Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Corinthians 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Paul, an apostle of Christ Jesus by the will of our Father, and Timothy our brother, to the church of our Father in Corinth, with all the holy ones throughout Achaia: Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote ; Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali kati na Akayi mobimba :
2 Grace to you and peace from our Father and the Lord Jesus Christ. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
3 Blessed be our Father, the Father of our Lord Jesus Christ, the Father of compassion and all comfort, Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso :
4 who comforts us in all our suffering, so we can comfort others in all their suffering with the comfort we ourselves receive from our Father. abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.
5 As the sufferings of Christ overflow to us, so our comfort also overflows through Christ. Pamba te, ndenge kaka tomonaka pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe Klisto abondisaka biso makasi.
6 If we suffer, it's for your comfort and salvation; if we're comforted, it's for your comfort, worked out as you patiently endure the same suffering we suffer. Boye soki tozali komona pasi, ezali mpo na kobondisama mpe lobiko na bino. Soki mpe biso tobondisami, ezali mpo ete bino mpe bobondisama mpo na koyikela pasi oyo tozali komona elongo na bino mpiko.
7 Our hope for you is firm, knowing that as you share in the sufferings, so also you share in the comfort. Boye, tozali solo na elikya makasi na tina na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge kaka bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso.
8 We want you to know, brothers and sisters, of the suffering we faced in Asia: we were weighed down far beyond our strength, so that we gave up hope of even living. Solo, bandeko, na tina na pasi oyo ekweyelaki biso kati na etuka ya Azia, tolingi boyeba malamu ete tonyokwamaki mingi kino ata kolemba nzoto mpe kobungisa elikya ya kokoba kozala na bomoi.
9 We felt we had received a death sentence, so we would rely not on ourselves but on our Father, who raises the dead. Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.
10 He rescued us from such a deadly threat, and will rescue us again; we have set our hope on him to keep rescuing us, Ye nde akangolaki biso na makama ya kufa ya lolenge wana, mpe akokangola biso lisusu. Solo, tozali na elikya kati na Ye ete akokangola biso lisusu,
11 as you also help us by your prayers, so many will give thanks on our behalf for the gracious gift given us through many prayers. awa bozali kosala elongo na biso na nzela ya mabondeli na bino. Boye, bato ebele bakozongisa matondi epai ya Nzambe na tina na biso mpo na likabo ya ngolu oyo azali kopesa biso lokola eyano na mabondeli ya bato ebele.
12 For this is our boast: our conscience testifies we lived in the world—especially toward you—with the holiness and sincerity of our Father, not worldly wisdom but the grace of our Father. Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
13 We write you nothing but what you can read and even understand, and I hope you'll understand fully, Solo, tokomelaka bino makambo mosusu te, kaka makambo oyo bozali kotanga to oyo boyebi malamu. Mpe nazali na elikya ete bokososola penza malamu kino na suka,
14 as you have partly understood us: on the day of our Lord Jesus, you will boast of us as we will of you. ndenge kaka bosili kososola yango mwa moke, ete bokoki penza komikumisa na tina na biso, ndenge mpe biso tokomikumisa na tina na bino na mokolo ya Nkolo Yesu.
15 With this confidence, I planned to come to you first, so you might have a second grace. Na elikya yango, nazalaki na mabongisi ya koya liboso epai na bino mpo ete bokoka kozwa ngolu ya mibale ;
16 I planned to visit you on my way to Macedonia, return to you from Macedonia, and have you send me on to Judea. mpe mpo ete, longwa epai na bino, nakende na Masedwane, mpe, sima na ngai kowuta na Masedwane, nazonga lisusu epai na bino mpo ete nazwa lisungi ya kokoba mobembo na ngai kino na Yuda.
17 Was I fickle in planning this? Or do I plan according to the flesh, saying Yes, yes and No, no at once? Boni, elingi koloba ete namikakolaki tango nasalaki mabongisi yango to mpe elingi koloba ete nasalaka mabongisi na ngai kolanda baposa ya bomoto, mpo ete, na mbala moko, nandima likambo mpe naboya yango lisusu ?
18 As surely as our Father is faithful, our word to you has not been "Yes" and "No." Kasi lokola ezali solo ete Nzambe azali Moyengebene, maloba oyo toyebisaki bino ezali te « iyo » mpe « te. »
19 For the Son of our Father, Jesus Christ, proclaimed among you through Silvanus, Timothy, and me, was not "Yes" and "No," but always "Yes" in him. Pamba te Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, oyo ngai Silasi mpe Timote toteyaki bino, azalaki te « iyo » mpe « te ; » kasi kati na Ye, ezalaki tango nyonso « iyo. »
20 However many promises our Father made, in him they are "Yes"; so through him, too, we say "Amen" to our Father, for his glory. Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto ; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe.
21 Now it is our Father who establishes us with you in Christ and has anointed us, Nzokande, ezali Nzambe nde alendisaka biso mpe bino kati na Klisto ; mpe lokola abulisaki biso na nzela ya epakolami na Ye,
22 who also sealed us and gave us his Holy Spirit in our hearts as a guarantee of what's coming. abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.
23 I call our Father as witness, on my life, that I did not return to Corinth to spare you. Nazali kolapa ndayi na Kombo ya Nzambe mpe likolo ya bomoi na ngai ete ezalaki te mpo na kolukela bino mindondo nde nazongaki lisusu te na Kolinto ;
24 Not that we control your faith, but we work together with you for your joy, since you stand firm by faith. ezali mpe te mpo na kokonza kondima na bino, kasi tozali kosala elongo na bino mpo na esengo na bino, pamba te botelemi ngwi kati na kondima.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]