Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Elisha said, "Hear the word of our Father. This is what our Father says: By this time tomorrow, seven quarts of fine flour will sell for four ounces of silver, and fourteen quarts of barley for four ounces of silver, at the gate of Samaria." Elize alobaki : — Boyoka Liloba na Yawe ! Tala makambo oyo Yawe alobi : « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
2 Then the officer on whose arm the king leaned answered the man of our Father, "Look, even if our Father opened windows in the heavens, could this happen?" Elisha replied, "You will see it with your own eyes, but you will not eat any of it." Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi ya Isalaele azalaki kotiela motema alobaki na moto na Nzambe : — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? Elize azongisaki : — Okomona yango na miso na yo, kasi okolia yango te.
3 Four men with a skin disease were at the gate entrance, and said to each other, "Why sit here until we die? Na ekuke ya engumba, ezalaki na bato minei na maba. Bazalaki kolobana bango na bango : « Mpo na nini totikala awa kino tokokufa ?
4 If we say, 'Let's enter the city,' the famine is there, and we die. If we stay here, we die too. So come, let's go over to the Aramean camp. If they spare us, we live; if they kill us, we die." Soki tolobi : ‹ Tokota na engumba, › nzala makasi ezali kuna, tokokufa. Soki mpe totikali awa, tokokufa kaka. Boye, tika ete tokende na molako ya bato ya Siri mpe tomipesa epai na bango. Soki bayambi biso, tobiki ; kasi soki babomi biso, tokufi kaka. »
5 So at twilight they rose to go to the Aramean camp. Reaching its edge, they found no one there. Na pokwa, batelemaki mpe bakendeki na molako ya bato ya Siri. Tango bakomaki na mondelo ya molako, bamonaki ata moto moko te,
6 For the Sovereign Father had made the Aramean army hear the sound of chariots and horses, the sound of a great army, so they said to one another, "Look, the king of Israel has hired the kings of the Hittites and of Egypt to attack us!" pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango : « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. »
7 So they got up and fled at twilight, leaving their tents, horses, and donkeys. They left the camp as it was and fled for their lives. Boye batelemaki mpe bakimaki na pokwa, basundolaki bandako na bango ya kapo, bampunda na bango mpe ba-ane na bango. Batikaki molako ndenge ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bango.
8 When these men with the skin disease reached the camp's edge, they entered one tent, ate and drank, then carried off silver, gold, and clothing and hid them. They returned, entered another tent, took things from it, and hid those too. Bato na maba bakomaki na mondelo ya molako, bakotaki na ndako moko ya kapo, baliaki mpe bamelaki. Bongo bamemaki palata, wolo, bilamba, mpe bakendeki kobomba yango. Sima, bazongaki, bakotaki na ndako mosusu ya kapo, bazwaki kuna biloko mpe bakendeki lisusu kobomba yango.
9 They said to each other, "We're not doing right. This is a day of good news, and we're keeping it to ourselves. If we wait until morning light, punishment will find us. Now come, let's go at once and tell the king's household." Bongo balobanaki bango na bango : « Tozali kosala malamu te : Mokolo ya lelo ezali mokolo ya sango malamu, mpe tozali kobomba sango yango mpo na biso moko ! Soki tozeli kino lobi na tongo, tokozwa etumbu. Tokende sik’oyo kopesa sango na ndako ya mokonzi. »
10 So they came and called to the city gatekeepers, reporting: "We went to the Aramean camp—no one there, no human sound, only horses and donkeys tied up, and the tents just as they were." Boye bakendeki, babelelaki epai ya bakengeli bikuke ya engumba mpe bayebisaki bango : « Tokotaki na molako ya bato ya Siri, moto ata moko te azali kuna, toyoki ata mongongo ya moto te ; etikali kaka bampunda mpe ba-ane bakanga, mpe bandako ya kapo basundola. »
11 The gatekeepers called out the news, and it was reported inside the king's household. Bakengeli ekuke ya engumba babengaki moto moko kati na engumba mpo na kokomisa sango na ndako ya mokonzi.
12 That night the king rose and told his officials, "Let me tell you the Arameans' plan against us. They know we're starving, so they've left camp to hide in the fields, thinking: When they leave the city, we'll take them alive and get inside." Mokonzi alamukaki na butu mpe alobaki na bakalaka na ye : — Tika ete nayebisa bino makambo oyo bato ya Siri basali biso. Bayebi solo ete tozali kokufa nzala, yango wana batiki milako na bango mpo na kokende kobombama na zamba. Balobani bango na bango : « Bakobima solo, mpe tokokanga bango ya bomoi, bongo tokokota na engumba. »
13 One of his servants said, "Have some men take five of the horses left in the city. They will fare like all the Israelites left here—like all the Israelites already dead. Let us send them and see." Moko kati na bakalaka na ye azongisaki : — Bongisa ndambo ya mibali mpo ete bazwa bampunda mitano kati na oyo etikali kati na engumba. Tokobungisa ata eloko moko te, pamba te suka na bango ekozala ndenge moko na oyo ya bana nyonso ya Isalaele oyo batikali na engumba. Boye totinda bango kaka mpo toyeba makambo oyo ewuti kosalema.
14 So they took two chariots with horses, and the king sent them after the Aramean army, saying, "Go, find out." Boye baponaki bashar mibale elongo na bampunda na yango, mpe mokonzi atindaki yango mpo na koluka mampinga ya bato ya Siri. Apesaki mitindo na batambolisi na yango : « Bokende mpe botala ! »
15 They followed them to the Jordan; the whole road was littered with clothes and gear the Arameans threw off in their haste. The messengers returned and told the king. Balandaki bilembo ya makolo ya bato ya Siri kino na ebale Yordani, mpe bamonaki ete nzela nyonso etondaki na bilamba mpe bibundeli oyo basoda ya Siri babwakaki tango bakimaki na mbalakata. Bongo bantoma bazongaki mpe bapesaki sango epai ya mokonzi.
16 The people went out and plundered the Aramean camp. So seven quarts of fine flour sold for four ounces of silver, and fourteen quarts of barley for four ounces of silver, as our Father had said. Bongo bato ya Samari babimaki mpe bazwaki na makasi biloko kati na molako ya bato ya Siri. Boye bakomaki koteka bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, ndenge kaka Yawe alobaki.
17 The king had put the captain on whose arm he leaned in charge of the gate; the crowd trampled him there, and he died—just as the man of our Father had said when the king came down to him. Mokonzi ya Isalaele aponaki mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, mpo na kokengela ekuke ya engumba, kasi bato banyataki ye mpe akufaki kolanda makambo oyo moto na Nzambe asakolaki tango mokonzi ayaki na ndako na ye.
18 It happened just as the man of our Father told the king: "About this time tomorrow at Samaria's gate, fourteen quarts of barley will sell for four ounces of silver, and seven quarts of fine flour for four ounces of silver." Makambo oyo esalemaki ndenge moto na Nzambe alobaki na mokonzi : « Lobi, na tango oyo, bakoteka na ekuke ya Samari bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
19 The officer had answered the man of our Father, "Look, even if our Father opened windows in the heavens, could such a thing happen?" And he replied, "You will see it with your own eyes, but you will not eat any of it." Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, alobaki na moto na Nzambe : — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? Mpe Elize, moto na Nzambe, azongisaki : — Okomona yango na miso, kasi okolia yango te.
20 This is exactly what happened: the people trampled him in the gateway, and he died. Makambo yango esalemaki ndenge kaka elobamaki na tina na ye : bato banyataki ye na ekuke ya engumba, mpe akufaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]