Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 27 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is the count of Israel's people—heads of families, commanders of thousands and hundreds, and officers serving the king in every matter of the divisions that rotated monthly through the year, each division 24,000. Tala bana ya Isalaele oyo bazalaki kosalela mokonzi : ezalaki na bakambi ya mabota, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda mpe bakomi mikanda. Mosala na bango ezalaki : kotala makambo oyo etali mabongisi ya mampinga. Sanza na sanza kati na mobu, lisanga moko ezalaki kokota na mosala mpe lisanga mosusu ezalaki kobima. Lisanga moko na moko ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
2 Over the first division, for the first month, was Jashobeam son of Zabdiel; his division numbered 24,000. Mpo na sanza ya liboso : lisanga ya Yashobeami, mwana mobali ya Zabidieli ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
3 He was a descendant of Perez, chief of all army commanders for the first month. Yashobeami azalaki mokitani ya Peretsi mpe azalaki mokonzi ya bakonzi nyonso ya mampinga mpo na sanza ya liboso.
4 Dodai the Ahohite led the second month's division; Mikloth was its chief officer—24,000 men. Mpo na sanza ya mibale : lisanga ya Dodayi, moto ya libota ya Aoyi. Mikiloti azalaki mokambi ya lisanga ya Dodayi. Lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
5 Third army commander, for the third month: Benaiah son of Jehoiada the priest, chief; his division: 24,000. Mpo na sanza ya misato : lisanga ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
6 This Benaiah was the mighty man of the thirty and their leader; his son Ammizabad led his division. Benaya azalaki moko kati na basoda ya mpiko tuku misato mpe azalaki mokonzi na bango ; Amizadabi, mwana na ye ya mobali, azalaki moko kati na basoda ya lisanga yango.
7 Fourth, for the fourth month: Asahel, Joab's brother, then his son Zebadiah; his division: 24,000. Mpo na sanza ya minei : lisanga ya Asaeli, ndeko mobali ya Joabi. Zebadia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
8 The fifth, for the fifth month, was the commander Shamhuth the Izrahite; his division numbered 24,000. Mpo na sanza ya mitano : lisanga ya mokambi Shamewuti, moto ya libota ya Yizirayi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
9 The sixth, for the sixth month, was Ira son of Ikkesh the Tekoite; his division numbered 24,000. Mpo na sanza ya motoba : lisanga ya Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya libota ya Tekoa ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
10 Seventh, for month seven: Helez the Pelonite, of Ephraim's descendants; his division: 24,000. Mpo na sanza ya sambo : lisanga ya Eletsi, moto ya libota ya Peloni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
11 The eighth, for the eighth month, was Sibbecai the Hushathite, of the Zerahites; his division numbered 24,000. Mpo na sanza ya mwambe : lisanga ya Sibekayi, moto ya libota ya Usha, moko kati na bakitani ya Zera ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
12 The ninth, for the ninth month, was Abiezer the Anathothite, of the Benjamites; his division numbered 24,000. Mpo na sanza ya libwa : lisanga ya Abiezeri, moto ya libota ya Anatoti, moko kati na bato ya libota ya Benjame ; lisanga yango ezalaki na bato nkoto tuku mibale na minei.
13 The tenth, for the tenth month, was Maharai the Netophathite, of the Zerahites; his division numbered 24,000. Mpo na sanza ya zomi : lisanga ya Maarayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Zera ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
14 Eleventh, for month eleven: Benaiah the Pirathonite, from Ephraim's descendants; his division: 24,000. Mpo na sanza ya zomi na moko : lisanga ya Benaya, moto ya libota ya Piratoni, moko kati na bato ya libota ya Efrayimi ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
15 Twelfth, for the twelfth month: Heldai the Netophathite, of Othniel's clan; 24,000 in his division. Mpo na sanza ya zomi na mibale : lisanga ya Elidayi, moto ya libota ya Netofa, moko kati na bakitani ya Otinieli ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.
