Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Colossians 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Masters, give your slaves what's right and fair—you too have a Master in heaven. Bino bankolo, bosungaka bawumbu na bino na nzela ya biloko ya sembo mpe ya solo, pamba te boyebi malamu ete bino mpe bozali na Mokonzi kati na Likolo.
2 Devote yourselves to prayer, staying alert in it with thanksgiving. Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.
3 Pray for us too, that our Father would open a door for us to share the message, to declare Christ's mystery, for which I'm also in chains, Bobondelaka mpe mpo na biso, na tina ete Nzambe apesa biso mabaku ya koteya Sango Malamu mpo na kosakola mabombami ya Klisto. Mpe ezali mpo na mabombami yango nde ngai nazali mokangami kati na boloko.
4 that I may make it clear, as I ought to speak. Bobondelaka Nzambe mpo ete nasakola yango na polele nyonso, ndenge nasengeli penza kosala.
5 Walk in wisdom toward outsiders, making the most of every opportunity. Botambolaka na bwanya liboso ya bato oyo bazali bandimi te mpe bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu.
6 Always speak with grace, seasoned with salt, knowing how to answer each one. Tika ete maloba na bino etondaka tango nyonso na boboto mpe na elengi, mpo ete boyeba ndenge nini koyanola moto nyonso.
7 Tychicus, our dear brother, faithful servant, and fellow slave in the Lord, will tell you all about me. Tishike, ndeko molingami, mosali ya sembo mpe moninga na ngai kati na mosala ya Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso oyo etali ngai.
8 I sent him to you for this purpose: that you may know our circumstances, and he may encourage your hearts, Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na biso mpe alendisa bino.
9 with Onesimus, the faithful, dear brother, one of you. They will tell you everything here. Azali koya elongo na Onezime, ndeko molingami na biso ya solo, oyo azali moko kati na bino. Bakoyebisa bino makambo nyonso oyo ezali koleka awa.
10 Aristarchus, my fellow prisoner, and Mark, Barnabas's cousin, greet you—you received instructions about him: welcome him if he comes to you, Arisitarke, moninga na ngai kati na boloko, atindeli bino mbote. Boyamba mpe mbote ya Malako, ndeko ya Barnabasi, oyo na tina na ye napesaki bino mitindo ete, soki ayei epai na bino, boyamba ye malamu.
11 and Jesus, called Justus—the only Jews among my co-workers for our Father's kingdom; they have comforted me. Yesu oyo babengaka Jistisi atindeli bino mbote. Kati na Bayuda oyo bakomaki Baklisto, kaka bango nde bazali kosala elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bazali mpo na ngai kobondisama mobimba.
12 Epaphras, one of you, a servant of Christ Jesus, greets you, always struggling for you in prayer, so you may stand mature and fully assured in everything our Father wills. Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe.
13 I can say he's worked hard for you, those in Laodicea, and Hierapolis. Nazali kotatola solo mpo na ye ete azali kosala mosala makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko ya Iyerapolisi.
14 Luke, the beloved doctor, greets you, and so does Demas. Monganga Luka, molingami na biso, mpe Demasi batindeli bino mbote.
15 Greet the brothers and sisters in Laodicea, and Nympha and the church in her house. Bopesa mbote epai ya bandeko ya Laodise, epai ya Nefa mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka kati na ndako na ye.
16 When this letter is read among you, have it read in the Laodicean church too, and read the one from Laodicea as well. Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala ete etangama mpe kati na Lingomba ya Laodise ; bongo bino mpe botanga oyo ekowuta na Laodise.
17 And tell Archippus, "Make sure you complete the ministry you have received in the Lord." Boloba na Arshipe : « Sala keba na lotomo oyo ozwaki kati na Nkolo mpo ete okokisa yango malamu. »
18 I, Paul, write this greeting with my own hand. Remember my chains. Grace be with you. Ngai Polo, napesi bino mbote na kokoma yango na maboko na ngai. Bobosanaka te ete nazali mokangami kati na boloko. Tika ete ngolu ezala na bino !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]