Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Moses called all Israel and said to them: "Listen, Israel, to the statutes and rulings I speak in your hearing today. Learn them and carefully do them." Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki : « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango.
2 Our Father made a covenant with us at Horeb. Yawe, Nzambe na biso, asalaki boyokani elongo na biso elongo na ngomba Orebi.
3 This covenant our Father made not with our ancestors but with us—all of us alive here today. Yawe asalaki te boyokani oyo na bakoko na biso kasi asalaki yango nde na biso, biso nyonso oyo tozali na bomoi awa na mokolo ya lelo.
4 Our Father spoke with you face to face at the mountain, from within the fire. Yawe alobaki na bino kati na moto likolo ya ngomba ndenge moto alobanaka na moto miso na miso.
5 At that time I stood between our Father and you to tell you our Father's word, because you feared the fire and did not go up the mountain. He said: Na tango wana, natelemaki kati ya Yawe mpe bino mpo na koyebisa bino maloba na Yawe, pamba te bozalaki kobanga moto mpe bomataki te likolo ya ngomba. Tala maloba oyo alobaki :
6 "I am your Father, who brought you out of Egypt, the house of slavery. ‹ Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.
7 "You must have no other gods before me. Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai.
8 "Don't make yourself a carved image, any form of what's in the heavens above, on the earth below, or in the waters under the earth. Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.
9 Do not bow to them or serve them, for I, your Father, am a jealous Father, charging the fathers' wrongdoing to the children, to the third and fourth generation of those who hate me, Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.
10 but showing covenant love to 1,000 generations of those who love me and keep my commandments. Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.
11 "Do not misuse your Father's name, for our Father will not leave anyone who misuses his name unpunished. Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.
12 "Observe the Sabbath day, to keep it holy, as your Father commanded you. Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo yango.
13 Six days you are to labor and do all your work, Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba.
14 but the seventh day is a Sabbath to your Father. Do no work—you, your son or daughter, your male or female servant, your ox, donkey, or any livestock, or the foreigner in your towns—so your male and female servants may rest like you. Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te, ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, ngombe na yo, ane na yo, ebwele moko kati na bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo, mpo ete mosali na yo ya mobali mpe mwasi mosali na yo ya mwasi bakoka kopema ndenge yo ozali kopema.
15 Remember you were a slave in Egypt, and your Father brought you out from there with a strong hand and outstretched arm. So your Father commanded you to keep the Sabbath day. Kanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito, mpe Yawe, Nzambe na bino, abimisaki bino kuna na loboko na Ye ya nguya mpe na loboko na Ye ya kosembolama. Yango wana, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete otosa mokolo ya Saba.
16 "Honor your father and your mother, as your Father commanded you, so your days are long and it goes well with you in the land your Father is giving you. Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
17 "You must not murder. Okobomaka te.
18 "You must not commit adultery. Okosalaka ekobo te.
19 "You must not steal. Okoyibaka te.
20 "You must not give false testimony against your neighbor. Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.
21 "Don't crave your neighbor's wife. Don't desire your neighbor's house, field, male or female servant, ox, donkey, or anything your neighbor owns." Okolulaka te mwasi ya moninga na yo ; okolulaka te ndako ya moninga na yo, elanga na ye, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. › »
22 These words our Father spoke to your whole assembly at the mountain, from within the fire, cloud, and deep darkness, in a loud voice; he added nothing more. He wrote them on two stone tablets and gave them to me. Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi ; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.
23 When you heard the voice from the darkness, the mountain blazing with fire, you came to me—all your tribal heads and elders, Tango boyokaki mongongo kobima kati na molili, wana ngomba ezalaki kopela moto, bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bampaka na bino bayaki epai na ngai.
24 and you said, "Look, our Father showed us his glory and greatness; we heard his voice from the fire. Today we saw our Father speak with a person, and that person still lives. Balobaki : « Yawe, Nzambe na biso, alakisi biso nkembo na Ye mpe lokumu na Ye ; mpe toyoki mongongo na Ye wuta na moto. Lelo, tomoni ete moto akoki kozala na bomoi ata soki Nzambe asololi na ye.
25 Now why should we die? This great fire will consume us. If we keep hearing our Father's voice any longer, we die. Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye ? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso.
26 Who of all humanity has heard the living Father's voice speaking from inside the fire, like us, and lived? Pamba te nani kati na mokili akoki koyoka mongongo ya Nzambe na bomoi koloba kati na moto ndenge biso toyokaki bongo atikala na bomoi ?
27 Go near, hear all our Father says, then tell us all our Father tells you, and we will listen and obey." Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba ; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo ; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. »
28 Our Father heard your words to me, and our Father told me: "I heard this people's words to you. All they said is right. Yawe ayokaki bino tango boyebisaki ngai mpe alobaki na ngai : « Nayoki makambo oyo bato oyo balobi na yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu.
29 If only they kept this heart—fearing me and keeping all my commands always—so it goes well with them and their children forever! Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango !
30 Go and tell them, 'Return to your tents.' Kende, yebisa bango : ‹ Bozonga na bandako na bino. ›
31 But you, stand here with me, and I will tell you the whole command—the statutes and judgments—you are to teach them, so they will do them in the land I am giving them to possess." Kasi yo, vanda awa elongo na Ngai mpo ete napesa yo mibeko nyonso, bikateli nyonso, mpe mitindo nyonso oyo okoteya bango mpo ete basalela yango kati na mokili oyo nakopesa bango lokola libula. »
32 So be careful to do as your Father commanded you; do not turn aside right or left. Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino ; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu.
33 Walk the whole way your Father commanded, to live, thrive, and last long in the land you will possess. Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]