Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The company of prophets said to Elisha, "Look, the place where we live under your care is too cramped for us. Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize : — Tala ! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso.
2 Let's go to the Jordan, each get a log, and build ourselves a place to live there." He said, "Go." Pesa biso nzela ya kokende na ebale Yordani epai wapi moko na moko kati na biso akoki kozwa nzete mpo na kotonga kuna esika ya kovanda. Elize alobaki na bango : — Bokende !
3 One of them said, "Please be willing to go with your servants." He answered, "I will go." Moko kati na bango alobaki : — Okosepela te kokende elongo na basali na yo ? Elize azongisaki : — Nandimi, nakokende.
4 So he went with them. They came to the Jordan and began cutting down trees. Boye akendeki elongo na bango. Bakendeki na ebale Yordani mpe babandaki kokata banzete.
5 As one felled a beam, the ax head fell into the water. He cried, "Oh no, my master! It was borrowed!" Wana moko kati na bango azalaki kokata nzete, ebende ya epasola na ye ekweyaki na mayi. Agangaki : — Ah, nkolo na ngai ! Nadefaki yango kodefa !
6 The man of our Father asked, "Where did it fall?" The man showed Elisha the place. Elisha cut a stick, threw it there, and made the iron float. Moto na Nzambe atunaki : — Ekweyaki na esika nini ? Sima na ye kolakisa ye esika yango, Elize akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango na esika oyo ebende ya epasola ekweyaki. Mpe, na mbala moko, eteni ya nzete yango ematisaki ebende na likolo ya mayi, mpe ebende ekomaki kotepa.
7 "Lift it out," he said. So the man reached out his hand and took it. Elize alobaki : — Kamata yango ! Boye, mosali wana asembolaki loboko na ye mpe akamataki yango.
8 Aram's king was fighting Israel. He conferred with his servants: "My camp will be at such and such a place." Mokonzi ya Siri azalaki kobundisa bana ya Isalaele. Asololaki na basali na ye mpe alobaki : « Nakotia molako na ngai na esika songolo to pakala. »
9 The man of our Father warned Israel's king: "Don't pass this place—Arameans are coming down there." Mbala moko, moto na Nzambe atindaki maloba oyo epai ya mokonzi ya Isalaele : « Keba ! Koleka na esika wana te, pamba te bato ya Siri bazali kokita kuna. »
10 So the king of Israel sent to the place the man of our Father named, warning him; he guarded himself there—not once, not twice. Mokonzi ya Isalaele atindaki bato kokende kononga esika oyo moto na Nzambe alobelaki. Mbala ebele, Elize azalaki kokebisa mokonzi ete azala na bokebi na bisika ya ndenge wana ; mpe mbala ebele, mokonzi ya Isalaele azalaki komibikisa na motambo ya bato ya Siri.
11 Aram's king raged over this. He summoned his servants and asked, "Won't you tell me who among us sides with Israel's king?" Suka na suka, mokonzi ya Siri asilikaki makasi, abengisaki bakalaka na ye mpe atunaki bango : — Bokoki te koyebisa ngai nani kati na biso azali na ngambo ya mokonzi ya Isalaele ?
12 One of his servants said, "No one, my lord the king. Elisha, the prophet in Israel, tells Israel's king the words you speak in your bedroom." Moko kati na bakalaka na ye alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala.
13 "Go, see where he is," the king said, "so I may send men and seize him." Word came back, "He is in Dothan." Mokonzi apesaki mitindo : — Bokende koluka esika oyo azali mpo ete natinda bato mpo na kokanga ye. Bayaki koyebisa ye : — Azali na Dotani.
14 He sent horses, chariots, and a great army there; they came by night and surrounded the city. Bongo mokonzi atindaki kuna bampunda elongo na bashar mpe basoda ebele. Bakendeki kuna na butu mpe bazingelaki engumba.
15 The servant of the man of our Father rose early and went out—an army with horses and chariots surrounded the city. "Oh no, my master! What will we do?" the servant said. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, tango mosali ya moto na Nzambe alamukaki mpe abimaki, amonaki ete mampinga elongo na bampunda mpe bashar bazingelaki engumba. Mosali yango alobaki na Elize : — Oh nkolo na ngai, eyindi na libanda ! Tokosala nini !
16 "Don't be afraid," he answered, "those with us outnumber those with them." Mosakoli azongisaki : — Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango.
17 Elisha prayed, "my Father, please open his eyes to see." And our Father opened the young man's eyes: he saw the mountain full of horses and chariots of fire around Elisha. Elize asambelaki : — Oh Yawe, fungola ye miso mpo ete amona ! Yawe afungolaki miso ya mosali, mpe mosali atalaki ; amonaki bangomba mike etonda na bampunda mpe bashar ya moto zingazinga ya Elize.
