Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Elisha the prophet called one of the sons of the prophets: "Tuck your cloak into your belt, take this flask of oil, and go to Ramoth-gilead. Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye : « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi.
2 On arrival, find Jehu son of Jehoshaphat, son of Nimshi. Go in, get him up from his companions, and take him to a back room. Tango okokoma kuna, luka Jewu, mwana mobali ya Jozafati mpe koko ya Nimishi. Kende epai na ye, benda ye pembeni, mosika ya baninga na ye, mpe mema ye na shambre ya kati.
3 Take the oil flask, pour it on his head, and say, 'This is what our Father says: I anoint you king over Israel.' Open the door, flee—don't delay." Bongo okozwa molangi, okosopa mafuta na moto na ye mpe okoloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › Sima, okofungola ekuke mpe okokima ; kozela te ! »
4 So the young man, the prophet's servant, went to Ramoth-gilead. Boye elenge mobali, mosakoli, akendeki na Ramoti ya Galadi.
5 On arrival, the army commanders sat together. "I have a message for you, commander," he said. "For which of us?" Jehu asked. "For you, commander." Tango akomaki, akutaki bakonzi ya mampinga bavandi kati na lisanga. Alobaki : — Nazali na sango mpo na yo mokonzi. Jewu atunaki : — Mpo na nani kati na biso ? Mosakoli azongisaki : — Mpo na yo mokonzi.
6 Jehu got up and went inside. The young man poured the oil on his head, saying, "This is what our Father, the God of Israel, says: 'I anoint you king over my people, over Israel. Jewu atelemaki mpe akotaki na ndako. Bongo mosakoli apakolaki mafuta na moto ya Jewu mpe alobaki : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe. ›
7 Strike down the house of Ahab your master, so I may avenge on Jezebel the blood of my servants the prophets and of all who serve me. Osengeli koboma libota ya Akabi, mokonzi na yo, mpe nakozongisa mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na ngai, basakoli, mpe ya bawumbu nyonso ya Yawe, oyo Jezabeli asopaki makila na bango.
8 Ahab's whole house will die. I'll cut off from Ahab every male in Israel, slave or free. Solo, libota nyonso ya Akabi esengeli kokufa. Nakosilisa mibali nyonso kati na Isalaele, ezala mowumbu to monsomi.
9 I will make Ahab's house like Jeroboam son of Nebat's and like Baasha son of Ahijah's. Nakosala libota ya Akabi ndenge nasalaki libota ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe libota ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya.
10 As for Jezebel, dogs will eat her in the plot at Jezreel, with no one to bury her.' " Then he opened the door and fled. Nzokande mpo na Jezabeli, bambwa ekolia ye kati na bilanga ya Jizireyeli, mpe moto moko te akokunda ye. » Boye mosakoli afungolaki ekuke mpe akimaki.
11 Jehu went out to his master's officers. One asked, "All well? Why did this madman come to you?" "You know the man and his kind of talk," he said. Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye : — Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ? Jewu azongisaki : — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka.
12 "That's a lie!" they said. "Tell us." He said, "He told me: 'This is what our Father says: I anoint you king over Israel.'" Bakonzi ya basoda balobaki : — Ezali ya solo te, ozali kokosa biso ! Yebisa biso makambo yango. Jewu alobaki : — Boyoka ndenge alobi na ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napakoli yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › »
13 They hurried, each taking his cloak and spreading it under him on the bare steps. They blew the trumpet and shouted, "Jehu is king!" Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »
14 Jehu son of Jehoshaphat, son of Nimshi, conspired against Joram, who with all Israel had guarded Ramoth-gilead against Hazael king of Aram, Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri.
15 but King Joram had gone back to Jezreel to heal from wounds the Arameans gave him fighting Hazael king of Aram. So Jehu said, "If you agree, let no one escape the city to report it in Jezreel." Kasi mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na bitumba na Azaeli, mokonzi ya Siri. Jewu alobaki : « Soki yango ezali makanisi na bino, tika ete moto moko te akima mpe abima na engumba mpo na kokende kopesa sango na Jizireyeli. »
16 Jehu mounted his chariot and rode to Jezreel, where Joram lay. Ahaziah king of Judah had come down to see him. Boye Jewu amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli mpo ete Yorami azalaki kopema kuna ; mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala ye.
17 When the watchman on Jezreel's tower saw Jehu's company coming, he called, "I see a company of men." "Get a horseman," Joram ordered. "Send him to meet them and ask, 'Is it peace?'" Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! » Yorami apesaki mitindo : — Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango : « Boni, boyei mpo na kimia ? »
18 The horseman rode to Jehu: "The king asks, 'Is it peace?'" "What's peace to you?" said Jehu. "Fall in behind me." The watchman reported, "The messenger reached them but isn't returning." Soda oyo abundaka likolo ya mpunda akendeki mpe atunaki : — Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Boni, boyei mpo na kimia ? » Jewu azongisaki : — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai. Mokengeli alobaki : — Motindami akomi epai na bango, kasi azali kozonga te.
19 The king sent a second horseman. He reached them: "The king asks, is it peace?" Jehu replied, "What's peace to you? Fall in behind me." Boye mokonzi atindaki soda mosusu oyo abundaka likolo ya mpunda. Tango akomaki epai na bango, alobaki : — Boni, boyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai.
