Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the days of Amraphel king of Shinar, Arioch king of Ellasar, Chedorlaomer king of Elam, and Tidal king of Goiim, Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi,
2 these kings warred against Bera king of Sodom, Birsha king of Gomorrah, Shinab king of Admah, Shemeber king of Zeboiim, and the king of Bela (that is, Zoar). bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari.
3 All these joined forces in the Valley of Siddim (that is, the Dead Sea). Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo.
4 For twelve years they had served Chedorlaomer, but in the thirteenth year they rebelled. Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye.
5 In the fourteenth year Chedorlaomer and his allied kings came and defeated the Rephaim in Ashteroth-karnaim, the Zuzim in Ham, the Emim in Shaveh-kiriathaim, Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ;
6 and the Horites in their hill country of Seir, to El-paran on the edge of the wilderness. bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe.
7 They turned back to En-mishpat (that is, Kadesh) and struck the whole territory of the Amalekites, and also the Amorites living in Hazazon-tamar. Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
8 The king of Sodom, the king of Gomorrah, the king of Admah, the king of Zeboiim, and the king of Bela (that is, Zoar) marched out and drew up battle lines against them in the Valley of Siddim, Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi
9 against Chedorlaomer king of Elam, Tidal king of Goiim, Amraphel king of Shinar, Arioch king of Ellasar—four kings against five. mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano.
10 The Valley of Siddim was full of tar pits. The kings of Sodom and Gomorrah fled, and some of them fell there, and the rest fled to the hills. Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo ; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba.
11 The four kings took all the goods of Sodom and Gomorrah, and all their food, and left. Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia.
12 They also took Abram's nephew Lot and his possessions and left, for Lot lived in Sodom. Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome.
13 A man who had escaped reported this to Abram the Hebrew, living by the oaks of Mamre the Amorite, brother of Eshcol and Aner—Abram's allies. Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.
14 When Abram heard his relative was captured, he led out the 318 trained men born in his household and pursued them as far as Dan. Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.
15 That night he split his forces, he and his servants, attacked them, and chased them to Hobah, north of Damascus. Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi.
16 He brought back all the goods, and also recovered his relative Lot and his possessions, plus the women and the people. Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu.
17 After Abram returned from defeating Chedorlaomer and his allied kings, the king of Sodom came to meet him in the Valley of Shaveh (the King's Valley). Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba.
18 Melchizedek king of Salem brought out bread and wine. He was priest of El Elyon, our Father Most High. Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo
19 He blessed Abram and said: "Blessed be Abram by El Elyon, our Father Most High, Creator of heaven and earth. mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami !
20 And blessed be El Elyon, our Father Most High, who has delivered your enemies into your hand." Then Abram gave him a tenth of everything. Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
21 The king of Sodom said to Abram, "Give me the people, and take the goods for yourself." Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami : — Pesa ngai bato, kamata na yo biloko.
22 But Abram told the king of Sodom, "I have raised my hand in a solemn oath to our Father, El Elyon, Most High, Creator of heaven and earth, Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili,
23 that I will take nothing of yours, not a thread or a sandal strap, so you can never say, 'I made Abram rich.' ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. »
24 Nothing for me—only what the young men ate, and shares for Aner, Eshcol, and Mamre, who went with me. Let them take theirs." Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]