Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 As our Father was about to take Elijah up to heaven in a whirlwind, Elijah and Elisha left Gilgal. Tango Yawe akomaki pene ya konetola Eliya na likolo na nzela ya mopepe makasi, Eliya mpe Elize balongwaki na Giligali.
2 Elijah told Elisha, "Please stay here; our Father sent me to Bethel." Elisha said, "As our Father lives, and as you live, I won't leave you." So they went down to Bethel. Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.
3 The prophets at Bethel came out to Elisha and asked, "Do you know today our Father will take your master from over your head?" "Yes, I know," he said. "Be quiet." Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !
4 Elijah said, "Elisha, please stay here; our Father sent me to Jericho." He replied, "As our Father lives, and as you live, I won't leave you." So they went to Jericho. Eliya alobaki na Elize : — Tikala awa ; Yawe atindi ngai na Jeriko. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Jeriko.
5 The prophets' band at Jericho approached Elisha, asking, "Do you know our Father will take your master from you today?" "Yes, I know," he said. "Be quiet." Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Jeriko bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !
6 Elijah said to him, "Please stay here; our Father has sent me to the Jordan." He said, "As our Father lives, and as you live, I won't leave you." So the two went on. Eliya alobaki na ye : — Elize, tikala awa ; Yawe atindi ngai na Yordani. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.
7 Fifty men of the prophets' group went and stood facing them at a distance, while both stood by the Jordan. Bayekoli tuku mitano ya basakoli bakendeki kotelema mosika ya esika oyo Eliya mpe Elize batelemaki, na ebale Yordani.
8 Elijah took his cloak, rolled it up, hit the water, and it split both ways; the two crossed on dry ground. Eliya alongolaki kazaka na ye, agumbaki yango mpe abetaki yango na mayi ya ebale. Mayi ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe bango mibale bakatisaki.
9 Once they crossed, Elijah said to Elisha, "Ask what to do for you before I'm taken from you." Elisha said, "Please let me inherit a double portion of your spirit." Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize : — Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo. Elize azongisaki : — Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale.
10 "You've asked something hard," Elijah said. "If you see me taken from you, it's yours; if not, it won't be." Eliya alobaki : — Osengi ngai eloko ya pasi, kasi soki okomona ngai wana Yawe akolongola ngai liboso na yo, okozwa yango ; soki te, okozwa yango te.
11 While they walked and talked, a fiery chariot and fiery horses separated them, and Elijah went up to heaven in a whirlwind. Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale ; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi.
12 Elisha saw and cried, "My father, my father! Israel's chariots and horsemen!" Then he saw him no more. He grabbed his clothes and tore them in two. Tango Elize amonaki bongo, agangaki : « Tata na ngai ! Tata na ngai ! Yo nde ozali lokola shar ya Isalaele mpe batambolisi na yango ! » Bongo Elize amonaki ye lisusu te. Boye akangaki bilamba na ye mpe apasolaki yango na biteni mibale.
13 He picked up Elijah's fallen cloak, went back, and stood on the bank of the Jordan. Alokotaki kazaka ya Eliya, oyo ekweyaki wuta na mapeka na ye, azongaki mpe atelemaki na ngambo ya ebale Yordani.
14 He took Elijah's fallen cloak, struck the water, and asked, "Where is our Father, the God of Elijah?" He struck it; the water divided right and left, and Elisha crossed over. Azwaki kazaka ya Eliya, abetaki yango na mayi mpe alobaki : « Wapi sik’oyo Yawe, Nzambe ya Eliya ? » Tango Elize abetaki kazaka yango na mayi, mayi ya ebale ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi.
15 Prophets at Jericho, across from him, saw and said, "Elijah's spirit rests on Elisha." They met him, bowing to the ground before him. Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki : « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize ! » Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele.
16 "Look," they said, "your servants have fifty strong men. Let them go and search for your master—maybe the Spirit of our Father lifted him and dropped him on some mountain or in some valley." "No," Elisha said, "don't send them." Balobaki : — Tala biso basali na yo, tozali na mibali ya mpiko tuku mitano. Tika ete baluka mokonzi na yo, tango mosusu Molimo na Yawe amemi ye mpe abwaki ye na ngomba to na lubwaku. Elize azongisaki : — Te, botinda bango te !
17 They pressed him until he was ashamed to refuse. "Send them," he said. So they sent fifty men, who searched three days but did not find him. Kasi batungisaki Elize makasi kino ayokaki soni mpo na koboya. Boye alobaki : — Botinda bango. Mpe batindaki mibali tuku mitano oyo balukaki Eliya mikolo misato, kasi batikalaki komona ye te.
18 When they returned to Elisha, who was staying in Jericho, he said to them, "Didn't I tell you not to go?" Tango bazongaki epai ya Elize oyo atikalaki na Jeriko, Elize alobaki na bango : — Napekisaki bino te kokende ?
19 The people of the city told Elisha, "Look, our lord, this town sits well, as you see, but the water is bad and the land unproductive." Bato ya engumba ya Jeriko bayebisaki Elize : — Oh nkolo ! Engumba na biso etongami na esika ya malamu ndenge ozali komona yango, kasi mayi ezali mabe mpe mabele ebotaka te.
20 "Bring me a new bowl," he said, "and put salt in it." They brought it to him. Elize alobaki : — Bomemela ngai sani ya moke ya sika mpe botia mungwa na kati. Bamemelaki ye yango
21 He went out to the spring, threw in salt, and said, "This is what our Father says: I have healed this water; it will never cause death or barrenness again." mpe akendeki na etima, abwakaki kuna mungwa mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napetoli mayi oyo ; ekoyeisa lisusu kufa te mpe ekobebisa lisusu mabele te mpo ete ebota mbuma. › »
22 And the water has remained pure to this day, according to the word Elisha had spoken. Boye mayi etikala peto kino na mokolo ya lelo, kolanda liloba oyo Elize abimisaki.
23 From there Elisha went up to Bethel. As he was walking along the road, small boys came from the city and mocked him: "Go up, baldhead! Go up, baldhead!" Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye ; bazalaki koloba : « Moto na libandi, longwa awa ! Moto na libandi, longwa awa ! »
24 He turned, looked at them, and cursed them in our Father's name. Two bears then left the woods and mauled forty-two of the boys. Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.
25 And Elisha went on to Mount Carmel and from there returned to Samaria. Longwa wana Elize akendeki na ngomba Karimeli ; mpe longwa kuna, azongaki na Samari.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]