Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The wife of one of the sons of the prophets cried out to Elisha, "Your servant my husband is dead, and you know that your servant revered our Father. Now the creditor comes to take my two children as slaves." Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize : — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye.
2 Elisha asked, "What can I do for you? Tell me, what's in your house?" She said, "Your servant has nothing but a jar of oil." Elize azongiselaki ye : — Ndenge nini nakoki kosunga yo ? Yebisa ngai eloko oyo ozali na yango kati na ndako na yo. Azongisaki : — Mwasi mowumbu na yo azali na eloko moko te, longola kaka mwa mafuta.
3 Then he said, "Go, borrow vessels outside from all your neighbors—empty vessels, not a few. Elize alobaki : — Kende kosenga na baninga na yo nyonso bambeki ya pamba, kosenga moke te.
4 Go in, shut the door behind you and your sons, and pour oil into all these jars. As each is filled, set it aside." Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali ; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi.
5 So she left him, shut the door behind her and her sons; they kept bringing the vessels, she kept pouring. Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta.
6 When the jars were full, she told her son, "Bring me another." "There are none left," he said. Then the oil stopped. Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali : — Pesa ngai lisusu mbeki moko. Kasi mwana yango azongiselaki ye : — Bambeki nyonso esili. Kaka na tango yango, mafuta etikaki kobima.
7 She came and told the man of our Father, who said, "Go, sell the oil, pay your debt, and you and your sons live on the rest." Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye : — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.
8 One day Elisha passed through Shunem, where a wealthy woman lived; she urged him to stay and eat. Whenever he passed by, he stopped there to eat. Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia.
9 She told her husband, "Look, I know this man who often passes by us is a holy man of our Father. Mwasi yango alobaki na mobali na ye : « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe.
10 Let's make him a small roof room with a bed, table, chair, and lamp, so he can stay whenever he comes." Nabondeli yo, tika ete tobongisela ye shambre ya moke na likolo ya ndako mpe totia kati na yango mbeto, mesa, kiti mpe mwinda. Boye, tango nyonso akoya epai na biso, akoki kovanda kuna. »
11 One day Elisha came there, turned into the upper room, and lay down. Mokolo moko, Elize ayaki na Sunami, amataki na shambre na ye mpe alalaki kuna.
12 He told his servant Gehazi, "Call this Shunammite woman." He called her, and she stood before him. Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize.
13 Elisha said to him, "Tell her: You've gone to all this trouble for us. What can be done for you? Should I speak for you to the king or the army commander?" She answered, "I live among my own people." Elize alobaki na Geazi : — Loba na ye : « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo ? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda ? » Mwasi ya Sunami azongisaki : — Navandaka na kimia kati na bato na ngai.
14 He asked, "What can be done for her?" Gehazi said, "She has no son, and her husband is old." Elize atunaki mosali na ye, Geazi : — Eloko nini tokoki kosala mpo na ye ? Geazi azongisaki : — Azali na mwana te, mpe mobali na ye azali mobange.
15 He said, "Call her." So he called her, and she stood in the doorway. Elize alobaki : — Benga ye ! Geazi abengaki ye, mpe ayaki kotelema na ekuke.
16 He said, "At this season next year, you will embrace a son." She said, "No, my lord, man of our Father, don't lie to your servant." Elize alobaki : — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. Mwasi ya Sunami agangaki : — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te !
17 The woman conceived and bore a son at that season the next year, as Elisha had told her. Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.
18 The child grew, and one day he went out to his father, to the reapers. Mwana akolaki. Mokolo moko, mwana akendeki epai ya tata na ye, oyo azalaki elongo na babuki mbuma.
19 He told his father, "My head! My head!" His father told a servant, "Carry him to his mother." Alobaki na tata na ye : — Moto pasi ! Moto pasi ! Tata na ye alobaki na mosali moko : — Zongisa ye epai ya mama na ye !
20 He carried him to his mother; the boy sat on her knees until noon, then died. Mosali amemaki ye mpe akomisaki ye epai ya mama na ye. Mwana mobali avandaki na makolo ya mama na ye kino na midi mpe, na sima, akufaki.
21 She went up, laid him on the man of our Father's bed, shut the door behind him, and left. Mama na ye amataki na shambre ya mosakoli, alalisaki ye na mbeto ya moto na Nzambe, akangaki ekuke mpe abimaki.
22 She called her husband: "Send me a servant and a donkey, so I can run to the man of our Father and come back." Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye : — Nabondeli yo, tindela ngai elenge moko kati na basali mpe ane moko ya mwasi, mpo ete nakende noki epai ya moto na Nzambe mpe nazonga mbala moko.
23 He asked, "Why go to him today? It's not new moon or Sabbath." She said, "It's fine." Mobali na ye atunaki : — Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo ? Lelo ezali ebandeli ya sanza te ! Ezali mpe mokolo ya Saba te ! Azongisaki : — Komitungisa te ! Nyonso ezali malamu.
