Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 49 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jacob called his sons and said, "Gather, so I can tell you what will happen to you in the days ahead. Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki : — Bosangana mpo ete nakoka koyebisa bino makambo oyo ekokomela bino na mikolo oyo ekoya.
2 Assemble and listen, sons of Jacob; listen to Israel your father. Bosangana mpe boyoka, bana mibali ya Jakobi ! Boyoka oyo tata na bino Isalaele akoloba :
3 Reuben, you are my firstborn, my might and the firstfruits of my strength, excelling in dignity and excelling in power. « Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso, makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai ; oleki na lokumu mpe na nguya.
4 Unstable as water, you will not excel, because you went up to your father's bed; then you defiled it—he went up to my couch. Mobulu lokola mayi, okokende liboso te, pamba te omataki na mbeto ya tata na yo, esika oyo ngai nalalaka, mpe okomisi yango mbindo.
5 Simeon and Levi are brothers; weapons of violence are their swords. Simeoni mpe Levi bazali bandeko, mipanga na bango ezali bibundeli mpo na kotia mobulu.
6 May I never enter their council; may my honor not be joined to their assembly. For in their anger they killed men, and in their willfulness they hamstrung oxen. Molimo na ngai, kosangana te na mabongisi na bango ya kosala mabe ! Lokumu na ngai, kokota te na lisanga na bango ! Pamba te na kanda na bango, babomaki bato ; mpe na esengo na bango, basepelaki kokata misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.
7 Cursed be their anger, for it is fierce, and their wrath, for it is cruel! I will divide them throughout Jacob and scatter them throughout Israel. Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi ! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa ! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.
8 Judah, your brothers will praise you; your hand will be on the neck of your enemies; your father's sons will bow down before you. Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo, loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo ; bana mibali ya tata na yo bakogumbama liboso na yo.
9 Judah is a lion's cub; from the prey, my son, you have come back. He stooped down; he crouched as a lion and as a lioness—who dares rouse him? Yuda, ozali mwana ya nkosi ; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ?
10 The scepter will not depart from Judah, nor the ruler's staff from between his feet, until he comes to whom it belongs, and to him will be the obedience of the peoples. Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.
11 Binding his foal to the vine and his donkey's colt to the choice vine, he has washed his garments in wine and his robes in the blood of grapes. Akokanga ane na ye na nzete ya vino, mpe mwana ya ane na etape oyo ye akopona ; akosukola bilamba na ye na vino ; mpe kazaka na ye, na masanga ya vino ya motane.
12 His eyes are darker than wine, and his teeth whiter than milk. Miso na ye ekozala motane koleka vino, mpe minu na ye ekozala pembe koleka miliki.
13 Zebulun will dwell at the shore of the sea; he will become a haven for ships, and his border will be at Sidon. Zabuloni akowumela pene ya ebale monene, eteni ya mabele na ye ekozala libongo ya masuwa, mpe mabele na ye ekokende kino na Sidoni.
14 Issachar is a strong donkey, crouching between the sheepfolds. Isakari azali ane ya makasi oyo elali kati na mapango mibale.
15 He saw that a resting place was good and that the land was pleasant, so he bent his shoulder to the load and became a servant at forced labor. Amonaki ete bopemi ezali malamu, mpe mokili na ye ezali kitoko ; boye mapeka na ye ekomema mikumba mpe abongi mpo na misala ya bowumbu.
16 Dan will judge his people as one of the tribes of Israel. Dani akokamba bato na ye lokola moko kati na bikolo ya Isalaele.
17 Dan will be a serpent in the road, a viper by the path, that bites the horse's heels so that his rider falls backward. Dani akozala lokola nyoka na balabala to lokola etupa na nzela, oyo eswaka litindi ya mpunda mpo ete motambolisi na yango akweya.
18 I wait for your salvation, my Father. Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai !
19 Gad—raiders will raid him, but he will raid at their heels. Gadi, banguna ebele bakobundisa ye, kasi ye mpe akobundisa bango kino kobengana bango.
20 Asher's food will be rich, and he will yield royal delicacies. Bilei oyo ekobima na mokili ya Aseri ekozala ebele penza ; mabele na ye ekobota biloko oyo ebongi mpo na bakonzi.
21 Naphtali is a doe let loose that bears beautiful fawns. Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi, oyo ebotaka bana kitoko.
22 Joseph is a fruitful branch, a fruitful branch by a spring; his branches run over the wall. Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi, nzete oyo ezalaka pembeni ya etima, mpe oyo bitape na yango elekaka bosanda ya mir.
23 The archers bitterly attacked him, shot at him, and harassed him severely. Banguna batumbolaki ye, babwakelaki ye makonga mpe babundisaki ye ;
24 Yet his bow remained unmoved; his arms were made agile by the hands of the Mighty One of Jacob—our Father—from there comes the Shepherd, the Stone of Israel. kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye, mpe maboko na ye etikalaki kolenga te mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi, oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele.
25 By the God of your father who will help you, by El Shaddai—the Almighty, our Father—who will bless you with blessings of heaven above, blessings of the deep that crouches beneath, blessings of the breasts and of the womb. Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo ! mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo ; na mapamboli ya bozindo, na se ; na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.
26 The blessings of your father are mighty beyond the blessings of my ancestors, reaching to the riches of the everlasting hills. May they be on the head of Joseph, and on the brow of him who was set apart from his brothers. Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya koleka mapamboli ya bangomba ya kala, koleka bomengo ya bangomba mike ya kala ; tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi, ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye !
27 Benjamin is a ravenous wolf, in the morning devouring the prey and at evening dividing the spoil." Benjame azali lokola mbwa ya zamba ; na tongo, apasolaka mosuni na ye ; na pokwa, akabolaka bomengo ya bitumba. »
28 All these are the twelve tribes of Israel; this is what their father said as he blessed them, each with the blessing fitting him. Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.
29 He commanded them: "I am being gathered to my people. Bury me with my fathers in the cave in Ephron the Hittite's field, Jakobi apesaki bango malako oyo : « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti,
30 in the cave in the field at Machpelah, east of Mamre in Canaan, which Abraham bought along with the field from Ephron the Hittite as a burial place. kati na lidusu ya mabanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, na mokili ya Kanana, elanga oyo Abrayami asombaki na Efroni, moto ya Iti, lokola lilita.
31 There they buried Abraham and Sarah his wife; there they buried Isaac and Rebekah his wife; and there I buried Leah, Ezalaki kuna nde bakundaki Abrayami mpe Sara, mwasi na ye ; Izaki mpe Rebeka, mwasi na ye. Ezali kuna nde ngai nakundaki Lea.
32 the field and the cave that is in it were bought from the Hittites. Elanga mpe lidusu ya mabanga oyo ezali kati na yango esombamaki epai ya bato ya Iti. »
33 Jacob finished commanding his sons, drew his feet into the bed, breathed his last, and was gathered to his people." Tango Jakobi asilisaki kopesa malako epai ya bana na ye, asembolaki makolo na ye na mbeto, akataki motema mpe akendeki kokutana na batata na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]