18 As the Arameans came down to him, Elisha prayed to our Father, "Please strike these people with blindness." So he struck them with blindness, as Elisha said. Lokola monguna azalaki kopusana pene na ye, Elize asambelaki Yawe : — Boma ekolo oyo miso ! Mpe Yawe abomaki bango miso, ndenge kaka Elize asengaki.
19 Elisha said, "This isn't the way, nor the city. Follow me—I'll lead you to the man you seek." Then he led them to Samaria. Elize alobaki na bango : — Nzela ezali awa te ! Engumba mpe ezali awa te ! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka. Elize amemaki bango na Samari.
20 When they entered Samaria, Elisha said, "O my Father, open these men's eyes so they may see." Then our Father opened their eyes, and they saw—they were inside Samaria. Tango bakotaki na engumba, Elize asambelaki lisusu : — Yawe, fungola miso ya bato oyo mpo ete bamona. Yawe afungolaki miso na bango, mpe bamonaki ete bazali kati na engumba Samari.
21 Seeing them, Israel's king said to Elisha, "My father, will I kill them? Will I kill them?" Tango mokonzi ya Isalaele amonaki bango, atunaki Elize : — Tata na ngai, naboma bango ? Naboma bango ?
22 He said, "Don't kill them. Would you kill those captured by your sword and bow? Give them bread and water to eat and drink, then go to their master." Elize azongisaki : — Koboma bango te ! Boni, okoboma solo bato oyo okangi, na nzela ya mopanga na yo to ya tolotolo na yo ? Pesa bango nde bilei mpe mayi ya komela mpo ete balia, bamela mpe bazonga epai ya mokonzi na bango.
23 He prepared a great feast; they ate and drank, then he sent them off to their master. Aramean raiders did not come into Israel's land again. Boye abongisaki feti monene mpo na bango. Tango basilisaki kolia mpe komela, azongisaki bango. Mpe bazongaki epai ya mokonzi na bango. Wuta tango yango, mampinga ya Siri batikaki kokota mpo na kobundisa Isalaele.
24 Later Ben-hadad king of Aram gathered his whole army, marched up, and besieged Samaria. Sima na tango, Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso mpe akendeki kozingela engumba Samari.
25 A severe famine gripped Samaria during the siege, until a donkey's head sold for eighty pieces of silver, and a quarter-kab of dove droppings for five pieces of silver. Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe ; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano.
26 As Israel's king passed along the wall, a woman cried out, "Help me, my lord the king!" Mokolo moko, wana mokonzi ya Isalaele azalaki koleka na likolo ya mir ya lopango, mwasi moko agangaki epai na ye : — Mokonzi, nkolo na ngai, sunga ngai !
27 He said, "If our Father doesn't help you, where can I find help for you? From the threshing floor? From the winepress?" Mokonzi azongisaki : — Soki Yawe asungi yo te, esika nini ngai nakozwa lisungi mpo na kosunga yo ? Nazangi vino to ble ya kopesa yo.
28 The king asked, "What's wrong?" She said, "This woman told me, 'Give your son to eat today; we'll eat mine tomorrow.' Nzokande, mokonzi atunaki ye lisusu : — Likambo nini ekomeli yo ? Mwasi azongisaki : — Mwasi wana alobaki na ngai : « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye lelo, bongo lobi, tokolia mwana na ngai. »
29 So we boiled my son and ate him. Next day I said, 'Give your son for us to eat,' but she hid him." Boye tolambaki mwana na ngai ya mobali mpe toliaki ye. Mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye : « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye, » kasi abombaki ye.
30 Hearing the woman's words, the king tore his robes; as he passed along the wall, people saw sackcloth on his skin, underneath. Tango mokonzi ayokaki maloba ya mwasi oyo, apasolaki bilamba na ye. Lokola atambolaki lisusu na likolo ya mir ya lopango, bato bamonaki ete, na se ya bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki na nzoto na ye.
31 He said, "May our Father punish me, and worse, if Elisha son of Shaphat's head stays on him today!" Mokonzi alobaki : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. »
32 Elisha sat in his house, and the elders were sitting with him. The king had sent a man ahead of him, but before the messenger arrived, Elisha said to the elders, "See how this son of a murderer sends to cut off my head? Look, when he comes, shut the door and press it against him. Isn't the sound of his master's feet behind him?" Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? »
33 While he was still speaking with them, the messenger came down to him. The king said, "This disaster is from our Father. Why wait for our Father longer?" Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]