Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Chronicles 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Solomon began building our Father's house in Jerusalem, on Mount Moriah, where our Father had appeared to his father David, at the site David had prepared on Ornan the Jebusite's threshing floor. Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi, na likolo ya ngomba Morija epai wapi Yawe abimelaki Davidi, tata na ye, mpe kaka na esika oyo Davidi abongisaki na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
2 He began building in the second month, second day, in the fourth year of his reign. Abandaki kotonga na mokolo ya mibale ya sanza ya mibale, na mobu ya minei ya bokonzi na ye.
3 These are the foundations Solomon laid for building the house of our Father: length about ninety feet by the earlier standard, width about thirty feet. Moboko oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Nzambe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse.
4 The portico across the house's front, along the width of the house, was about thirty feet wide; its height was 120 feet. He covered the inside with pure gold. Ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe ezalaki na bametele pene zomi, na bosanda, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto kati na yango.
5 He paneled the large room with cypress wood, covered it in fine gold, and added palm trees and chains. Babetaki mabaya ya sipele na bamir ya eteni oyo eleki monene mpe abambaki wolo ya peto na likolo na yango. Asalaki bililingi ya nzete ya mbila mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
6 He adorned the house with precious stones for beauty, and the gold was from Parvaim. Abambaki mabanga ya talo mpo na kokomisa yango kitoko. Wolo oyo asalelaki ezalaki wolo ya Parivayimi.
7 He covered the house—beams, thresholds, walls, doors—with gold, and carved cherubim on the walls. Apakolaki wolo na motondo, na bikuke, na bamir, mpe atobolaki bililingi ya basheribe na bamir.
8 He made the Most Holy Place, its length matching the house's width—about thirty feet—and its width also thirty feet. He overlaid it with about twenty-three tons of fine gold. Atongaki Esika-Oyo-Eleki-Bule ; molayi na yango ekokanaki na mokuse ya Tempelo ya Yawe : bametele pene zomi, na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto ya bakilo pene nkoto tuku mibale kati na Tempelo ya Yawe.
9 Nails weighed about twenty ounces of gold; he covered the upper rooms with gold. Basete oyo basalelaki ezalaki ya wolo, mpe ezalaki ya bagrame nkama motoba. Apakolaki lisusu wolo na bashambre ya likolo.
10 In the Most Holy Place he made two carved cherubim, gilded them. Atiaki bililingi ya basheribe mibale kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe apakolaki yango wolo.
11 Together the cherubim's wings spanned about thirty feet: one wing of the first cherub, about seven and a half feet, touched the house wall; its other wing, also about seven and a half feet, touched the second cherub's wing. Mapapu ya basheribe ezalaki na bametele pene zomi na molayi. Lipapu ya sheribe ya liboso ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe etutaki mir ya Tempelo ya Yawe ; bongo lipapu na ye mosusu, oyo ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano, etutaki lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki mpe na bametele mibale na basantimetele tuku mitano.
12 The second cherub's wing, about seven and a half feet, touched the house wall; its other wing, also about seven and a half feet, joined the first cherub's wing. Ndenge moko mpe mpo na lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano : etutaki mir mosusu ya Tempelo ya Yawe ; mpe lipapu mosusu oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano etutaki lipapu ya sheribe ya liboso.
13 The wings of these cherubim spread about thirty feet; they stood on their feet, facing the main hall. Mapapu ya basheribe yango ezalaki ya kofungwama na molayi ya bametele pene zomi. Basheribe nyonso mibale batelemaki na makolo na bango, mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya kati ya Esika ya bule.
14 He made the curtain of blue, purple, and crimson yarn and fine linen, with cherubim woven into it. Asalaki rido ya lino, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, mpe atongaki bililingi ya basheribe na likolo na yango.
15 In front of the house he made two pillars, each about fifty-three feet tall, topped with a capital about seven and a half feet high. Na liboso ya Tempelo ya Yawe, atongaki makonzi mibale oyo ezalaki na bametele pene zomi na sambo na bosanda. Na likolo ya likonzi moko na moko, ezalaki na moto ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano.
16 He made chains like a necklace, put them atop the pillars, made one hundred pomegranates, and fastened them to the chains. Asalaki bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni mpe atiaki yango na mito ya makonzi ; asalaki lisusu bililingi ya bambuma nkama moko ya grenade, mpe akangisaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
17 He set up the pillars in front of the temple, one to the right, one to the left, naming the right one Jachin and the left one Boaz. Mpe atongaki makonzi liboso ya Tempelo ya Yawe : moko na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe mosusu, na ngambo ya loboko ya mobali. Abengaki likonzi ya ngambo ya loboko ya mwasi Yakini, mpe oyo ya ngambo ya loboko ya mobali, Boazi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]