Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Elisha had told the woman whose son he revived, "Rise, go, you and your household, and stay wherever you can, for our Father has called for the famine, coming on the land seven years." Elize alobaki na mama ya mwana mobali oyo asekwisaki : « Kende elongo na libota na yo na esika oyo bokoki kovanda, pamba te Yawe abengi nzala makasi kati na mokili oyo ; ekowumela mibu sambo. »
2 The woman rose, did as the man of our Father said, and went, she and her household, to live in Philistine land seven years. Mwasi asalaki ndenge moto na Nzambe alobaki. Ye elongo na libota na ye bakendeki mpe bavandaki mibu sambo na mokili ya Filisitia.
3 After seven years the woman returned from Philistia and went to plead with the king for her house and land. Tango mibu yango sambo ekokaki, mwasi azongaki na mboka na ye wuta na mokili ya Filisitia ; akendeki epai ya mokonzi mpo ete bazongisela ye ndako mpe mabele na ye.
4 The king was talking with Gehazi, servant of the man of our Father: "Tell me all the great things Elisha has done." Mokonzi azalaki kosolola na Geazi, mosali ya moto na Nzambe, mpe alobaki : « Yebisa ngai makambo minene nyonso oyo moto na Nzambe, Elize, asalaki. »
5 While Gehazi was telling the king how Elisha revived the dead, the woman whose son he revived came crying to the king for her house and field. Gehazi said, "My lord the king, this is the woman, and this is her son Elisha revived." Wana Geazi azalaki koyebisa mokonzi ndenge nini Elize asekwisaki ebembe ya mwana oyo akufaki, mama ya mwana yango ayaki kobondela mokonzi ete azongisa ndako mpe mabele na ye. Geazi alobaki : « Mokonzi, nkolo na ngai, tala mwasi oyo mpe mwana na ye ya mobali oyo Elize asekwisaki. »
6 The king asked the woman, and she explained. So he assigned her one official: "Restore everything of hers, plus all the field's produce from the day she left the land until now." Mokonzi atunaki na mwasi yango mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Na sima, mokonzi aponaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe apesaki ye mitindo : « Zongisela ye biloko na ye nyonso mpe bambuma nyonso ya bilanga oyo mabele na ye ebotaki wuta mokolo oyo alongwaki na mboka na biso kino lelo. »
7 Elisha came to Damascus. Ben-hadad king of Aram, being sick, was told, "The man of God has come here." Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba,
8 The king told Hazael, "Take a gift, go meet the man of God, and ask the LORD through him: Will I recover from this sickness?" mokonzi alobaki na Azaeli : « Kamata likabo mpe kende kokutana na moto na Nzambe. Tuna Yawe na nzela ya moto na Nzambe : ‹ Boni, nakobika solo na bokono oyo ? › »
9 Hazael went to meet him, taking a gift of all Damascus's good things, forty camel-loads. He stood before Elisha: "Your son Ben-hadad king of Aram sent me to ask, 'Will I recover from this illness?'" Azaeli akendeki kokutana na Elize, amemaki elongo na ye likabo ya biloko nyonso ya Damasi ; bamemaki yango na likolo ya bashamo tuku minei. Azaeli akitaki, atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Mwana na yo ya mobali Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, atindi ngai ; atuni : « Boni, nakobika solo na bokono oyo ? »
10 Elisha said, "Go tell him, 'You will surely recover,' but our Father showed me he will certainly die." Elize azongisaki : — Loba na ye : « Solo, okobika na bokono oyo. » Nzokande, Yawe amonisi ngai ete akokufa.
11 He held his gaze until Hazael was ashamed. Then the man of our Father wept. Elize atalaki ye malamu-malamu, mpe Azaeli ayokaki soni. Mpe moto na Nzambe alelaki.
12 "Why does my lord weep?" Hazael asked. He answered, "Because I know the harm you'll do to Israelites: burn their fortresses, kill their young men with the sword, dash their little ones to the ground, and rip open their pregnant women." Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.
13 Hazael replied, "What is your servant, a mere dog, that he should do this great thing?" Elisha answered, "Our Father has shown me you will become king over Aram." Azaeli akamwaki mpe azongisaki : — Mpo na nini okosala makambo ya boye na mosali na yo ? Ata kutu mbwa eleki ngai na tina ! Elize alobaki lisusu : — Yawe amonisi ngai ete okokoma mokonzi ya Siri.
14 Hazael left Elisha and returned to his master, who asked, "What did Elisha say?" He replied, "He told me you would surely recover." Azaeli atikaki Elize mpe azongaki epai ya mokonzi na ye. Bongo mokonzi na ye atunaki ye : — Elize alobi na yo nini ? Azongisaki : — Alobi na ngai : « Solo, okobika na bokono oyo. »
15 Next day, Hazael took the thick cloth, dipped it in water, spread it over the king's face, and he died. Hazael reigned instead. Mokolo oyo elandaki, Azaeli azwaki bulangeti, azindisaki yango na mayi, mpe afinikaki na yango elongi ya mokonzi mpo na kokanga ye pema ; mpe mokonzi akufaki. Azaeli akitanaki na ye na bokonzi.
16 In year five of Ahab's son Joram, Israel's king, when Jehoshaphat was king of Judah, Jehoshaphat's son Jehoram began reigning as Judah's king. Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mitano na bokonzi —Jozafati azalaki mokonzi ya Yuda— Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
17 He was thirty-two years old when he became king, and he reigned eight years in Jerusalem. Azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi.
18 He followed the ways of Israel's kings, as Ahab's house did, for he had married Ahab's daughter. And he did what was evil in the eyes of our Father. Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana na ye ya mwasi.
19 Yet our Father would not destroy Judah, for David his servant's sake, as he promised to give a lamp to David and to his sons forever. Kasi Yawe alingaki te kobebisa Yuda mpo na Davidi, mowumbu na Ye, pamba te alakaki kopesa bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye mpo na libela.
20 In his days Edom rebelled against the rule of Judah and set up its own king. Na tango ya Yorami, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi.
21 Joram crossed to Zair with all his chariots, rose by night, struck the Edomites surrounding him and the chariot commanders, but the troops fled to their tents. Boye Yorami akendeki na Tsayiri elongo na bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar ; kasi basoda ya Yuda bakimaki na bandako na bango ya kapo.
22 To this day Edom has rebelled against Judah's rule. Libnah rebelled at the same time. Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokaki.
23 The rest of Joram's acts, everything he did—aren't they written in the Book of the Chronicles of the Kings of Judah? Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yorami mpe misala na ye nyonso ekomami na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
24 Joram died, buried with his fathers in the City of David; his son Ahaziah reigned in his place. Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
25 In Joram son of Ahab king of Israel's twelfth year, Ahaziah son of Jehoram king of Judah began ruling. Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Yorami, akomaki mokonzi ya Yuda.
26 Ahaziah became king at twenty-two; he reigned one year in Jerusalem. His mother Athaliah was granddaughter of Omri king of Israel. Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri, mokonzi ya Isalaele.
27 He walked the way of Ahab's house, did evil in our Father's eyes like Ahab's house, since he was son-in-law to Ahab's house. Alandaki nzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki na libota ya Akabi.
28 He went with Joram son of Ahab to fight Hazael king of Aram at Ramoth-gilead, where Arameans wounded Joram. Akazia akendeki elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Bato ya Arami bazokisaki Yorami.
29 King Joram went back to Jezreel to heal from wounds the Arameans dealt him at Ramah, fighting Hazael king of Aram. Ahaziah son of Jehoram, king of Judah, went down to see the wounded Joram son of Ahab at Jezreel. Boye, mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli mpo na kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]