, Joseph spoke to Pharaoh's household: "If I have found favor with you, please speak to Pharaoh: Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon : — Soki nazwi ngolu na miso na bino, bolobela ngai epai ya Faraon. Boyebisa ye
5 My father made me swear, "I am dying; bury me in the tomb I cut for myself in Canaan." Please let me go up now and bury my father, then I will return." ete tata na ngai alapisaki ngai ndayi : « Nakomi pembeni ya kokufa, bokunda ngai kati na kunda oyo natobolaki na libanga, na mokili ya Kanana. » Mpe sik’oyo, tika ete apesa ngai nzela mpo ete nakende kokunda tata na ngai, bongo na sima nde nakozonga.
6 And Pharaoh said, "Go up and bury your father, as he made you swear." Faraon azongisaki : — Kende mpe kunda tata na yo ndenge alapisaki yo ndayi.
7 Joseph went up to bury his father; with him went all Pharaoh's servants, his household's elders, and all the elders of the land of Egypt, Boye Jozefi akendeki kokunda tata na ye ; bakalaka nyonso ya lokumu ya Faraon bakendeki elongo na ye : bakonzi oyo bazalaki kosala na ndako na ye mpe bakonzi nyonso ya Ejipito
8 and all Joseph's household, his brothers, and his father's household. Only their children, flocks, and herds were left in the land of Goshen. elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango.
9 Chariots also and horsemen went up with him. It was a very great company. Jozefi atambolaki lisusu elongo na bashareti mpe bato oyo batambolaka likolo ya bampunda. Ezalaki mobembo ya bato ebele penza.
10 They came to the threshing floor of Atad, beyond the Jordan, and mourned there with a great, very heavy lament; Joseph observed seven days of mourning for his father. Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye.
11 When the inhabitants of the land, the Canaanites, saw the mourning at the threshing floor of Atad, they said, "This is a bitter mourning by the Egyptians." Therefore the place was named Abel-mizraim; it is beyond the Jordan. Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki : « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani.
12 His sons did for him as he had commanded them. Bana mibali ya Jakobi basalaki ndenge tata na bango atindaki bango.
13 His sons carried him to the land of Canaan and buried him in the cave of the field of Machpelah, which Abraham bought from Ephron the Hittite as a burial site, facing Mamre. Bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya mabanga oyo ezali na elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, elanga oyo Abrayami asombaki epai ya Efroni, moto ya Iti, mpo ete akomisa yango lilita na ye.
14 After burying his father, Joseph returned to Egypt with his brothers and all who had gone up with him to bury his father. Sima na kokunda tata na ye, Jozefi azongaki na Ejipito elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kokunda tata na ye.
15 Joseph's brothers, seeing their father was dead, said, "What if Joseph hates us and repays us for all the harm we did to him?" Tango bandeko mibali ya Jozefi bamonaki ete tata na bango asili kokufa, balobaki : « Tango mosusu Jozefi akoyina biso mpe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalaki ye ! »
16 So they sent a message to Joseph, saying, "Your father gave this command before he died: Boye batindelaki Jozefi maloba oyo : « Liboso ete tata na yo akufa, atikaki maloba oyo : ‹ Tala makambo oyo bokoyebisa Jozefi :
17 Tell Joseph: 'Please forgive your brothers' offense and sin—they did evil to you.' Now please forgive the offense of the servants of the God of your father." Joseph wept when they spoke to him. ‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › » Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki.
18 His brothers also came and fell down before him and said, "Look, we are your servants." Bandeko na ye bayaki, bamibwakaki liboso na ye mpe balobaki : — Tozali bawumbu na yo.
19 But Joseph said to them, "Don't be afraid, for am I in the place of our Father? Kasi Jozefi alobaki na bango : — Bobanga te ! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe ?
20 You meant evil against me, but our Father meant it for good, to save the lives of many people, as is happening today. Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.
21 Now, don't be afraid; I will provide for you and your children." So he comforted them, speaking to their hearts. Yango wana, bobanga te ! Nakokokisa posa na bino mpe ya bana na bino. Akitisaki bango mitema mpe alobelaki bango na boboto nyonso.
22 So Joseph remained in Egypt, he and his father's family. And Joseph lived 110 years. Jozefi avandaki na Ejipito elongo na libota nyonso ya tata na ye. Awumelaki na bomoi mibu nkama moko na zomi.
23 Joseph saw Ephraim's children to the third generation; Machir son of Manasseh's children were also born on Joseph's knees. Amonaki bakitani ya Efrayimi kino na molongo ya misato. Amonaki lisusu bana ya Makiri, mwana mobali ya Manase, ba-oyo babotamaki na mabolongo ya Jozefi.
24 Joseph said to his brothers, "I'm dying, but our Father will surely come to help you and bring you up from this land to the land he swore to Abraham, to Isaac, and to Jacob." Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »
25 Then Joseph made Israel's sons swear: "Our Father will surely come to help you; carry my bones up from here." Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango : « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. »
26 Joseph died at 110 years old. They embalmed him and placed him in a coffin in Egypt. Bongo Jozefi akufaki tango akokisaki mibu ya mbotama nkama moko na zomi. Tango basilisaki kokawusa nzoto na ye, batiaki ye na sanduku na Ejipito.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]