Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ephesians 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Paul, an apostle of Christ Jesus by our Father's will, to the saints in Ephesus, and faithful in Christ Jesus: Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe ; Epai ya basantu mpe bandimi ya Yesu-Klisto, oyo bazali kati na Efeso :
2 Grace to you and peace from our Father and the Lord Jesus Christ. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
3 Blessed be the Father of our Lord Jesus Christ, who blessed us in Christ with every spiritual blessing in the heavens. Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.
4 Just as he chose us in him before the world's founding, to be holy and blameless before our Father in love. Pamba te, kati na Klisto, apona biso liboso ete akela mokili, mpo ete tozala bato ya bule mpe bazanga pamela na miso na Ye. Kati na bolingo na Ye,
5 He predestined us to be his own sons through Jesus Christ, according to the good pleasure of his will. abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,
6 To the praise of his glorious grace, freely given to us in the Beloved—Jesus. mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.
7 In him, through his blood, we have redemption—forgiveness of our sins—by the riches of our Father's grace, Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe
8 which he lavished upon us, in all wisdom and insight. oyo akabolelaki biso yango na bofuluki, na kopesa biso bwanya mpe bososoli nyonso,
9 He revealed to us his will's mystery, his good pleasure planned in Christ, mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, mabombami oyo abongisa kati na Klisto kolanda bolamu na Ye,
10 a plan for the fullness of the times: to unite all things in Christ—things in heaven and on earth—in him. mpo na kokokisa yango na tango ya suka : kosangisa kati na Klisto bikelamu nyonso oyo ezali kati na Likolo mpe oyo ezali na mabele.
11 In him we also were made heirs, destined beforehand by our Father's purpose, who works out everything according to his will's counsel, Kati na Klisto, Nzambe aponaki biso lisusu mpo ete tokitana na libula na biso, kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, kolanda makanisi ya mokano na Ye,
12 so that we who first put our hope in Christ might bring praise to his glory. mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.
13 In him you also, when you heard the truth's word—your salvation's gospel—and believed in him, were sealed with the promised Holy Spirit, Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo, Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto ; mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe
14 who guarantees our inheritance until we possess it, to the praise of his glory. lokola ndanga ya libula na biso kino basikolami na Ye bakangolama mpo na kosanzola nkembo na Ye.
15 So I, hearing of your faith in the Lord Jesus and your love for all the saints, Yango wana, wuta tango nayokaki sango ya kondima na bino kati na Nkolo Yesu mpe bolingo na bino mpo na basantu nyonso,
16 I never stop giving thanks for you, remembering you in my prayers, nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe mpo na bino, nakanisaka bino na mabondeli na ngai
17 that the Father of our Lord Jesus Christ, the Father of glory, may give you the Spirit of wisdom and revelation, so you may know our Father more fully, mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.
18 the eyes of your hearts enlightened, so you may know the hope of his calling, and the riches of his glorious inheritance in our Father's people, Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,
19 and the vast greatness of his power toward us who believe, matching the working of his mighty strength, mpe monene makasi ya nguya na Ye mpo na biso oyo tozali na kondima. Abimisaki nguya yango na makasi na yango nyonso
20 that he worked in Christ, raising Jesus from the dead and seating him at his right hand in the heavenly realms. mpe asalelaki yango kati na Klisto tango asekwisaki Ye kati na bakufi mpe avandisaki Ye na ngambo ya loboko na Ye ya mobali kati na Likolo,
21 Far above every rule and authority and power and dominion, and every name ever named, not only in this age but also in the one to come. na likolo ya milimo nyonso, ya bokonzi nyonso, ya nguya nyonso, ya bokasi nyonso, mpe ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, na tango oyo kaka te kasi mpe na tango oyo ekoya.
22 And our Father put everything under Christ's feet and gave him as head over everything to the church, Nzambe atia nyonso na se ya matambe ya Yesu mpe apona Yesu mpo ete akonza nyonso lokola Mokonzi ya Lingomba
23 which is his body, the fullness of him who fills all in all. oyo ezali nzoto na Ye. Nzambe oyo atondisaka nyonso kati na bato nyonso amimonisaka kati na Yesu, na mobimba ya bonzambe na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]