Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ephesians 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 And you were dead in your wrongdoing and sins, Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino,
2 in which you once walked, following this world's ways, following the ruler who wields power over the air, the spirit now working among the disobedient. oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe.
3 Among them we all once lived in our flesh's desires, doing what flesh and mind craved, and were by nature children of wrath, like everyone else. Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.
4 But our Father, being rich in mercy, because of the great love with which he loved us, Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene,
5 though we were dead in our sins, made us alive together with Christ—by grace you have been saved, atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…
6 raised us up with him and seated us with him in the heavens in Christ Jesus, Kati na Yesu-Klisto, Nzambe asekwisaki biso elongo na Klisto mpe avandisaki biso elongo na Ye na bisika ya Likolo
7 so that in the ages to come he might display his grace's overflowing riches in kindness toward us in Christ Jesus. mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso.
8 For by grace you have been saved through faith—not your own doing; it is the gift of our Father. Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe—
9 Not from works, so that no one may boast. ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa.
10 We are his handiwork, created in Christ Jesus for good works our Father prepared beforehand for us to walk in them. Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
11 So remember: you Gentiles in the flesh were once called "uncircumcised" by those called "circumcised," a mark made in flesh by hand. Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino ; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato.
12 Remember that then you were without Christ, excluded from Israel's community, strangers to the covenants of promise, with no hope and without our Father in the world. Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.
13 But now in Christ Jesus, you once far off have been brought near by the blood of Christ. Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto.
14 For he himself is our peace, who made the two one, tearing down in his flesh the dividing wall of hostility, Solo, azali Ye moko kimia na biso : atiaki bomoko kati na Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, akweyisaki mir ya bonguna oyo ezalaki kokabola bango,
15 destroying in his flesh the law of commands and decrees, to create the two in himself into one new humanity, making peace, alongolaki Mobeko elongo na mitindo mpe malako na yango mpo na kokela, kati na Ye moko, moto ya sika na nzela ya Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, na kotia kimia,
16 and reconcile both to our Father in one body through the cross, thereby killing the hostility. mpe mpo na koyokanisa, kati na nzoto se moko, masanga nyonso mibale elongo na Nzambe na nzela ya ekulusu oyo abomaki na yango bonguna oyo ezalaki kati na bango.
17 He came and announced peace to you far off, and peace to those near. Ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino oyo bozalaki mosika, mpe kimia epai na bato oyo bazalaki pene.
18 For through him we both have access in one Spirit to our Father. Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko.
19 So you are no longer strangers and foreigners, but you are fellow citizens with the saints and members of our Father's household. Boye bozali lisusu te bapaya to baleki nzela, kasi bozali nde bankolo mboka elongo na basantu, bozali mpe bato ya libota ya Nzambe.
20 Built on the foundation of the apostles and prophets, Christ Jesus himself being the cornerstone, Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.
21 in whom the whole structure, joined together, grows into a holy temple in the Lord, Kati na Yesu-Klisto, ndako mobimba esangani malamu mpe ezali kokola mpo ete ekoma Tempelo ya bule kati na Nkolo.
22 in him, you also are being built together into a home for our Father in the Holy Spirit. Mpe kati na Ye, bino mpe bozali kotongama lisanga mpo ete bokoma Ndako oyo Nzambe avandaka kati na yango na nzela ya Molimo na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]