Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After the death of Ahab, Moab rebelled against Israel. Sima na kufa ya mokonzi Akabi, bato ya Moabi batombokelaki Isalaele.
2 Ahaziah fell through the lattice of his upper room in Samaria and was hurt. He sent messengers: "Go, ask Baal-zebub, god of Ekron, whether I'll recover from this injury." Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.
3 But our Father's messenger told Elijah the Tishbite, "Get up, meet Samaria's king's messengers and ask them, 'Is there no Father in Israel, that you go to consult Baal-zebub, god of Ekron?' Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe : — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ?
4 So our Father says: 'You will not leave the bed you climbed into; you will surely die.'" And Elijah left. Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › » Boye Eliya akendeki.
5 When the messengers returned to the king, he asked them, "Why have you come back?" Tango bantoma bazongaki epai ya mokonzi, atunaki bango : — Mpo na nini bozongi ?
6 They answered, "A man came to meet us and said, 'Go back to the king who sent you and tell him: This is what our Father says: Is there no Father in Israel, that you send men to ask Baal-zebub, the god of Ekron? So you will not leave the bed you climbed into; you will surely die.'" Bazongisaki : — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. »
7 The king asked, "What kind of man was it who came to meet you and told you this?" Mokonzi atunaki bango : — Moto oyo ayaki kokutana na bino mpe ayebisaki bino makambo oyo azalaki ndenge nini ?
8 They said, "He wore a garment of hair, with a leather belt at his waist." The king said, "Elijah the Tishbite." Bazongisaki : — Azalaki mobali moko alata bilamba ya poso ya nyama na loketo na ye. Mokonzi alobaki : — Ezalaki kaka Eliya, moto ya Tishibe.
9 The king sent a captain with his fifty men to Elijah. The captain went up to him as he sat on a hilltop, and said to him, "Man of our Father, the king says, 'Come down.'" Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye : — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.
10 Elijah answered the captain, "If I am a man of our Father, may fire fall from heaven and consume you and your fifty." And fire fell from heaven and consumed him and his fifty. Kasi Eliya azongiselaki mokonzi yango ya basoda : — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo mpe bato na yo tuku mitano. Bongo moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi yango ya basoda elongo na basoda na ye tuku mitano.
11 Again the king sent another captain with fifty men, who said, "Man of our Father, the king says: 'Come down quickly.'" Mokonzi atindaki lisusu epai ya Eliya mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende noki epai na ye.
12 Elijah answered, "If I am a man of our Father, may fire fall from heaven and consume you and your fifty." And the fire of our Father fell from heaven and consumed him and his fifty. Kasi Eliya azongiselaki mokonzi ya basoda : — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo elongo na bato na yo tuku mitano. Mbala moko moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye.
13 The king sent a third captain with his fifty. This one went up, knelt before Elijah, and pleaded, "Man of our Father, please let my life and the lives of your servants, these fifty, be precious in your eyes. Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye : — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo !
14 Fire came from heaven and consumed the two earlier captains with their fifties. Now let my life be precious to you." Nayebi ete moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki bakonzi nyonso mibale ya basoda elongo na basoda na bango oyo bayaki liboso ; kasi sik’oyo, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya bato na ngai tuku mitano ezala na motuya na miso na yo !
15 The messenger of our Father told Elijah, "Go down with him; don't be afraid of him." So Elijah went down with him to the king. Anjelu ya Yawe alobaki na Eliya : — Kende na ye nzela moko ; kobanga ye te. Bongo Eliya atelemaki mpe akendeki na ye nzela moko kino epai ya mokonzi.
16 He told the king, "This is what our Father says: You sent messengers to consult Baal-zebub, god of Ekron—is there no Father in Israel to ask his word?—so you will not leave the bed you climbed into; you will surely die." Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »
17 Ahaziah died, as our Father's word through Elijah said. Since Ahaziah had no son, Jehoram succeeded him, in the second year of Judah's king Jehoram son of Jehoshaphat. Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi.
18 The rest of Ahaziah's acts, what he did, are they not written in the Book of the Chronicles of the Kings of Israel? Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akazia mpe misala oyo asalaki ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]