Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now, Israel, listen to the statutes and rules I am teaching you to follow, so you may live and go take possession of the land your Father, the God of your ancestors, is giving you. Sik’oyo Isalaele, yoka malamu mitindo mpe mibeko oyo nalingi koteya yo. Salela yango mpo ete ozala na bomoi mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na yo, apesi yo.
2 Do not add to the word I command you, or take from it, so you keep the commandments of your Father that I command you. Kobakisa eloko moko te na oyo natindi yo mpe kolongola eloko moko te kati na yango, kasi tosa mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo.
3 Your own eyes saw what your Father did at Baal-peor: he destroyed from among you every man who followed the Baal of Peor. Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori : abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori.
4 But you who held fast to your Father, the LORD, are all alive today. Kasi bino oyo bokangamaki na Yawe, Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi na mokolo ya lelo.
5 See, I taught you statutes and rules, as your Father commanded me, to do them in the land you are entering to possess. Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.
6 Keep and do them; this is your wisdom and understanding before the nations, who will hear all these decrees and say, 'This great nation is truly a wise and understanding people.' Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi ; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango ; mpe bakoganga : « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. »
7 What great nation has a god as near to it as your Father is to us whenever we call on him? Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye ?
8 What great nation has statutes and rules as just as all this law I set before you today? Mpe ekolo nini mosusu ya monene, oyo ekoki kozala na mitindo mpe mibeko ya sembo lokola Mobeko oyo natie lelo liboso na bino ?
9 Only be careful and watch yourself closely, so you do not forget what your eyes have seen, and they do not leave your heart all your days. Make them known to your children and your children's children. Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.
10 Remember the day you stood before your Father at Horeb, when he told me, "Gather the people to me, and I will let them hear my words, so they learn to fear me all the days they live on the earth, and teach their children." Kanisa mokolo oyo otelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na Orebi tango Yawe alobaki na ngai : « Sangisa bato oyo liboso na Ngai mpo na koyoka maloba na Ngai, mpo ete bakoka koyeba kopesa Ngai lokumu tango nyonso bakozala na mokili oyo mpe bakoka koteya yango na bana na bango. »
11 You came near and stood at the mountain's foot while it burned with fire to the heart of heaven—wrapped in darkness, cloud, and deep gloom. Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.
12 Your Father spoke to you from within the fire. You heard the sound of words but saw no form—only a voice. Yawe alobelaki bino wuta na moto ; boyokaki lokito ya maloba na ye kasi bomonaki ata nzoto te ; mongongo kaka nde ezalaki koyokana.
13 He declared his covenant to you, commanding you to keep it—the Ten Words—and wrote them on two stone tablets. Atalisaki bino boyokani na Ye, mibeko zomi oyo bosengeli kosalela, mpe akomaki yango na bitando mibale ya mabanga.
14 And your Father commanded me then to teach you statutes and rules to follow in the land you are crossing to possess. Na tango wana kaka, Yawe atindaki ngai koteya bino bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela na mokili oyo bokokende mpo na kozwa yango.
15 So watch yourselves very carefully, since you saw no form the day your Father spoke to you at Horeb from the fire, Bongo, bomisenzela malamu, pamba te bomonaki nzoto te na mokolo oyo Yawe alobelaki bino na ngomba Orebi wuta na moto.
16 be careful not to act corruptly by making a carved image for yourselves, in the form of any figure, the likeness of male or female, Bomibebisa te na kosala ekeko, elilingi ya mwasi to ya mobali,
17 the likeness of any animal on the earth, the likeness of any winged bird that flies in the sky, ya nyama nyonso ya mokili to ya ndeke nyonso oyo epumbwaka na likolo,
18 the likeness of anything that creeps on the ground, of any fish in the water below the earth. ya ekelamu nyonso oyo etambolaka na libumu to ya mbisi nyonso oyo etiolaka na se ya mayi.
19 And do not lift your eyes to the heavens and, seeing the sun, moon, and stars—all the host of heaven—be drawn away to bow to them and serve them, which your Father allotted to all peoples under the whole heaven. Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.
20 Your Father took you and brought you out of Egypt, the iron furnace, to be his own people, his inheritance, as you are today. Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo.
21 Now your Father was angry with me because of you and swore I would not cross the Jordan or enter the good land your Father is giving you to inherit. Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.
22 I must die in this land; I will not cross the Jordan. But you are crossing to take that good land. Nakokufa na mokili oyo mpe nakokatisa Yordani te ; kasi bino, etikali moke bokatisa mpe bokamata mokili oyo ya kitoko.
23 Be careful not to forget the covenant your Father made with you, and make a carved image in the form of anything your Father has forbidden you. Bozala na bokebi mpe bobosana te boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki elongo na bino. Mpe bomisalela ekeko te na lolenge nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apekisaki.
24 For your Father is a consuming fire, a jealous Father. Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali moto oyo ezikisaka, azali Nzambe na zuwa.
