Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David the king told the whole assembly: My son Solomon, the one our Father has chosen, is young and inexperienced, and the task is great, for the temple is not for man but for our Father. Mokonzi Davidi alobaki na lisanga mobimba : — Salomo, mwana na ngai ya mobali, moko kaka oyo Nzambe aponi, azali nanu elenge mpe ayebi penza makambo malamu te. Nzokande, mosala ezali monene, pamba te Ndako oyo ezali mpo na moto te kasi mpo na Yawe Nzambe.
2 With all my strength I have provided for my Father's house: gold for the gold, silver for the silver, bronze for the bronze, iron for the iron, wood for the wood; onyx stones and stones for settings, stones of antimony and varied colors, every kind of precious stone, and marble in abundance. Na bozwi na ngai nyonso, nabongisaki mpo na Ndako ya Nzambe na ngai : wolo mpo na misala ya wolo, palata mpo na misala ya palata, ebende mpo na misala ya bibende, mabaya mpo na misala ya mabaya, mabanga ya onikisi mpe mabanga ya kobamba, mabanga oyo engengaka mpe ya balangi ebele, mabanga ya talo ya lolenge nyonso mpe mabanga ya marbre. Biloko oyo nyonso ezalaki penza ebele.
3 Because I delight in my Father's house, I give my personal treasure of gold and silver to my Father's house, beyond all I've provided for the holy house: Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko : wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule :
4 about 112 tons of gold, gold of Ophir, and about 262 tons of refined silver, to overlay the buildings' walls. kilo nkoto nkama moko ya wolo ya peto ya Ofiri, kilo nkoto nkama mibale na tuku mitano ya palata ya peto mpo na kolatisa bamir ya Ndako.
5 Gold for the gold, silver for the silver, and every task for craftsmen's hands. Now who is willing to dedicate himself today to our Father? Wolo mpe palata yango ebongisami mpo na misala ya wolo mpe ya palata, mpe mpo na misala nyonso oyo bato ya misala ya maboko basengeli kosala. Sik’oyo, nani alingi kopesa na esengo mpe na motema moko epai na Yawe ?
6 Then the clan leaders, the tribal leaders of Israel, the commanders of thousands and hundreds, and the officials over the king's work offered willingly. Boye, bakambi ya mabota, bakonzi ya mabota ya Isalaele, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpe bakambi ya misala ya mokonzi bapesaki makabo wuta na mitema na bango moko.
7 For the service of our Father's house, they gave about 188 tons of gold and 10,000 darics, 375 tons of silver, 675 tons of bronze, and 3,750 tons of iron. Mbala moko, bapesaki mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe : bakilo nkama tuku sambo ya wolo, biloko ya wolo nkoto zomi, bakilo koleka minkoko nkama misato ya palata, bakilo nkoto nkama motoba ya bronze, mpe bakilo koleka minkoko misato ya bibende.
8 Whoever had precious stones gave them to our Father's house treasury, under Jehiel the Gershonite's care. Bato nyonso oyo bazalaki na mabanga ya talo bapesaki yango na ebombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe epai ya Yeyeli, moto ya libota ya Gerishoni.
9 The people rejoiced at their willing gifts, offered freely to our Father with a whole heart; King David also rejoiced greatly. Bato basepelaki mingi na makabo oyo bango moko bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, pamba te bazalaki kopesa yango epai ya Yawe, na motema mobimba. Mokonzi Davidi mpe asepelaki na yango mingi.
10 So David blessed our Father before the whole assembly. And David said, "Blessed are you, the Father of Israel our father, from everlasting to everlasting. Davidi akumisaki Yawe liboso ya lisanga mobimba na maloba oyo : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tata na biso, tika ete ozwa lokumu mpo na libela !
11 Yours, our Father, are the greatness, the power, the glory, the victory, and the majesty—for everything in the heavens and on earth is yours. Yours is the kingdom, our Father; you are lifted up as head over all. Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.
12 Riches and honor come from you; you rule over all. Power and might are in your hand; it is in your hand to make great and to give strength to all. Bozwi mpe lokumu ewutaka epai na Yo ; ozali na bokonzi likolo na nyonso, makasi mpe nguya ezali na maboko na Yo mpo na kotombola mpe kopesa makasi na moto nyonso.
13 And now, our Father, we give thanks to you and praise your glorious name. Nzambe na biso, tozali sik’oyo kosanzola Yo mpe kokumisa Kombo na Yo.
14 Who am I, and who are my people, that we could offer so willingly? Everything comes from you—we have only given you what's from your own hand. Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani, mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo, wuta na mokano ya mitema na biso moko ? Nyonso ewutaka epai na Yo, mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.
