Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Chronicles 27 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jotham was twenty-five when he became king; he reigned sixteen years in Jerusalem. His mother was Jerushah, daughter of Zadok. Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki.
2 He did right in the eyes of our Father, as his father Uzziah had done—except he did not enter the temple of our Father. Yet the people still acted wrongfully. Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki ; kasi ye, atikalaki kokota te kati na Tempelo ya Yawe. Atako bongo, bato bakobaki kosala makambo mabe.
3 He built the Upper Gate of our Father's house, and built much on Ophel's wall. Yotami atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe mpe asalaki misala ebele na mir, na ngomba Ofeli.
4 He built cities in Judah's highlands, and in the forests he built forts and towers. Atongaki mpe bingumba kati na etuka ya bangomba ya Yuda, bandako makasi mpe bandako milayi kati na bazamba.
5 He fought the king of the Ammonites and defeated them. That year the Ammonites gave him 7,500 pounds of silver, 50,000 bushels of wheat, and 50,000 of barley—the same in the second and third years. Yotami abundisaki mokonzi ya bato ya Amoni mpe alongaki bango. Na mobu wana mpe na mibu mibale oyo elandaki, bato ya Amoni bafutaki ye lokola mpako ya mokonzi bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, bakilo nkoto minei na nkama mitano ya ble mpe bakilo nkoto minei na nkama mitano ya orje.
6 So Jotham grew strong, because he kept his conduct right before his Father. Yotami akomaki na nguya makasi, pamba te azalaki kotambola na bosembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
7 The rest of Jotham's acts, all his wars and deeds, are written in the Book of the Kings of Israel and Judah. Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami, bitumba mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.
8 He was twenty-five years old when he became king, and he reigned sixteen years in Jerusalem. Azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi.
9 Jotham rested with his ancestors; they buried him in the city of David, and his son Ahaz reigned in his place. Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]