Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 One day Jonathan son of Saul said to his armor-bearer, "Come, let's cross to the Philistine post opposite us," but did not tell his father. Mokolo moko, Jonatan, mwana mobali ya Saulo, alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Yaka ! Tokatisa na ngambo mosusu epai wapi bato ya Filisitia bazali. » Kasi alobaki ata likambo moko te epai ya tata na ye.
2 Saul stayed at Gibeah's edge under the pomegranate tree in Migron, with about 600 men. Saulo avandaki na mondelo ya engumba Gibea, na se ya nzete ya grenade oyo ezali na Migironi, elongo na basoda pene nkama motoba.
3 Ahijah son of Ahitub, Ichabod's brother, son of Phinehas, son of Eli, our Father's priest at Shiloh, wore the ephod. The troops did not know Jonathan had left. Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode ; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.
4 Between the passes Jonathan sought to cross toward the Philistine outpost stood a rocky crag on one side and a rocky crag on the other—one named Bozez, the other Seneh. Na bangambo ya se ya lubwaku oyo Jonatan asengelaki kokatisa mpo na kokende kobundisa bato ya Filisitia, ezalaki na libanga moko na ngambo moko na moko. Babengaki moko Botsetsi, mpe mosusu, Sene.
5 One crag stood to the north, facing Michmash, and the other to the south, facing Geba. Libanga moko etelemaki na ngambo ya nor, na nzela oyo ekenda na Mikimasi, mpe mosusu etalanaki na Geba, na sude.
6 Jonathan told his armor-bearer, "Come, let's cross to this uncircumcised outpost. Maybe our Father will act for us; nothing keeps him from saving by many or by few." Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : — Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.
7 His armor-bearer said, "Do all in your heart. Go—I'm with you, heart and soul." Elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azongisaki : — Sala nyonso oyo ozali na yango na makanisi. Kende ! Nazali elongo na yo na motema mpe na molimo.
8 Then Jonathan said, "We will cross over to those men and let them see us. Jonatan alobaki na ye : — Tokende kino na molako ya basoda yango mpe tomimonisa epai na bango.
9 If they say, 'Wait till we reach you,' we'll stay put and won't go up to them. Soki balobi na biso : « Botelema wana, bozela kino biso moko tokoya epai na bino ; » wana tokovanda na esika oyo tozali mpe tokokende epai na bango te.
10 But if they say, 'Come up to us,' we'll go up, for our Father has given them into our hand—that's our sign." Kasi soki balobi na biso : « Boya epai na biso, » tokokende epai na bango, pamba te yango ekozala elembo mpo na biso ete Yawe akabi bango na maboko na biso.
11 Both showed themselves to the Philistine outpost. "Look," the Philistines said, "the Hebrews are crawling out of the holes where they hid." Boye, bango mibale bamimonisaki na molako ya bato ya Filisitia. Mpe tango bato ya Filisitia bamonaki bango, balobaki : « Botala ! Ba-Ebre babimi wuta na mabulu epai wapi babombamaki. »
12 Outpost men called to Jonathan and his armor-bearer, "Come up to us and we'll teach you a lesson." Jonathan told his armor-bearer, "Climb up behind me, for our Father gave them into Israel's hand." Balobaki na Jonatan mpe na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Boya epai na biso, tokoteya bino likambo moko. » Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Landa ngai na sima, pamba te Yawe asili kokaba bango na maboko ya Isalaele. »
13 Jonathan scrambled up on hands and feet, his armor-bearer behind him; the Philistines fell before Jonathan, his armor-bearer killing them behind him. Jonatan asalelaki makolo mpe maboko na ye mpo na komata, mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye alandaki ye na sima. Wana Jonatan azalaki kokweyisa bato ya Filisitia na liboso ; na sima na ye, elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki koboma bango.
14 In that first attack Jonathan and his armor-bearer killed about twenty men within about half an acre. Na etumba oyo ya liboso, Jonatan elongo na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye babomaki bato pene tuku mibale, na etando oyo bangombe mibale ekoki kobalola na mokolo moko.
15 Panic struck the camp, field, and all the troops; outpost and raiders trembled too, the earth quaked—panic from our Father. Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.
16 Saul's watchmen at Gibeah of Benjamin looked out—the Philistine horde was melting away, scattering everywhere. Bakengeli ya Saulo, oyo bazalaki na Gibea ya Benjame bamonaki mampinga kopalangana na bangambo nyonso.
17 Saul told his troops, "Count who's missing." When they had counted, Jonathan and his armor-bearer were gone. Bongo Saulo alobaki na basoda oyo bazalaki elongo na ye : « Botanga basoda mpo na koyeba banani basili kokima. » Tango batangaki, bamonaki ete Jonatan mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye bazali te.
18 Saul told Ahijah, "Bring the ark of our Father here," for then the ark of our Father was with the Israelites. Saulo alobaki na Ayiya : « Boya na Sanduku ya Nzambe. » Pamba te na tango wana, Sanduku ya Nzambe ezalaki elongo na bato ya Isalaele.