24 She saddled the donkey and told her servant, "Drive on; don't slow down for me unless I tell you." Mwasi ya Sunami abongisaki ane mpe alobaki na elenge mosali na ye : « Tokeyi ! Tambolisa ane ; kotelema na nzela te soki nalobi na yo te. »
25 She set out and came to the man of our Father at Mount Carmel. Seeing her in the distance, the man of our Father told Gehazi his servant, "Look, the Shunammite woman. Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi : — Tala ! Ezali mwasi ya Sunami !
26 Run now, meet her, and ask, 'Are you well? Is your husband well? Is the child well?'" She answered, "All is well." Nabondeli yo, pota mbangu sik’oyo mpo na kokutana na ye, mpe tuna ye : « Boni, kimia ezali ? Ozali malamu ? Mobali na yo azali malamu ? Mwana na yo azali malamu ? » Azongisaki : — Nyonso ezali malamu.
27 When she reached the man of our Father on the mountain, she grabbed his feet. Gehazi came to push her away, but he said, "Leave her alone—her soul is in bitter distress, and our Father has hidden it from me, not told me." Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki : — Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango.
28 She said, "Did I ask my lord for a son? Didn't I say, 'Don't raise my hopes'?" Mwasi ya Sunami alobaki : — Boni, nasengaki mwana epai ya nkolo na ngai ? Te ! Kutu, nalobaki na yo : « Kopesa ngai elikya ya lokuta te ! »
29 Elisha told Gehazi, "Tuck your cloak in your belt, take my staff in your hand, and go. If you meet anyone, don't greet him; if anyone greets you, don't answer him. Lay my staff on the boy's face." Elize alobaki na Geazi : — Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali.
30 But the child's mother said, "As our Father lives and you live, I won't leave you." So he got up and followed her. Kasi mama ya mwana alobaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te. Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami.
31 Gehazi went ahead of them, laid the staff on the boy's face, but there was no sound or response. He went back to meet Elisha: "The boy has not awakened." Geazi akendeki liboso na bango mpe atiaki nzete na elongi ya mwana mobali, kasi ata eloko moko te esalemaki, ezala mongongo to koningana. Geazi azongaki mpo na kokutana na Elize mpe alobaki na ye : — Mwana alamuki te.
32 When Elisha came into the house, there was the child, dead, lying on his bed. Tango Elize akomaki na ndako, akutaki ebembe ya mwana mobali elali na mbeto na ye.
33 So he went in, shut the door behind the two of them, and prayed to our Father. Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe.
34 Then he climbed up and lay on the child—mouth on mouth, eyes on eyes, hands on hands. As he stretched over him, the child's body grew warm. Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto.
35 He got up, paced the room once, then climbed up and stretched over the boy again. The boy sneezed seven times and opened his eyes. Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre ; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso.
36 Elisha called Gehazi: "Call this Shunammite woman." He called her; she came to him, and he said, "Take your son." Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye : — Benga mwasi ya Sunami ! Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki : — Zwa mwana na yo !
37 She came, fell at his feet, bowed to the ground, then picked up her son and left. Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se ; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki.
38 Elisha returned to Gilgal during a famine. As the prophets' sons sat before him, he told his servant, "Put the large pot on; boil stew for the prophets' sons." Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye : « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. »
39 One went out to the field to gather herbs and found a wild vine. He gathered a lapful of wild gourds from it, came back, and sliced them into the stew pot—no one knew what they were. Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu ; moto moko te ayebaki soki ezali nini.
40 They poured it out for the men to eat, but as they ate the stew they cried out, "Man of our Father, there is death in the pot!" They could not eat it. Bakabolelaki bato elubu. Tango kaka babandaki kolia yango, bagangaki : — Moto na Nzambe, kufa ezali kati na nzungu oyo ! Mpe bakokaki lisusu te kolia yango.
41 He said, "Bring flour," threw it in the pot, and said, "Pour it out for the people to eat." Nothing harmful remained in the pot. Elize alobaki : — Bomemela ngai farine ! Atiaki farine kati na nzungu mpe alobaki : — Bokabolela yango bato mpo ete balia. Mpe kati na elubu oyo ezalaki kati na nzungu, ezalaki lisusu na eloko moko te ya mabe.
42 A man from Baal-shalishah brought the man of our Father firstfruit bread—twenty barley loaves and fresh grain in his sack. Elisha said, "Give it to the people to eat." Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye : — Pesa yango na bato mpo ete balia !
43 His servant said, "How do I set this before one hundred men?" He said again, "Give it to the people to eat, for our Father says: They will eat and have leftovers." Mosali na ye atunaki : — Nakokoka ndenge nini kokabola mapa oyo na bato nkama moko ? Elize alobaki lisusu : — Kabolela yango bato nyonso mpo ete balia, pamba te tala Liloba oyo Yawe alobi : « Bakolia, bakotonda mpe bakotika mosusu. »
44 He set it before them; they ate and had leftovers, just as our Father said. Boye mosali akabolelaki bango mapa yango. Baliaki mpe batikaki mosusu, kolanda Liloba na Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]