Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After these things, our Father's word came to Abram in a vision: "Don't fear, Abram. I'm your shield, your very great reward." Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli : — Kobanga te, Abrami ! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene.
2 But Abram said, "My Sovereign Father, what will you give me, since I'm childless, and my heir is Eliezer of Damascus?" Kasi Abrami azongisaki : — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai.
3 Abram said, "You've given me no offspring; a servant born in my house will inherit from me." Abrami alobaki lisusu : — Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai !
4 The word of our Father came to him: "This man won't be your heir; a son from your own body will be your heir." Yawe alobaki na ye : — Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo.
5 He brought him outside and said, "Look at the sky and count the stars, if you're able." Then he said, "So will your descendants be." Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
6 Abram believed our Father, and our Father credited it to him as righteousness. Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo.
7 He said to him, "I am your Father, who brought you from Ur of the Chaldeans to give you this land to possess." Alobaki na ye lisusu : — Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo.
8 But Abram said, "My Sovereign Father, how can I know that I will take possession of it?" Kasi Abrami alobaki : — Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai ?
9 He said to him, "Take me a three-year-old heifer, goat, and ram, a turtledove, and a young pigeon." Yawe alobaki na ye : — Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
10 Abram brought all these to him, cut them in half, and set each half opposite the other; but did not cut the birds. Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu ; kasi akataki bandeke te.
11 When birds of prey came down on the carcasses, Abram drove them away. Bandeke oyo eliaka misuni ekitaki mpo na kolia misuni yango, kasi Abrami abenganaki yango.
12 As the sun set, deep sleep fell on Abram, and great terror and darkness fell over him. Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye.
13 Then our Father told Abram, "Be certain: your descendants will live as foreigners in a land not theirs, enslaved and oppressed 400 years. Boye, Yawe alobaki na Abrami : — Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei.
14 I will also judge the nation they serve, and afterward they will come out with great wealth. Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele.
15 You will go to your fathers in peace, buried at a good old age. Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo.
16 In the fourth generation they will return here, for the Amorites' guilt is not yet complete." Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.
17 After sunset, in the dark, a smoking firepot and blazing torch appeared and passed between the pieces. Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama.
18 That day our Father covenanted with Abram: "I give your descendants this land, from Egypt's river to the great river, the Euphrates, Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate :
19 the land of the Kenites, the Kenizzites, the Kadmonites, mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni,
20 the Hittites, the Perizzites, the Rephaites, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi,
21 the Amorites, the Canaanites, the Girgashites, and the Jebusites." ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]