Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Naaman, army commander for Aram's king, was great and highly regarded by his master, because through him our Father gave Aram victory. He was a brave warrior, but he had a skin disease. Namani, mokonzi ya basoda ya mokonzi ya Siri, azalaki moto monene mpe moto ya lokumu mingi na miso ya nkolo na ye, pamba te, na nzela na ye, Yawe apesaki bato ya Siri elonga. Azalaki soda ya mpiko, kasi azalaki na bokono ya maba.
2 The Arameans had raided and taken a young girl captive from Israel, and she served Naaman's wife. Nzokande, tango mampinga ya bato ya Siri babimaki na bitumba, bakangaki na bowumbu elenge mwasi moko ya Isalaele. Boye akomaki kosalela mwasi ya Namani.
3 She told her mistress, "If only my master would go to the prophet in Samaria! He would cure him of his leprosy." Elenge mwasi yango alobaki na nkolo na ye ya mwasi : — Ah, soki kaka nkolo na ngai, Namani, akokaki komona mosakoli oyo azali kati na Samari ! Akoki penza kobikisa ye na bokono na ye ya maba.
4 So Naaman went in and told his master, "This is what the girl from the land of Israel said." Namani akendeki epai ya nkolo na ye mpe abetelaki ye lisolo ya makambo oyo elenge mwasi ya Isalaele alobaki.
5 "Go," said Aram's king. "I'll send a letter to Israel's king." So Naaman left with about 750 pounds of silver, about 150 pounds of gold, and ten sets of clothing. Mokonzi ya Siri alobaki na ye : — Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.
6 He brought the letter to Israel's king. It read: "I send you my servant Naaman with this letter, to cure his skin disease." Apesaki epai ya mokonzi ya Isalaele mokanda oyo elobaki : « Na nzela ya mokanda oyo, natindeli yo mosali na ngai, Namani, mpo ete obikisa ye na bokono na ye ya maba. »
7 Reading the letter, Israel's king tore his clothes: "Am I God, to kill and give life, that he asks me to cure a man's skin disease? See, he's picking a fight with me!" Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! »
8 When Elisha the man of our Father heard Israel's king had torn his clothes, he sent word to the king: "Why tear your clothes? Send him to me, and he'll know there's a prophet in Israel." Tango Elize, moto na Nzambe, ayokaki ete mokonzi ya Isalaele apasolaki bilamba na ye, atindelaki ye liloba oyo : « Mpo na nini opasoli bilamba na yo ? Tika ete moto wana aya epai na ngai, mpe akoyeba ete ezali na mosakoli moko kati na Isalaele ! »
9 So Naaman came with his horses and chariots and stopped at the door of Elisha's house. Boye Namani akendeki elongo na bampunda na ye mpe shar na ye, mpe atelemaki na ekotelo ya ndako ya Elize.
10 Elisha sent a messenger to him: "Go, wash seven times in the Jordan; your flesh will be restored, and you'll be clean." Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani : — Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani ; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto.
11 But Naaman left angry, saying, "I expected he'd come out to me, stand, call on the name of the LORD his God, wave his hand over the spot, and cure the disease. Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki : — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba !
12 Aren't Abana and Pharpar, Damascus's rivers, better than all Israel's waters? Couldn't I wash in them and be clean?" So he turned and left in a rage. Boni, bibale Abana mpe Paripari kati na Damasi ezali motuya te koleka miluka nyonso ya Isalaele ? Nakokaki te kosukola na bibale wana mpe kokoma peto ? Boye, abalukaki mpe akendeki na kanda.
13 But his servants approached him: "My father, if the prophet told you to do some great thing, wouldn't you? How much more when he only says, 'Wash and be clean'?" Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye : — Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te ? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo : « Sukola, mpe okokoma peto ! »
14 He went down and dipped in the Jordan seven times, as the man of our Father said, and his flesh was restored like a little child's, and he was clean. Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.
15 Naaman and all his party returned to the man of our Father. He came and stood before him and said, "Now I know there is no God in all the earth except in Israel. Please accept a gift from your servant." Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.
16 Elisha replied, "As surely as our Father lives, before whom I stand, I will accept nothing." Naaman urged him to take it, but he refused. Mosakoli Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.
17 If not," Naaman said, "let your servant be given as much earth as two mules can carry, for your servant will never again offer a burnt offering or sacrifice to any other god but the LORD. Namani alobaki : — Lokola oboyi, pesa nzela ete napesa mosali na yo ndambo ya mabele oyo bamile mibale ekoki komema, pamba te mosali na yo akoki te kobonzela banzambe mosusu bambeka ya kotumba to bambeka ya boyokani, bobele Yawe.
18 But may the LORD forgive your servant this one thing: when my master enters Rimmon's temple to worship, leaning on my arm, and I bow down in the temple of Rimmon, when I bow down there—may the LORD forgive your servant." Kasi tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na likambo oyo : tango nkolo na ngai akotaka na ndako ya nzambe Rimoni mpo na kogumbama, nagumbamaka elongo na ye, pamba te alalelaka loboko na ngai. Tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na yango.
19 "Go in peace," Elisha said. So Naaman departed from him and had gone some distance. Elize alobaki na ye : — Kende na kimia ! Tango Namani akomaki mwa mosika,
20 But Gehazi, servant of Elisha the man of our Father, thought: "My master has let this Aramean Naaman off too easily by not accepting what he brought. As our Father lives, I'll run after him and get something." Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »
21 Gehazi chased after Naaman. Seeing him run up, Naaman stepped down from his chariot to meet him: "Is all well?" Boye Geazi alandaki Namani mbangu. Tango Namani amonaki ye kopota mbangu na sima na ye, akitaki na shar na ye mpo na kokutana na ye mpe atunaki ye : — Boni, nyonso ezali malamu ?
22 "All's well," Gehazi said. "My master sent me to say: 'Two young men from the prophets' company just came to me from Ephraim's hills. Please give them about seventy-five pounds of silver and two changes of clothing.'" Geazi azongisaki : — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo : « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. »
23 "Please, take about 150 pounds," Naaman said. He urged Gehazi, and he tied up about 150 pounds of silver in two bags with two sets of clothing, gave them to two servants, who carried them ahead of Gehazi. Namani alobaki : — Kamata bakilo ya palata, tuku sambo. Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi.
24 At the hill Gehazi took the things from the servants, put them in the house, sent the men off, and they left. Tango Geazi akomaki na ngomba, azwaki biloko na maboko ya basali ya Namani mpe atiaki yango kati na ndako. Azongisaki basali yango, mpe bakendeki.
25 He went in and stood before his master. Elisha asked, "Where were you, Gehazi?" "Your servant didn't go anywhere," he said. Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye : — Geazi, okendeki wapi ? Geazi azongisaki : — Mosali na yo akendeki epai moko te.
26 But Elisha said, "Didn't my heart go with you when the man turned from his chariot to meet you? Is it time to take silver, clothes, olive groves, vineyards, sheep, cattle, and male and female servants? Kasi Elize alobaki na ye : — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ?
27 Naaman's leprosy will cling to you and your descendants forever." Gehazi left his presence, leprous, his skin as white as snow. Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]