19 While Saul spoke to the priest, the Philistine camp's uproar grew louder and louder. He told the priest, "Withdraw your hand." Wana Saulo azalaki nanu kosolola na Nganga-Nzambe, mobulu ezalaki kaka kokoma makasi kati na molako ya bato ya Filisitia. Boye Saulo alobaki na Nganga-Nzambe : « Tika ! Kotuna Yawe ezali lisusu na tina te. »
20 Saul and his troops rallied, reached the battle, and found the Philistines' swords turned against each other in total confusion. Bongo Saulo elongo na bato na ye nyonso basanganaki mpe bakendeki na bitumba ; bamonaki ete bato ya Filisitia bazali na mobulu makasi, bazali kobomana bango na bango na mipanga.
21 Hebrews who had earlier sided with the Philistines and gone up with them into the camp also turned to join the Israelites with Saul and Jonathan. Ba-Ebre oyo basalelaki liboso bato ya Filisitia mpe bakendeki elongo na bango na bitumba mosusu, bango basanganaki na bato ya Isalaele, oyo bazalaki elongo na Saulo mpe Jonatan.
22 When all the Israelite men hiding in Ephraim's hill country heard the Philistines had fled, they too chased them closely in the battle. Tango bato nyonso ya Isalaele oyo babombamaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi bayokaki ete bato ya Filisitia bazali kokima, bango mpe balandaki mpe babundisaki bato ya Filisitia.
23 So our Father rescued Israel that day, and the fighting moved on beyond Beth-aven. Ezalaki ndenge wana nde Yawe abikisaki na mokolo wana bato ya Isalaele, mpe bitumba ekobaki kino ekatisaki Beti-Aveni.
24 Israel's troops were hard-pressed that day, for Saul made them swear, "Cursed is anyone who eats food before evening, before I avenge myself on my enemies." None of the troops tasted food. Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.
25 All the troops entered the forest, and there was honey on the ground. Bato nyonso bakotaki na zamba mpe bamonaki mafuta ya nzoyi, na mabele.
26 Entering the forest, honey was flowing, yet no one raised a hand to his mouth, for the troops feared the oath. Tango bakotaki na zamba, bamonaki mafuta ya nzoyi kotanga, mpe moko te asimbaki mpe aliaki yango mpo na kotosa ndayi.
27 But Jonathan hadn't heard his father put the troops under oath, so he reached out his staff tip, dipped it in the honeycomb, put his hand to his mouth, and his eyes brightened. Kasi Jonatan ayokaki te ete tata na ye atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi ; apusaki nzete oyo azalaki na yango na loboko, azindisaki yango na mafuta ya nzoyi mpe aliaki yango, elongi na ye engengaki.
28 One soldier said, "Your father made the troops swear, 'Cursed is anyone who eats food today'—so the men are exhausted." Bongo moko kati na basoda alobaki na ye : — Tata na yo atiaki mampinga nyonso na se ya mokumba ya ndayi na koloba : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei na mokolo ya lelo. » Yango wana bato nyonso balembi.
29 Jonathan said, "My father has troubled the land. See how my eyes brightened from tasting a little of this honey. Jonatan alobaki : — Solo, tata na ngai akotisaki pasi kati na mokili. Botala ndenge nini elongi na ngai engengi ! Ezali mpo ete nalie mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi.
30 How much better if the troops had eaten freely today from their enemies' plunder! The defeat of the Philistines has not been great." Bongo soki bato na biso baliaki na mokolo ya lelo mafuta ya nzoyi oyo bamonaki epai ya banguna na biso, kokweyisama ya bato ya Filisitia elingaki kozala monene !
31 That day they struck down the Philistines from Michmash to Aijalon, and the troops were utterly exhausted. Na mokolo wana, sima na bato ya Isalaele kosilisa koboma bato ya Filisitia wuta na Mikimasi kino na Ayaloni, balembaki makasi.
32 The troops rushed on the loot, seized sheep, cattle, and calves, killed them on the ground, and ate the meat with blood in it. Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo : bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango.
33 Someone told Saul, "The troops are sinning against our Father, eating meat with the blood still in it." "You've broken faith," he said. "Roll a large stone over to me here." Moto moko alobaki na Saulo : — Tala ! Bato bazali kosala masumu liboso ya Yawe na ndenge bazali kolia nyama na likolo ya makila. Saulo alobaki : — Bokweyisi kondima ! Botindika sik’oyo libanga moko ya monene kino awa.
34 Then he said, "Scatter among the troops and tell them: each bring me his ox or sheep, slaughter it here, and eat—don't sin against our Father by eating meat with the blood." So that night everyone brought his ox and slaughtered it there. Saulo abakisaki : Bokende kati na bato mpe boloba na bango ete moko na moko amemela ngai ngombe na ye mpe meme na ye, mpe akata yango kingo na esika oyo. Bongo bokolia yango mpe bokosala masumu te liboso ya Yawe na kolia nyama na likolo ya makila kati na yango. Boye moko na moko amemaki ngombe na ye na butu mpe akataki yango kingo na esika yango.
35 Saul built an altar to our Father—his first altar to him. Bongo Saulo atongaki etumbelo mpo na Yawe ; ezalaki mbala na ye ya liboso ya kosala likambo ya boye.
