Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 28 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David assembled at Jerusalem all Israel's officials: officials of the tribes, commanders of the divisions serving the king, commanders of thousands and hundreds, stewards over all the king's and his sons' property and livestock, with the court officials, the mighty men, and all valiant warriors. Davidi abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele, na Yelusalemi : bakonzi ya mabota, bakonzi ya masanga ya basoda oyo bazalaki kosalela mokonzi, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda, babateli bozwi mpe bibwele ya mokonzi, bato oyo balandelaka bana na ye ya mibali elongo na basali ya ndako ya mokonzi, basoda ya mpiko mpe bato nyonso ya lokumu.
2 King David rose to his feet and said, "Listen to me, my brothers and my people. I had it in my heart to build a house of rest for the ark of our Father's covenant, the footstool for his feet, and I prepared to build it. Mokonzi Davidi atelemaki mpe alobaki : — Boyoka ngai, bandeko na ngai mpe bato na ngai : Nazalaki na likanisi ya kotonga esika ya kopema mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, enyatelo ya makolo ya Nzambe na biso ; bongo nabongisaki biloko mpo na kotonga yango.
3 But our Father told me, 'You won't build a house for my name, because you're a man of war who has shed blood.' Kasi Nzambe alobaki na ngai : « Okotonga ndako mpo na Kombo na Ngai te, pamba te ozali moto ya bitumba mpe osopaki makila. »
4 Yet our Father of Israel chose me, from my whole father's house, to reign over Israel forever. For our Father chose Judah to lead, and within Judah's house, chose my father's house; and of my father's sons he delighted to make me king over all Israel. Nzokande, Yawe, Nzambe ya Isalaele, aponaki ngai kati na libota na ngai mobimba mpo ete nazala mokonzi ya Isalaele mpo na libela. Aponaki Yuda mpo ete azala mokonzi ; mpe kati na ndako ya Yuda, aponaki libota ya tata na ngai ; mpe kati na bana mibali ya tata na ngai, asepelaki kokomisa ngai mokonzi ya Isalaele mobimba.
5 Of all my sons—our Father has given me many—he chose Solomon my son to sit on the throne of our Father's kingdom over Israel. Kati na bana na ngai nyonso ya mibali, pamba te Yawe apesi ngai bango ebele, aponaki Salomo, mwana na ngai ya mobali, mpo ete avanda na Kiti ya Bokonzi ya Yawe kati na Isalaele.
6 He told me, 'Solomon your son will build my house and my courts, for I chose him as my son, and I will be his father.' Alobaki na ngai : « Mwana na yo, Salomo, nde akotonga Ndako na Ngai mpe lopango na Ngai, pamba te naponaki ye mpo ete azala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala tata mpo na ye.
7 I will establish his kingdom forever if he stays firm to keep my commands and judgments, as he does today. Nakolendisa bokonzi na ye mpo na libela soki akangami makasi na mibeko na Ngai ndenge azali kosala yango lelo. »
8 "So now, before all Israel, the assembly of our Father, and in his hearing, keep and seek out every command of your Father, so you may possess this good land and leave it to your children after you forever. Sik’oyo, napesi bino mokumba liboso ya Isalaele mobimba, ya lisanga ya Yawe, mpe liboso ya Nzambe na biso, oyo azali koyoka biso : Bosala keba mpo na kolanda mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bino, mpo ete bozwa mokili oyo ya kitoko mpe kotika yango lokola libula epai ya bakitani na bino mpo na libela.
9 You, Solomon my son, know the God of your father, and serve him with a whole heart and willing mind—our Father searches every heart, understands every plan and thought. Seek him and you'll find him; abandon him and he'll reject you forever. Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.
10 Take note, since our Father chose you to build a house for the sanctuary. Be strong, act." Yeba sik’oyo ete Yawe aponi yo mpo ete otongela Ye Ndako oyo ekozala Esika na Ye ya Bule. Yika mpiko mpe sala mosala.