25 When you have children and grandchildren and have grown old in the land, if you act wickedly by making a carved image in the form of anything, and do what is evil in your Father's sight, provoking him to anger, Tango bokozala na bana mpe bakoko, mpe bokowumela tango molayi na mokili, soki bokosami mpe bosali ekeko ya lolenge nyonso, soki bosali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na bino, soki botumboli kanda na Ye,
26 today I call heaven and earth to witness against you: you'll soon perish completely from the land you cross the Jordan to possess. Your days there will be few; you'll be totally wiped out. soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;
27 Your Father will scatter you among the peoples, and you will be left few in number among the nations where your Father drives you. Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino.
28 There you will serve gods of wood and stone, the work of human hands, that cannot see, hear, eat, or smell. Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te.
29 But from there you will seek your Father and find him, if you search for him with all your heart and soul. Kasi soki, wuta na mokili wana, boluki Yawe, Nzambe na bino, bokomona Ye soki boluki Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.
30 When you are in distress and all these things come upon you in later days, you will return to your Father and obey his voice. Tango bokozala na mawa mpe pasi nyonso oyo ekokomela bino, sima na mikolo, bokozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotosa Ye.
31 Your Father is a merciful Father; he will not abandon you, destroy you, or forget the covenant he swore to your ancestors. Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya mawa, akosundola bino te, akobebisa bino te mpe akobosana te boyokani oyo asala na bakoko na bino tango alapaki ndayi.
32 Look back over the days long past, since our Father created humanity on the earth, and ask from one end of heaven to the other: has anything this great ever happened or been heard of? Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili ; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na suka moko kino na suka mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana.
33 Has any people heard a god's voice speaking from within fire, as you have, and lived? Boni, ezali na bato bayoka mongongo ya Nzambe kolobela bango kati na moto ndenge bino boyokaki mpe botikali na bomoi ?
34 Or has any god dared to take a nation out of another nation for himself, by trials, signs, wonders, war, a mighty hand, an outstretched arm, and great terrors, according to all that your Father did for you in Egypt before your eyes? Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?
35 It was shown to you, so you would know our Father is the Father; there is no other besides him. Omonaki makambo nyonso wana mpo oyeba ete Yawe kaka nde azali Nzambe, mosusu azali te.
36 From heaven he made you hear his voice to discipline you; on earth he showed you his great fire, and you heard his words from within the fire. Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo ; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto.
37 Because he loved your ancestors and chose their descendants after them, he brought you out of Egypt himself, by his great power, Lokola alingaki bakoko na yo mpe aponaki bakitani na bango, abimisaki yo na Ejipito na nguya na Ye mpe na makasi na Ye ya monene
38 driving out before you nations greater and stronger than you, to bring you in and give you their land as an inheritance, as it is today. mpo na kobengana liboso na yo bikolo minene mpe ya makasi koleka yo mpe kokotisa yo na bamboka na bango mpo na kopesa yo yango lokola libula ndenge yango ezali na mokolo ya lelo.
39 Know today, and take it to heart, that our Father is the Father in heaven above and on the earth below; there is no other. Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te.
40 Keep his statutes and commandments, which I command you today, so it goes well with you and your children after you, and you live long in the land your Father gives you for all time. Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.
41 Then Moses set apart three cities in the region beyond the Jordan toward the sunrise, Moyize aponaki bingumba misato na ngambo ya este ya Yordani,
42 so anyone who killed his neighbor unintentionally, without having hated him before, could flee to one of these cities and live: mpo ete moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nko te, na kozanga koyina ye liboso, akoka kokimela na moko kati na bingumba yango mpe akoka kobikisa bomoi na ye.
43 Bezer in the wilderness on the plateau for the Reubenites, Ramoth in Gilead for the Gadites, and Golan in Bashan for the Manassites. Tala bingumba yango : Mpo na libota ya Ribeni, engumba Betseri kati na etando ya esobe ; mpo na libota ya Gadi, engumba Ramoti ya Galadi, mpe mpo na libota ya Manase, engumba Golani kati na Bashani.
44 This is the law that Moses set before the people of Israel. Tala Mobeko oyo Moyize atiaki liboso ya bana ya Isalaele :
45 These are the testimonies, statutes, and rules Moses spoke to Israel when they came out of Egypt. Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito ;
46 East of the Jordan, in the valley opposite Beth-peor, in the land of Sihon the Amorite king who lived in Heshbon, whom Moses and Israel defeated after leaving Egypt. mpe tango bazalaki na lubwaku etalana na Beti-Peori, na ngambo ya este ya Yordani, kati na mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni oyo Moyize mpe bana ya Isalaele balongaki tango babimaki na Ejipito.
47 They took possession of his land and the land of Og king of Bashan, the two Amorite kings who lived beyond the Jordan toward the sunrise, Bazwaki mokili na ye mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani. Bakonzi nyonso mibale bazalaki bato ya Amori mpe bakonzaki na ngambo ya este ya Yordani.
48 from Aroer on the edge of the Arnon Valley to Mount Sion (that is, Hermon), Bana ya Isalaele bavandaki na etando oyo ebandaki na Aroeri, na ngomba Arinoni kino na ngomba Sirioni oyo babengi Erimoni ;
49 with all the Arabah beyond the Jordan eastward, to the Sea of the Arabah, below the slopes of Pisgah. bakisa Araba nyonso na este ya Yordani kino na ebale monene ya Araba, na ebandeli ya ngomba Pisiga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]