36 Saul said, "Let's go down after the Philistines tonight, plunder them till dawn, and leave none alive." They answered, "Do what seems good to you." But the priest said, "Let's approach our Father here." Saulo alobaki : — Tokita mpe tolanda bato ya Filisitia na butu ya lelo, tobebisa bango kino na tongo mpe totika ata moto moko te ya bomoi kati na bango. Bato bazongisaki : — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu. Kasi Nganga-Nzambe alobaki : — Totuna Nzambe na esika oyo.
37 So Saul asked our Father, "Should I go down after the Philistines? Will you hand them to Israel?" But he gave him no answer that day. Boye Saulo atunaki Nzambe : « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele ? » Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana.
38 Saul said, "Come here, all you leaders of the troops, and let us find out how this sin happened today. Saulo alobaki : — Bino nyonso oyo bozali bakambi ya bato, boya awa ! Toluka koyeba lisumu nini oyo esalemi na mokolo ya lelo.
39 As surely as our Father who rescues Israel lives—even if the guilt lies with my son Jonathan, he will surely die." But no one among the people answered. Na Kombo na Yawe, Mobikisi ya Isalaele, ata ezali Jonatan, mwana na ngai ya mobali, nde asali lisumu yango, asengeli kokufa. Kasi kati na bato, moko te alobaki ata liloba moko.
40 He told all Israel, "You stand on one side; Jonathan my son and I on the other." The people told Saul, "Do what you think is best." Bongo Saulo alobaki na bato nyonso ya Isalaele : — Bozala ngambo moko. Ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali, tokozala ngambo mosusu. Bato bazongisaki : — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu.
41 Saul prayed, "our Father, God of Israel, why haven't you answered your servant today? If this guilt is in me or my son Jonathan, our Father, God of Israel, respond with Urim; but if it's in your people Israel, respond with Thummim." The lot fell on Jonathan and Saul; the troops were cleared. Bongo Saulo asambelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele : « Oh Nzambe, talisa ngai eyano ya malamu. » Boye zeke ekweyaki epai ya Jonatan mpe Saulo, mpe bato bazalaki na mbeba te.
42 Saul said, "Cast the lot between me and my son Jonathan." The lot fell on Jonathan. Saulo alobaki : « Bobeta zeke kati na ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali. » Mpe zeke ekweyaki epai ya Jonatan.
43 Saul said to Jonathan, "Tell me what you did." He answered, "I only tasted a little honey on the tip of my staff. Now I must die." Bongo Saulo alobaki na Jonatan : — Yebisa ngai likambo oyo osalaki. Jonatan alobaki : — Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa !
44 Saul said, "May our Father deal with me, and more, if you don't surely die, Jonathan." Saulo alobaki : — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.
45 The troops told Saul, "Must Jonathan die—who won this great victory for Israel? Never! As our Father lives, not one hair of his head will fall to the ground, for it was with our Father's help that he acted today." So they rescued Jonathan, and he did not die. Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.
46 Then Saul broke off his pursuit of the Philistines, and the Philistines withdrew to their own land. Saulo atikaki kolanda bato ya Filisitia, mpe bato ya Filisitia bazongaki na mboka na bango.
47 Once Saul took the reign over Israel, he fought all his enemies on every side: Moab, Ammon, Edom, the kings of Zobah, and the Philistines. Wherever he turned, he defeated them. Tango Saulo azwaki bokonzi mpo na koyangela Isalaele, abundisaki banguna na bango na bangambo nyonso : Moabi, bato ya Amoni, Edomi, bakonzi ya Tsoba, mpe bato ya Filisitia. Bisika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kolonga bato wana.
48 He fought bravely, struck down the Amalekites, and rescued Israel from those who raided them. Abundisaki na makasi nyonso bato ya Amaleki mpe alongaki bango, akangolaki Isalaele na maboko ya bato oyo bazalaki kobotola bango biloko.
49 Saul's sons: Jonathan, Ishvi, Malchishua. His two daughters: Merab the firstborn, Michal the younger. Bana mibali ya Saulo bazalaki : Jonatan, Yishivi mpe Maliki-Shuwa. Azalaki na bana mibale ya basi : ya mokolo, kombo na ye ezalaki « Merabi ; » mpe ya leki, « Mikali. »
50 His wife: Ahinoam, daughter of Ahimaaz. His army commander: Abner son of Ner, Saul's uncle, Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Ayinoami, » mwana mwasi ya Ayimaatsi. Abineri, mwana mobali ya Neri, Noko ya Saulo, azalaki mokonzi ya mampinga ya Saulo.
51 for Kish, Saul's father, and Ner, Abner's father, were sons of Abiel. Kishi, tata ya Saulo, mpe Neri, tata ya Abineri, bazalaki bana mibali ya Abieli.
52 War against the Philistines was fierce all Saul's days; whenever he saw a strong or brave man, he recruited him for himself. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Saulo, bitumba ezalaki makasi na bato ya Filisitia ; mpe bisika nyonso oyo Saulo azalaki komona bato ya makasi to ya mpiko, azalaki kozwa mpe kokotisa bango kati na mampinga na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]