20 The watchman reported, "He reached them but isn't returning. The driving is like Jehu son of Nimshi's—he drives like a madman." Mokengeli alobaki : — Motindami akomi penza epai na bango, kasi ye mpe azali kozonga te. Nzokande, lolenge oyo ya kotambolisa ezali lokola ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo atambolisaka lokola moto ya liboma.
21 "Hitch up my chariot," Joram ordered. Ready, Israel's King Joram and Judah's King Ahaziah each drove out in his own chariot to meet Jehu, meeting him on Naboth the Jezreelite's field. Yorami apesaki mitindo : « Bongisa shar na ngai. » Tango babongisaki shar, Yorami, mokonzi ya Isalaele, mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, babimaki, moto na moto likolo ya shar na ye, mpo na kokende kokutana na Jewu. Bakutanaki na ye kati na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli.
22 Seeing Jehu, Joram asked, "Peace, Jehu?" He replied, "What peace, while your mother Jezebel's countless prostitutions and witchcraft continue?" Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?
23 Joram wheeled around and fled, calling out to Ahaziah, "Treachery, Ahaziah!" Yorami abalukaki mpe akimaki ; abelelaki Akazia : « Akazia, bateki biso ! »
24 Jehu drew his bow with full strength and struck Joram between the shoulders. The arrow pierced his heart, and he sank down in his chariot. Boye Jewu abendaki tolotolo mpe abetaki Yorami na kati-kati ya mapeka. Tolotolo etobolaki motema na ye, mpe akweyaki wuta na shar na ye.
25 Jehu told his officer Bidkar, "Lift him and throw him on the plot of Naboth the Jezreelite's field. Remember, when you and I rode together behind his father Ahab, our Father laid this oracle on him: Jewu alobaki na Bidikari, soda oyo amemelaka ye bibundeli : « Kamata ye mpe bwaka ye na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. Kanisa ndenge nini ngai na yo tozalaki kokumba bashar elongo, na sima ya tata na ye, Akabi, tango Yawe apesaki lisakoli oyo na tina na ye :
26 'Surely I saw Naboth's blood and his sons' blood yesterday, declares our Father, and I will repay you on this very plot.' Now pick him up and throw him on that plot, as the word of our Father said." ‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.
27 Ahaziah king of Judah saw this and fled up the Beth-haggan road. Jehu chased him, ordering, "Shoot him too!" They struck him in the chariot on the climb to Gur near Ibleam, but he escaped to Megiddo and died there. Tango Akazia, mokonzi ya Yuda, amonaki makambo oyo esalemaki, akimaki na nzela ya Beti-Agani. Jewu alandaki ye mpe agangaki : « Boma ye mpe lokola ! » Bazokisaki ye kati na shar na ye na nzela ya Guri, pembeni ya Yibileayimi, kasi akimaki na Megido mpe akufaki kuna.
28 His servants drove him by chariot to Jerusalem and buried him in his tomb with his ancestors in the City of David. Basali na ye bamemaki ye na shar kino na Yelusalemi mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na kunda na ye kati na engumba ya Davidi.
29 (In Joram son of Ahab's eleventh year, Ahaziah became king over Judah.). Akazia akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Yorami, mwana mobali ya Akabi.
30 Jehu came to Jezreel. Jezebel heard, painted her eyes, fixed her hair, and looked out the window. Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda.
31 As Jehu came through the gate, she asked, "Is it peace, you Zimri, murderer of your master?" Tango Jewu akotaki na ekuke ya engumba, Jezabeli atunaki na koganga : — Zimiri, mobomi ya nkolo na yo, boni, oyei mpo na kimia ?
32 He looked up at the window and shouted, "Who's with me? Who?" Two or three eunuchs looked out at him. Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.
33 "Throw her down!" Jehu said. So they threw her down, and some of her blood spattered the wall and the horses as they trampled her. Jewu apesaki bango mitindo : — Bobwaka ye na se. Bongo babwakaki Jezabeli na se ; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye.
34 Jehu went in, ate and drank, then said, "See to this cursed woman and bury her; she was a king's daughter." Jewu akotaki, aliaki, amelaki mpe alobaki : « Bobongisa mwasi oyo alakelama mabe. Bokunda ye, pamba te azali mwana mwasi ya mokonzi. »
35 Going to bury her, they found only the skull, feet, and palms of her hands. Kasi tango babimaki mpo na kokunda ye, bakutaki kaka mokuwa ya moto na ye, makolo mpe matandu ya maboko na ye.
36 They went back and told Jehu. He said, "This is our Father's word through his servant Elijah the Tishbite: 'In the plot at Jezreel dogs will eat Jezebel's flesh. Bazongaki mpe bayebisaki Jewu : « Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya, moto ya mboka Tishibe : ‹ Bambwa ekolia nzoto ya Jezabeli kati na elanga ya Jizireyeli.
37 Jezebel's body will lie like manure on the field at Jezreel, so none can say, "This is Jezebel."'" Ebembe ya Jezabeli ekozala lokola nyei kati na bilanga ya Jizireyeli mpo ete moto moko te akoka lisusu koloba : Tala Jezabeli ! › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]