Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Peter 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Simon Peter, servant and apostle of Jesus Christ, to those given a faith as precious as ours through the righteousness of our God and Savior Jesus Christ: Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :
2 May grace and peace be multiplied to you through knowing our Father and Jesus our Lord. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki, na nzela ya koyeba Nzambe mpe Yesu, Nkolo na biso !
3 His divine power gave us all we need for life and devotion to God, through knowing him who called us by his glory and excellence. Nzambe apesaki biso, na nzela ya nguya na Ye ya bonzambe, nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika bomoi ya botosi kati na makambo ya Nzambe mpe mpo na kokangama na Ye ; asalaki yango na kopesa biso boyebi ya Ye oyo abenga biso mpo ete tosangana na nkembo mpe na bolamu na Ye.
4 Through these he gave us his precious and very great promises, so that through them you may share the divine nature, having escaped the world's corruption from evil desires. Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.
5 So, making every effort, add goodness to your faith, and to goodness, knowledge; Mpo na yango, bosala makasi mpo na kobakisa na likolo ya kondima na bino, bolamu ; na likolo ya bolamu, boyebi ;
6 to knowledge, self-control; to self-control, endurance; to endurance, devotion to God, na likolo ya boyebi, komikanga ; na likolo ya komikanga, mpiko ; na likolo ya mpiko, botosi kati na makambo ya Nzambe ;
7 to devotion to God, brotherly affection; to brotherly affection, love. na likolo ya botosi kati na makambo ya Nzambe, bondeko ya solo ; mpe na likolo ya bondeko ya solo, bolingo.
8 If you have these qualities, growing, they'll keep you from being useless or fruitless in knowing our Lord Jesus Christ. Pamba te soki bozali na bizaleli oyo ya malamu kati na bino mpe botondi na yango, ekosala ete bozala basali ya goyigoyi te mpe bokola makasi na boyebi ya Nzambe na biso mpe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
9 Whoever lacks these things is blind, shortsighted, forgetting he was cleansed from his past sins. Kasi moto nyonso oyo azangi yango amonaka mosika te, azali lokola mokufi miso ; abosani ete basila kopetola ye, wuta kala, na masumu na ye.
10 So, brothers and sisters, strive to confirm your calling and election; do these things and you will never stumble. Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino ; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.
11 This way you'll be richly given entrance into the eternal kingdom of our Lord and Savior Jesus Christ. Na bongo, bokoyambama malamu kati na Bokonzi ya seko ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso.
12 So I will always remind you of these things, though you know them and stand firm in the truth you now hold. Boye, nakobanda kozongisaka yango tango nyonso na makanisi na bino, atako boyebi yango malamu mpe bokangami makasi na bosolo oyo bozali na yango sik’oyo.
13 I think it right to keep stirring you with reminders while I remain in this tent, Namoni ete ezali malamu mpo na ngai kolamusa makanisi na bino awa nazali nanu na bomoi kati na ndako ya kapo ya nzoto oyo ;
14 since I know I'll soon set my tent aside, as our Lord Jesus Christ showed me. pamba te nayebi malamu ete, kala mingi te, nakokabwana na nzoto yango, ndenge Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ayebisaki ngai yango.
15 I will also strive so you can always recall these things after I depart. Nzokande, nakosala makasi mpo ete bozalaka tango nyonso na makoki ya kokanisaka yango, ezala nasila na ngai kokende.
16 For we didn't follow ingenious myths to tell you of our Lord Jesus Christ's power and coming—we were eyewitnesses of his majesty. Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye.
17 He received honor and glory from our Father when a voice came to him from the Majestic Glory: "This is my Son, the one I love; I delight in him." Pamba te Nzambe Tata apesaki Ye lokumu mpe nkembo, tango mongongo kowuta na nkembo monene ya Nzambe elobaki na Ye : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
18 We ourselves heard this voice come from heaven, for we were with him on the holy mountain. Mpe, biso moko, tango tozalaki elongo na Ye na likolo ya ngomba ya bule, toyokaki mongongo yango kowuta na Likolo.
19 We also have the prophetic word made more certain—you do well to attend to it, like a lamp shining in a dark place, until day dawns and the morning star rises in your hearts. Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.
20 Above all, you must understand that no prophecy of Scripture comes from one's own interpretation. Liboso na nyonso, boyeba malamu ete moko te, na mayele na ye moko, akoki kolimbola maloba ya basakoli, oyo ezali kati na Makomi,
21 No prophecy ever came by human will, but men spoke from our Father, carried along by the Holy Spirit. pamba te maloba yango ya basakoli eyaki te na nzela ya mokano ya moto, kasi ezali Molimo Mosantu nde atindikaki bato na koloba kowuta na Nzambe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]