Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Saul was thirty years old when he became king, and he reigned over Israel forty-two years. Saulo azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki Isalaele mibu tuku minei na mibale.
2 Saul chose 3,000 of Israel: 2,000 with him at Michmash and the hill country of Bethel, 1,000 with Jonathan at Gibeah of Benjamin. The rest he sent home, each to his tent. Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.
3 Jonathan struck down the Philistine garrison at Geba, and the Philistines heard. Then Saul blew the trumpet through the land: "Let the Hebrews hear!" Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki : « Tika ete Ba-Ebre bayoka ! »
4 All Israel heard Saul had struck down the Philistine garrison, and that Israel had become a stench to the Philistines. So the people rallied to Saul at Gilgal. Bato nyonso ya Isalaele bayokaki sango oyo azalaki koloba ete Saulo abundisaki mpe alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, mpe ete bato ya Filisitia bayinaki bato ya Isalaele. Bato nyonso basanganaki na Giligali mpo na kokende kobunda elongo na Saulo.
5 The Philistines assembled to fight Israel—3,000 chariots, 6,000 horsemen, and troops as countless as the sand on the seashore. They came up and camped at Michmash, east of Beth-aven. Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.
6 When Israel's men saw they were in trouble—the people were hard pressed—they hid in caves, thickets, rocks, pits, and cisterns. Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.
7 Some Hebrews even crossed the Jordan to Gad and Gilead. But Saul stayed at Gilgal, and all the people followed him trembling. Ndambo ya Ba-Ebre mosusu bakatisaki mayi ya Yordani mpo na kokende na mokili ya Gadi mpe ya Galadi. Saulo azalaki nanu na Giligali, mampinga nyonso oyo ezalaki elongo na ye ezalaki kolenga na somo.
8 He waited seven days, the time Samuel set; but Samuel did not come to Gilgal, and the people scattered from him. Azelaki mikolo sambo, tango oyo Samuele akataki. Kasi mpo ete Samuele ayaki te na Giligali, yango wana bato batikaki Saulo mpe bapalanganaki.
9 Saul said, "Bring me the burnt offering and the peace offerings." And he offered up the burnt offering. Saulo alobaki : « Bomemela ngai banyama ya mbeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. » Mpe Saulo abonzaki mbeka ya kotumba.
10 As he finished the burnt offering, Samuel came, and Saul went out to meet and greet him. Bongo tango kaka asilisaki kobonza mbeka yango ya kotumba, Samuele akomaki. Saulo abimaki mpo na kokende kopesa ye mbote.
11 "What have you done?" Samuel asked. Saul replied, "I saw the people scattering from me, you did not come at the set time, and the Philistines were gathering at Michmash, Samuele atunaki ye : — Osali penza nini ? Saulo azongisaki : — Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi,
12 I thought, 'The Philistines will come against me at Gilgal, and I haven't sought our Father's favor.' So I forced myself and offered the burnt offering." namilobelaki : « Sik’oyo, bato ya Filisitia bazali koya kobundisa ngai na Giligali, kasi ngai nabondeli Yawe te ! » Yango wana, nazwaki mokano ya kobonza mbeka ya kotumba.
13 "You acted foolishly," Samuel told Saul. "You didn't keep the command your Father gave you. Had you kept it, our Father would have set your kingdom over Israel forever. Samuele alobaki na Saulo : — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.
14 But now your kingdom will not last. Our Father has sought for himself a man after his own heart and appointed him ruler over his people, because you did not keep what he commanded you." Kasi sik’oyo, bokonzi na yo ekowumela lisusu te. Yawe aluki moto mosusu oyo asepelisaka motema na Ye mpe atie ye mokambi ya bato na Ye, pamba te yo, obateli mibeko ya Yawe te.
15 Samuel left Gilgal and went up to Gibeah in Benjamin. Saul counted the people with him—about 600 men. Bongo Samuele alongwaki na Giligali mpe akendeki na Gibea ya Benjame. Mpe Saulo atangaki bato oyo bazalaki elongo na ye : bazalaki bato pene nkama motoba.
16 Saul, his son Jonathan, and the people with them stayed at Geba in Benjamin; the Philistines camped at Michmash. Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, mpe mibali nyonso oyo bazalaki kovanda elongo na bango batandamaki mpo na bitumba, na Geba ya Benjame. Kasi bato ya Filisitia batongaki ya bango molako na Mikimasi.
17 Raiders left the Philistine camp in three companies. One turned toward Ophrah, in the land of Shual; Longwa na molako ya bato ya Filisitia, mampinga ya basoda ya mpiko ebimaki mpe ekabwanaki na masanga misato : lisanga ya liboso ezwaki nzela oyo ekenda kino na Ofira, na mokili ya Shuwali ;
18 another turned toward Beth-horon; the third toward the border overlooking the Valley of Zeboim, toward the wilderness. lisanga ya mibale etalisaki na nzela ya Beti-Oroni ; mpe lisanga ya misato ezwaki nzela oyo ekenda na mondelo ya Lubwaku ya Tseboyimi, na ngambo ya esobe.
19 No blacksmith could be found in all Israel, because the Philistines had said, "Otherwise the Hebrews will make swords or spears." Nzokande, na tango wana, batuli bibende bazalaki lisusu te kati na mokili mobimba ya Isalaele, pamba te bato ya Filisitia balobaki : « Ba-Ebre bakoki kosala te, ezala makonga to matolotolo. »
20 So all Israel went down to the Philistines to sharpen their plowshares, picks, axes, and sickles. Yango wana, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kokende epai ya bato ya Filisitia mpo na kotia minu na basonge ya bibende oyo bangombe etimolaka na yango mabele, na bapiki, na bipasola mpe na bapawu.
21 The charge was about a quarter ounce of silver for sharpening plowshares, picks, and forks, and about an eighth of an ounce for sharpening axes and for resharpening the goads. Bongo mpo na kotia minu yango na bapawu, na bapiki mpe na bipasola, bazalaki kofuta bagrame mwambe ya mbongo ya bibende.
22 On the day of battle no sword or spear was found among all the people with Saul and Jonathan; only Saul and his son Jonathan had them. Boye, na mokolo ya bitumba, soda ata moko te oyo azalaki elongo na Saulo mpe na Jonatan azalaki na mopanga to na likonga na loboko na ye ; kaka Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, nde bazalaki na yango.
23 A detachment of the Philistines went out to the pass at Michmash. Limpinga moko ya basoda ya Filisitia eyaki kotelema na kati-kati ya lubwaku ya Mikimasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]