15 We are foreigners and guests before you, as all our ancestors were; our days on earth are like a shadow, with no hope of staying. Liboso na Yo, tozali bapaya mpe baleki nzela, ndenge ezalaki batata na biso. Mikolo na biso awa na mokili ezali koleka lokola elili oyo ezangi elikya.
16 O our Father, all this wealth we gathered to build you a house for your holy name comes from your hand, and all of it is yours. Oh Yawe, Nzambe na biso, bomengo nyonso oyo tobongisi mpo na kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Yo ya Bule ewuti na loboko na Yo mpe ezali ya Yo.
17 I know, my Father, you test the heart and delight in integrity. In my heart's integrity I have freely given all this, and now I see your people found here, giving to you with joy. Oh Nzambe na ngai, nayebi ete oyebi bozindo ya mitema na biso, osepelaka na bosembo. Napesi nyonso oyo wuta na mokano ya motema na ngai moko mpe na makanisi ya lokuta te. Sik’oyo, namoni ndenge nini bato na Yo, oyo bazali awa, bapesi Yo makabo oyo na motema malamu.
18 O God of Abraham, Isaac, and Israel, our fathers, keep this intent forever in your people's hearts, and direct their hearts toward you. Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, Izaki mpe Isalaele, batata na biso, batela makanisi oyo kati na mitema ya bato na Yo mpo na libela mpe sala ete mitema na bango ekangama na Yo.
19 Give my son Solomon a whole heart to keep your commands, testimonies, and statutes, to do all this, and build the temple I have provided for." Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo ; mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »
20 David told the whole assembly, "Bless your Father now." So they all blessed the God of their fathers, bowed their heads, and fell facedown before our Father and the king. Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
21 They sacrificed sacrifices to our Father and offered burnt offerings to our Father the next day: 1,000 bulls, 1,000 rams, 1,000 lambs, with their drink offerings, and abundant sacrifices for all Israel. Mokolo oyo elandaki, babonzaki bambeka mpe bambeka ya kotumba epai na Yawe : bangombe ya mibali nkoto moko, bameme ya mibali nkoto moko mpe bana meme nkoto moko elongo na makabo ya masanga ya vino mpe makabo mosusu ebele, mpo na Isalaele mobimba.
22 They ate and drank before our Father that day with great joy, made Solomon son of David king again, anointed him ruler for our Father, and Zadok priest. Baliaki mpe bamelaki liboso ya Yawe na esengo na mokolo wana, mpe batatolaki mpo na mbala ya mibale ete Salomo, mwana mobali ya Davidi, azali mokonzi. Bapakolaki ye mafuta mpo ete azala mokonzi ; mpe Tsadoki, mpo ete azala Nganga-Nzambe.
23 Solomon sat on our Father's throne as king in place of David his father. He thrived, and all Israel obeyed him. Salomo avandaki na Kiti ya Bokonzi ya Yawe lokola mokonzi na esika ya Davidi, tata na ye. Apambolamaki mpe Isalaele mobimba etosaki ye.
24 Also all the leaders and mighty warriors, and also all King David's sons, submitted to King Solomon. Bakonzi nyonso, basoda ya mpiko mpe bana nyonso ya mibali ya mokonzi Davidi batosaki mokonzi Salomo.
25 And our Father made Solomon exceedingly great in the sight of all Israel, giving him royal majesty beyond any king before him in Israel. Yawe atombolaki Salomo makasi liboso ya Isalaele mobimba, mpe apesaki ye lokumu ya bokonzi koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo balekaki liboso na ye.
26 David son of Jesse reigned over all Israel. Davidi, mwana mobali ya Izayi, azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba.
27 His reign over Israel lasted forty years—seven in Hebron, thirty-three in Jerusalem. Davidi akonzaki Isalaele mibu tuku minei : mibu sambo na Ebron mpe mibu tuku misato na misato na Yelusalemi.
28 He died at a good old age, full of days, wealth, and honor; Solomon his son reigned in his place. Akufaki na kimobange ya esengo. Atondisamaki na mibu ebele, na bozwi mpe na lokumu ; bongo Salomo, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
29 Now the acts of King David, first and last, are written in the records of Samuel the seer, the records of Nathan the prophet, and the records of Gad the seer, Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Davidi, wuta na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Samuele, na buku ya misala ya mosakoli Natan mpe na buku ya misala ya mosakoli Gadi.
30 with all his reign and might, and the events that came upon him, Israel, and all the kingdoms of the lands. Kati na babuku ya misala yango, balobelaki mpe makambo nyonso ya bokonzi mpe ya makasi na ye, makambo nyonso oyo ekomelaki ye, Isalaele mpe mikili nyonso ya zingazinga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]