Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Joram son of Ahab became king over Israel in Samaria in Jehoshaphat king of Judah's eighteenth year, and reigned twelve years. Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Yorami, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi.
2 He did evil in our Father's eyes, though not like his father and mother, for he removed the sacred pillar of Baal his father made. Asalaki mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na tata mpe mama na ye. Abukaki ekeko ya Bala oyo tata na ye atelemisaki,
3 Yet he clung to the sins of Jeroboam son of Nebat, who led Israel to sin; he did not turn from them. kasi akangamaki kaka na lisumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo amemaki Isalaele na kosala masumu ; atikalaki kobongwana na yango te.
4 Mesha king of Moab raised sheep and paid the king of Israel 100,000 lambs and the wool of 100,000 rams. Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango.
5 But when Ahab died, the king of Moab rebelled against the king of Israel. Tango Akabi akufaki, mokonzi ya Moabi atombokelaki mokonzi ya Isalaele.
6 So King Joram set out from Samaria at that time and mustered all Israel. Na tango wana, mokonzi Yorami abimaki na Samari mpe asangisaki Isalaele mobimba.
7 He went and sent word to Jehoshaphat king of Judah: "The king of Moab has rebelled against me. Will you go with me to fight Moab?" He replied, "I will go up. I am as you are, my people as yours, my horses as yours." Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : — Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi ? Mokonzi Jozafati azongisaki : — Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko ; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo.
8 He asked, "Which way should we go up?" He answered, "The way through the Edom desert." Jozafati atunaki : — Tokokende na nzela nini ? Yorami azongisaki : — Na nzela ya esobe ya Edomi.
9 The king of Israel set out with the king of Judah and the king of Edom. They marched a roundabout route seven days, with no water for the army or the animals following them. Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango.
10 The king of Israel said, "Alas! For our Father summoned these three kings only to give them into the hand of Moab." Mokonzi ya Isalaele akamwaki : — Ndenge nini boye ! Yawe asangisi biso awa, biso bakonzi misato, kaka mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi ?
11 But Jehoshaphat said, "Is there no prophet of our Father here, to ask our Father through him?" One of Israel's king's servants answered, "Elisha son of Shaphat is here, who poured water on Elijah's hands." Kasi Jozafati atunaki : — Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye ? Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya.
12 Jehoshaphat said, "The word of our Father is with him," so Israel's king, Jehoshaphat, and Edom's king went down to him. Jozafati alobaki : — Solo, Liloba na Yawe ezali elongo na ye. Boye mokonzi ya Isalaele elongo na Jozafati mpe mokonzi ya Edomi bakendeki epai ya Elize.
13 Elisha asked Israel's king, "What business is between us? Go to your father's and mother's prophets." The king said, "No—our Father called these three kings to hand them to Moab." Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Ngai na yo likambo nini ? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Te ! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi !
14 Elisha said, "As the Father of heaven's armies lives, whom I serve, if I didn't respect Jehoshaphat king of Judah, I wouldn't look at you or notice you. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo ngai nasalelaka ; soki ezalaki te mpo na kotosa Jozafati, mokonzi ya Yuda, nalingaki kutu ata moke te kotala yo to kolanda yo na bokebi.
15 Now bring me a musician." When the musician played, the hand of our Father came on him. Kasi sik’oyo, memela ngai mobeti moko ya lindanda ! Wana mobeti lindanda azalaki kobeta, loboko ya Yawe ekitelaki Elize,
16 He said, "This is what our Father says: Make this valley full of ditches. mpe Elize alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Botimola mabulu ebele na lubwaku oyo !
17 For this is what our Father says: You will see no wind or rain, yet this valley will fill with water, and you will drink—you, your livestock, and your animals. Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : Bokotikala te komona mopepe to mvula, kasi lubwaku oyo ekotonda na mayi, mpe bino elongo na bibwele na bino bokomela yango.
18 This is a trivial thing in my eyes; he will also give Moab into your hand. Ezali likambo moke na miso ya Yawe. Akokaba lisusu bato ya Moabi na maboko na bino.
19 You will strike every fortified city and every choice city, cut down every good tree, stop up every spring of water, and ruin every good field with stones." Bokobuka bingumba na bango nyonso oyo batonga makasi mpe bingumba nyonso ya minene, bokokata banzete na bango nyonso ya kitoko, bokokanga bitima nyonso ya mayi mpe bokobebisa bilanga nyonso na mabanga. »
20 At morning, at the grain offering, water suddenly came from the direction of Edom, and the land filled with water. Na tongo ya mokolo oyo elandaki, na tango oyo batumbaka mbeka, mayi ebandaki kotiola na nzela ya Edomi, mpe mabele etondaki na mayi.
21 All Moab heard the kings had come up to fight them, so every man old enough to bear arms and up was mustered; they took their stand at the border. Nzokande, sima na bato nyonso ya Moabi koyoka sango ete bakonzi bayei kobundisa bango, babengaki bato nyonso, bilenge mpe mikolo oyo bakoki komema bibundeli, mpe batelemisaki bango na mondelo ya mboka.
22 They rose early; the sun shone on the water, and Moab saw the water opposite them red as blood. Tango balamukaki na tongo-tongo, moyi ezalaki kongala na mayi ; mpe bato ya Moabi bamonaki liboso na bango mayi motane lokola makila.
23 They said, "Blood! The kings fought and killed each other. Now, Moab, to the plunder!" Bagangaki : « Ezali makila ! Bakonzi babundi bango na bango. Sik’oyo, bato na Moabi, tokende kobotola biloko na bango ! »
24 But when they reached Israel's camp, the Israelites rose and struck the Moabites, who fled before them. Israel advanced into the land, striking down the Moabites as they went. Kasi tango bato ya Moabi bakomaki na molako ya bana ya Isalaele, bana ya Isalaele batelemaki, babundisaki bango kino bato ya Moabi bakimaki. Bato ya Isalaele bakotaki na mboka Moabi mpe babetaki yango.
25 They tore down the cities. On every good field each man threw a stone until it was covered. They stopped every spring of water and felled every good tree, leaving only the stones of Kir-hareseth, which the slingers surrounded and attacked. Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango ; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola.
26 When Moab's king saw the battle was too strong for him, he took 700 swordsmen to break through to Edom's king, but failed. Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te.
27 So he took his firstborn, his heir, and offered him as a burnt offering on the wall. Great anger came against Israel, so they withdrew from him and returned to their land. Boye azwaki mwana na ye ya liboso ya mobali oyo alingaki kokitana na ye na bokonzi, abonzaki ye lokola mbeka ya kotumba, na likolo ya mir ya engumba. Tango bamonaki bongo, bana ya Isalaele bayokaki mawa, balongwaki mpe bazongaki na mboka na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]