Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Peter 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 False prophets arose among the people, just as false teachers will arise among you. They will secretly bring in destructive heresies, even deny the Master who bought them, and bring swift destruction on themselves. Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino ; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.
2 Many will follow their lust, and because of them the way of truth will be slandered. Bato ebele bakolanda bango kati na mobulu na bango, mpe nzela ya bosolo ekofingama likolo na bango.
3 In their greed they'll exploit you with made-up words. Their judgment, decreed long ago, isn't idle; their ruin isn't asleep. Kati na lokoso na bango, bakobetela bino masolo ya lokuta mpo na kobenda bino mbongo na nzela ya maloba ya sukali. Nzokande, wuta kala, Nzambe akatela bango etumbu oyo ekoki mpo na bango, mpe libebi ezali penza kozela bango.
4 For if our Father did not spare angels who sinned, but threw them into the deepest pit of gloom, chained in darkness, kept for judgment; Soki Nzambe azangaki te kopesa na ba-anjelu oyo basalaki masumu etumbu kasi abwakaki bango ya kokangama na minyololo kati na molili makasi ya lifelo epai wapi abombi bango mpo na kozela mokolo ya kosambisama,
5 if he didn't spare the ancient world, but protected Noah, an announcer of righteousness, with seven others, when he brought a flood on the wicked world; soki ayokelaki te mokili ya kala mawa kasi abikisaki bato mwambe oyo kati na bango ezalaki na Noa oyo azalaki kosakola bosembo na tango ya mpela oyo abebisaki na yango mokili elongo na bato oyo batosaki Ye te,
6 and if he condemned Sodom and Gomorrah, reducing their cities to ashes, as an example of what awaits the wicked; soki Nzambe apesaki na bingumba ya Sodome mpe Gomore etumbu na nzela ya moto oyo ezikisaki yango kino ekomaki putulu mpo na kopesa ndakisa ya etumbu oyo ekokweyela bato ya masumu
7 and if he rescued righteous Lot, worn out by the shameless behavior of lawless people. kasi akangolaki Loti, moto ya sembo, oyo atondaki na mawa kati na motema na ye likolo na mobulu ya bato wana ya mabe,
8 That righteous man, living among them, was tormented day after day in his righteous soul by the lawless deeds he saw and heard, (pamba te moto oyo ya sembo azalaki kovanda kati na bango mpe, mokolo na mokolo, azalaki komitungisa makasi kati na motema na ye mpo na mabe oyo azalaki komona mpe koyoka),
9 then our Father knows how to rescue the godly from trials, and keep the wicked under punishment until judgment day. elingi koloba ete Nkolo azali na makoki ya kokangola bayengebene kati na komekama mpe ya kopesa, na mokolo ya kosambisama, etumbu epai ya bato mabe.
10 Especially those chasing flesh's corrupt desires and despising authority—bold, arrogant, unafraid to slander celestial beings. Akopesa mingi-mingi etumbu epai ya ba-oyo, mpo na lokoso na bango ya makambo ya mbindo, batambolaka kolanda baposa mabe ya nzoto mpe batiolaka bokonzi ya Nkolo. Lokola bateyi yango ya lokuta batondi na lolendo mpe bamimonaka lokola bakoka na nyonso, babangaka te kofinga bikelamu ya nkembo ;
11 Whereas angels, greater in strength and power, don't bring a slanderous judgment against them before our Father. nzokande ba-anjelu, ba-oyo baleki kutu bango na makasi mpe na nguya, bamekaka kutu te kobimisa, liboso ya Nkolo, maloba ya kofinga bikelamu wana ya nkembo.
12 But these people, like unreasoning animals born by instinct to be caught and destroyed, insult what they don't understand, and will be destroyed in their destruction, Kasi bango, bateyi ya lokuta, lokola banyama oyo ezanga mayele, oyo etambolaka na bonyama, oyo ebongisama mpo ete bato bakanga yango na mitambo mpe baboma yango, bafingaka oyo bayebi te. Mpo na yango, bakokufa lokola banyama,
13 suffering wrong as pay for wrongdoing. They count it a pleasure to revel in broad daylight. They are stains and flaws, reveling in their deceptions while feasting with you. bakozwa lifuti oyo ebongi na mabe na bango. Basepelaka kosala makambo ya soni na moyi makasi. Na lokuta na bango, basepelaka kosambwisa mpe kobebisa lokumu na bino tango basanganaka elongo na bino mpo na mayangani.
14 Their eyes are full of adultery, never stopping from sin, luring unstable souls, hearts trained in greed—cursed children! Miso na bango elembaka te kolula basi mpo na koluka kosala na bango ekobo, balembaka te kosala masumu, bakosaka bato oyo balendisama malamu te na kondima ; bazali na mitema etonda na lokoso : bazali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe.
15 Abandoning the straight path, they went astray, following the way of Balaam son of Beor, who loved the wages of wrongdoing. Sima na bango kotika nzela ya solo, bapengwaki mbala moko na kolanda nzela ya Balami, mwana mobali ya Beori, oyo alingaki lifuti ya mabe ;
16 But he was corrected for his own wrongdoing: a mute donkey spoke with a human voice and stopped the prophet's madness. kasi Nzambe apamelaki ye mpo na bozangi botosi na ye, atiaki maloba ya bomoto kati na monoko ya ane ya mwasi, mpe nyama yango oyo elobaka te esukisaki bozoba ya mosakoli.
17 These are dry springs, storm-driven mists—thick darkness is kept for them. Bateyi yango ya lokuta bazali lokola bitima oyo ebimisaka lisusu mayi te to lokola mapata oyo mopepe makasi etindikaka. Nzambe abombela bango esika kati na molili makasi.
18 With inflated, empty words they lure through the sensual desires of the flesh those barely escaping from people living in error. Pamba te, mpo na kosepelisa baposa mabe ya banzoto na bango, basalelaka maloba ya sukali mpe ezanga tina mpo na kopengwisa bato oyo bawuti kobongola mitema sika wana bawuti kokabwana na bato oyo babikaka kati na libunga.
19 They promise them freedom, while themselves enslaved to corruption—for whatever overcomes a person enslaves them. Balakaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali bawumbu ya baposa mabe ya nzoto, oyo ememaka bango na libebi ; pamba te moto nyonso azali mowumbu ya oyo ekonzaka ye.
20 For if, having escaped the world's corruption through knowing our Lord and Savior Jesus Christ, they are entangled in it again and overcome, their end is worse than their start. Soki, sima na bango kokabwana na mbindo ya mokili, mpo ete bayebi Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, bamizongisi lisusu na bowumbu ya mbindo yango, bomoi na bango ekokoma mabe koleka ndenge ezalaki liboso.
21 It would have been better for them never to know the way of righteousness than to know it and turn back from the holy commandment given to them. Elingaki kozala malamu mingi mpo na bango koyeba te nzela ya bosembo, na esika ete, sima na bango koyeba nzela ya bosembo, basundola mibeko ya bule oyo epesamelaki bango.
22 The true proverb has happened to them: "A dog returns to its vomit," and "A washed sow returns to wallow in mud." Ezaleli na bango elongisi bosolo ya masese oyo : « Mbwa ezongelaka biloko oyo yango moko esanzi » mpe « Ngulu oyo basukoli ezongelaka kotambola kati na potopoto. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]