Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ephesians 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 For this reason I, Paul, the prisoner of Christ Jesus on behalf of you Gentiles, Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano—
2 assuming you've heard of the stewardship of our Father's grace given to me for you, Solo, boyokaki ete Nzambe apesaki ngai mosala ya ngolu na Ye mpo na bino
3 how the mystery was made known to me by revelation, as I have briefly written above. mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba.
4 When you read this, you can perceive my insight into the mystery of Christ, Tango bokotanga maloba yango, bokokoka kososola mayele na ngai kati na mabombami yango oyo etali Klisto.
5 which was not known to people in past generations, but now revealed by the Spirit to his holy apostles and prophets, Molimo ayebisaki mabombami yango te na bato ya bikeke ya kala, ndenge alakisi yango sik’oyo na bantoma mpe basakoli ya Nzambe oyo bazali bule.
6 that the Gentiles are heirs together, members of the same body, and partners together in the promise, in Christ Jesus, through the gospel. Mabombami yango ezali boye : Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko.
7 I became this gospel's servant through the gift of our Father's grace, given to me by his power at work. Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai lokola likabo na nzela ya nguya na Ye, nakoma mosali ya Sango Malamu.
8 Though I am the very least of all saints, this grace was given me: to preach Christ's boundless riches to the Gentiles, Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ;
9 and show everyone the mystery's plan, hidden for ages in our Father who created all things, apesa ngai mpe ngolu ya kosunga bato nyonso mpo ete basosola ndenge nini Nzambe akokisaka mabombami oyo ezalaki wuta kala ya kobombama kati na Ye, Mokeli na nyonso,
10 so that through the church, the many-sided wisdom of our Father might now be made known to rulers and authorities in the heavens. na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,
11 This was according to the eternal purpose that he accomplished in Christ Jesus our Lord, kolanda mabongisi oyo asala wuta kala mpe akokisa kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
12 in whom we have boldness and confident access through faith in him. Kati na Yesu-Klisto mpe na nzela ya kondima na biso kati na Ye, tozali na elikya ya kopusana na bonsomi nyonso pene ya Nzambe.
13 So I ask you: don't lose heart over my suffering for you—it's your glory. Lisusu, nazali kosenga na bino ete bobungisa mpiko na bino te likolo ya pasi oyo ngai nazali komona mpo na bino, pamba te ezali nde nkembo na bino.
14 For this reason I bow my knees before the Father, Yango wana nafukamaka liboso ya Tata
15 from whom every family in heaven and on earth takes its name, oyo apesaka bomoi na mabota nyonso kati na Likolo mpe awa na mabele,
16 that from the wealth of his glory he would strengthen you with power through his Spirit, in your deepest self, mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,
17 so that Christ may live in your hearts through faith, and you, rooted and grounded in love, mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo,
18 may, with all God's holy people, have strength to grasp the width and length and height and depth, mpo ete bozwa nguya ya kososola elongo na basantu nyonso monene, molayi, mokuse mpe bozindo ya bolingo ya Klisto,
19 and know Christ's love, beyond knowledge, so you may be filled with all the fullness of our Father. mpe mpo ete bozwa nguya ya koyeba bolingo yango ya Klisto, oyo eleki boyebi nyonso, na tina ete botondisama kino na bofuluki nyonso ya Nzambe.
20 To our Father, able to do far beyond all we ask or imagine, by the power working in us. Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso,
21 Glory to him in the church and in Christ Jesus, through all generations, forever and ever. Amen. tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela ! Amen.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]