11 David gave Solomon his son the plan of the portico of the temple, its buildings, its storerooms, its upper rooms, its inner rooms, and the room of the mercy seat, Davidi apesaki Salomo, mwana na ye ya mobali, elili ya ndako moke ya kokotela na Tempelo, ya bandako mosusu ya Tempelo, ya bibombelo na yango, ya bashambre na yango ya likolo, ya bashambre na yango ya kati mpe ya esika ya bolimbisi masumu.
12 and the plan of all he had in mind for the courts of our Father's house, for all the surrounding rooms, for the storerooms of his house, and for the storerooms of the dedicated gifts; Apesaki ye elili ya nyonso oyo molimo atiaki na makanisi na ye na tina na lopango ya Tempelo ya Yawe, ya bashambre nyonso ya zingazinga, ya biloko ya talo ya Ndako ya Nzambe mpe ya biloko ya bule.
13 for the divisions of the priests and Levites, for all the work of service in our Father's house, and all the vessels for service in his house. Davidi apesaki ye mibeko na tina na masanga ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi, na tina na misala nyonso mpe bisalelo nyonso ya Tempelo ya Yawe.
14 He gave gold by weight for each gold article for every kind of service, and silver by weight for each silver article for every kind of service. Mpo na bisalelo ya mosala, Davidi atalisaki kilo ya wolo oyo ekoki mpo na bisalelo nyonso ya wolo ; kilo ya palata oyo ekoki mpo na bisalelo nyonso ya palata :
15 The weight for the gold lampstands and their gold lamps, the weight of gold for each gold lampstand and its lamps, and the weight of silver for each silver lampstand and its lamps, according to each lampstand's use. kilo ya wolo mpo na bitelemiselo ya minda basala na wolo mpe minda na yango ya wolo kolanda kilo ya etelemiselo moko na moko ya minda elongo na minda na yango ; kilo ya palata mpo na etelemiselo moko na moko ya minda, basala na palata mpe minda na yango ya palata kolanda mosala ya etelemiselo moko na moko ya mwinda ;
16 Gold's weight for each table of the bread of the Presence; and silver for the silver tables. kilo ya wolo mpo na mesa moko na moko ya mapa oyo ebulisami, kilo ya palata mpo na bamesa ya palata ;
17 The forks, basins, and pitchers of pure gold; the weight for each gold dish; the weight for each silver dish; kilo ya wolo ya peto mpo na bakanya, basani oyo basalelaka mpo na kosopa mayi, mpe mpo na bakopo ya milayi ; kilo ya wolo mpo na kopo moko na moko ya moke moko ; kilo ya palata mpo na moko na moko ya bakopo mike ya palata ;
18 refined gold by weight for the incense altar; gold for the design of the chariot—the cherubim spreading their wings and covering the ark of the covenant of our Father. mpe kilo ya wolo ya peto mpo na etumbelo ya malasi. Apesaki ye lisusu elili ya shar ya basheribe ya wolo oyo mapapu na yango ezali ya kofungwama mpe ezipi Sanduku ya Boyokani ya Yawe.
19 "All this," David said, "I have in writing from our Father's hand, who gave me understanding of all the plan's details." Davidi alobaki : — Nyonso oyo nazali na yango na mokanda oyo, ekomami na loboko na Yawe ; Ye moko apesi ngai mayele mpo na kososola misala nyonso oyo elili ezali kotalisa.
20 David told his son Solomon, "Be strong and courageous; do the work. Don't fear or be discouraged, for my Father is with you. He won't fail or abandon you until all the work for the service of the house of our Father is finished. Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.
21 Look—the priests and Levites are divided, ready for all the service of our Father's house. Every skilled, willing man will join you in any task, with the officials and all the people, fully at your command." Ezali mpe na masanga ebele ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi oyo babongisami mpo na misala ya ndenge na ndenge kati na Tempelo ya Yawe. Na mosala oyo nyonso, okozwa lisungi ya bato oyo bayebi mosala malamu, oyo bamipesa bango moko mpo na misala ya ndenge na ndenge. Bakonzi mpe bato nyonso bakotosa mitindo na yo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]