Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the names of Israel's sons who came to Egypt with Jacob, each with his household: Tala bakombo ya bana ya Isalaele oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, moko na moko elongo na libota na ye :
2 Reuben, Simeon, Levi, and Judah, Ribeni, Simeoni, Levi mpe Yuda ;
3 Issachar, Zebulun, and Benjamin, Isakari, Zabuloni mpe Benjame ;
4 Dan and Naphtali, Gad and Asher. Dani mpe Nefitali ; Gadi mpe Aseri.
5 All who descended from Jacob were seventy people; Joseph was already in Egypt. Bakitani ya Jakobi bazalaki bango nyonso tuku sambo. Nzokande Jozefi amizalelaki na Ejipito.
6 Then Joseph died, and all his brothers, and all that generation. Jozefi mpe bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na bato ya ekeke na bango basilaki na kokufa.
7 But Israel's people were fruitful, swarmed, multiplied, and grew immensely strong, till the land was filled with them. Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi : batondisaki mokili ya Ejipito.
8 Now a new king came to power in Egypt, who did not know Joseph. Mokonzi moko ya sika, oyo ayebaki Jozefi te, azwaki bokonzi na Ejipito.
9 He said to his people, "Look, the Israelites are more numerous and powerful than we are. Alobaki na bato na ye : « Botala bana ya Isalaele, bakomi ebele koleka biso mpe baleki biso na makasi.
10 Come, let's deal shrewdly with them, or they'll multiply, and if war comes, they'll join our enemies, fight us, and leave the land." Tosengeli kosala keba mpo na bango, mpo ete bakoma lisusu ebele te. Pamba te soki bitumba ekweyi, bakoki kokende na ngambo ya banguna na biso mpe kobundisa biso mpo ete babima na mokili oyo. »
11 So they set taskmasters over them to crush them with forced labor, building Pharaoh's supply cities: Pithom and Rameses. Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.
12 But the more the Egyptians oppressed them, the more the Israelites multiplied and spread out, until the Egyptians dreaded Israel's people. Kasi wana bazalaki konyokola bango, bazalaki kokoba kaka kobotana mpe kokoma ebele. Bongo bato ya Ejipito bakomaki kobanga bana ya Isalaele.
13 So the Egyptians ruthlessly made the people of Israel work as slaves. Bato ya Ejipito bakotisaki bana ya Isalaele na bowumbu ya makasi
14 They made their lives bitter with hard labor in mortar and brick and all kinds of field work. In all their harsh labor the Egyptians worked them ruthlessly. mpe bakomaki konyokola bango na misala makasi : kosala potopoto, kobeta babiliki mpe kosala misala nyonso ya bilanga. Misala nyonso oyo bazalaki kosalisa bango ezalaki ya pasi mpe ya makasi.
15 Then the king of Egypt said to the Hebrew midwives, one named Shiphrah and the other Puah, Mokonzi ya Ejipito alobaki na basi oyo babotisaka basi ya Ba-Ebre, oyo bakombo na bango ezalaki Shifra mpe Puwa :
16 "When you assist the Hebrew women in childbirth, watch at the birthstool: if it's a son, kill him; but if a daughter, let her live." « Tango bokobotisa basi ya Ba-Ebre, botala soki mwana nini abotami ; soki azali mwana mobali, boboma ye ; kasi soki azali mwana mwasi, botika ye na bomoi. »
17 But the midwives feared our Heavenly Father and did not do as Egypt's king commanded them; they let the boys live. Kasi basi oyo babotisaka babangaki Nzambe mpe basalaki te makambo oyo mokonzi ya Ejipito atindaki bango kosala ; batikaki bana mibali na bomoi.
18 So the king of Egypt called the midwives and said to them, "Why have you done this, letting the boys live?" Boye mokonzi ya Ejipito abengisaki basi oyo babotisaka mpe atunaki bango : — Mpo na nini bosali boye ? Mpo na nini botiki bana mibali na bomoi ?
19 The midwives told Pharaoh, "Hebrew women aren't like Egyptian women—they're vigorous, giving birth before the midwife arrives." Basi oyo babotisaka bazongiselaki Faraon : — Basi ya Ba-Ebre bazali lokola basi ya Ejipito te. Bazali makasi, babotaka liboso ete basi oyo babotisaka bakoma.
20 So our Father was good to the midwives, and the people multiplied and grew very strong. Nzambe asalaki bolamu epai ya basi oyo babotisaka. Boye bana ya Isalaele bakobaki kaka kokoma ebele mpe makasi koleka.
21 And because the midwives feared our Father, he gave them households of their own. Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.
22 Then Pharaoh commanded all his people, "Throw every son born to the Hebrews into the Nile, but let every daughter live." Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]