16 Over the tribes of Israel: Reubenites' leader was Eliezer son of Zichri; Simeonites' leader, Shephatiah son of Maacah, Tala bakonzi ya mabota ya Isalaele : Mpo na libota ya Ribeni : Eliezeri, mwana mobali ya Zikiri ; mpo na libota ya Simeoni : Shefatia, mwana mobali ya Maaka ;
17 for Levi, Hashabiah son of Kemuel; for Aaron, Zadok; mpo na libota ya Levi : Ashabia, mwana mobali ya Kemweli ; mpo na libota ya Aron : Tsadoki ;
18 for Judah, Elihu, one of David's brothers; for Issachar, Omri son of Michael; mpo na libota ya Yuda : Eliwu, ndeko mobali ya Davidi ; mpo na libota ya Isakari : Omiri, mwana mobali ya Mikaeli ;
19 for Zebulun, Ishmaiah son of Obadiah; for Naphtali, Jerimoth son of Azriel; mpo na libota ya Zabuloni : Yishimaeya, mwana mobali ya Abidiasi ; mpo na libota ya Nefitali : Yerimoti, mwana mobali ya Azirieli ;
20 for Ephraim's descendants, Hoshea son of Azaziah; for the half-tribe of Manasseh, Joel son of Pedaiah, mpo na libota ya Efrayimi : Oze, mwana mobali ya Azazia ; mpo na ndambo ya libota ya Manase : Joeli, mwana mobali ya Pedaya ;
21 for the half-tribe of Manasseh in Gilead, Iddo son of Zechariah; for Benjamin, Jaasiel son of Abner; mpo na ndambo ya libota ya Manase kati na Galadi : Yido, mwana mobali ya Zakari ; mpo na libota ya Benjame : Yaasieli, mwana mobali ya Abineri ;
22 for Dan, Azarel son of Jeroham. These were the leaders of the tribes of Israel. mpo na libota ya Dani : Azareeli, mwana mobali ya Yeroami. Bango wana nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Isalaele.
23 David did not count those twenty years old and under, since our Father promised to make Israel as many as heaven's stars. Davidi atangaki te molongo ya mibali oyo bazalaki na se ya mibu tuku mibale ya mbotama, pamba te Yawe alakaki ete akokomisa Isalaele ebele lokola minzoto ya likolo.
24 Joab son of Zeruiah started counting but didn't finish; anger came on Israel over it, so the total never appeared in King David's record. Joabi, mwana mobali ya Tseruya, abandaki kotanga bango kasi asilisaki te. Pamba te likolo ya botangi wana, Yawe akitiselaki Isalaele kanda na Ye. Boye, motango ya bato yango ekomamaki te na buku ya masolo ya mokonzi Davidi.
25 Azmaveth son of Adiel oversaw the king's treasuries, and Jonathan son of Uzziah oversaw the storehouses in the fields, towns, villages, and towers. Azimaveti, mwana mobali ya Adieli, azalaki kobatela bibombelo ya bozwi ya mokonzi. Jonatan, mwana mobali ya Oziasi, azalaki mobateli ya bibombelo na bazamba, na bingumba, na bamboka mike mpe na bandako milayi.
26 Over the field workers who tilled the soil was Ezri son of Chelub. Eziri, mwana mobali ya Kelubi, azalaki mokambi ya basali bilanga ;
27 Shimei the Ramathite oversaw the vineyards; Zabdi the Shiphmite oversaw their produce for the wine cellars. Shimei, moto ya engumba Rama, azalaki mobateli bilanga ya vino ; Zabidi, moto ya engumba Shefami, azalaki mobateli masanga ya vino mpe bilanga ya vino.
28 Baal-hanan the Gederite oversaw the olive and sycamore-fig trees in the foothills; Joash oversaw the olive oil stores. Bala-Anani, moto ya engumba Gederi, azalaki mobateli banzete ya olive mpe ya sikomori, na lubwaku ya ngambo ya weste ; Yoashi azalaki mobateli mafuta ya olive ;
29 Shitrai the Sharonite oversaw herds grazing in Sharon; Shaphat son of Adlai oversaw herds in the valleys. Shitrayi, moto ya engumba Saroni, azalaki mobateli bangombe oyo ezalaki kolia na Saroni ; Shafati, mwana mobali ya Adilayi, azalaki mobateli bangombe na mabwaku.
30 Over the camels was Obil the Ishmaelite; and over the donkeys was Jehdeiah the Meronothite. Obili, moto ya libota ya Isimaeli, azalaki mobateli bashamo ; Yedeya, moto ya libota ya Meronoti, azalaki mobateli ba-ane ya basi.
31 Over the flocks was Jaziz the Hagrite; all these were officials over King David's property. Yazizi, moto ya libota ya Agari, azalaki mobateli bibwele. Bango nyonso bazalaki babateli bozwi ya mokonzi Davidi.
32 Jonathan, David's uncle, was a counselor, a man of understanding and a scribe; and Jehiel son of Hachmoni cared for the king's sons. Jonatan, ndeko ya tata ya Davidi, azalaki mopesi toli, moto ya mayele mpe mokomi mikanda. Yeyeli, mwana mobali ya Akimoni, azalaki kolandela bana mibali ya mokonzi.
33 Ahithophel was the king's counselor, and Hushai the Archite was the king's friend. Ayitofeli azalaki mopesi toli ya mokonzi ; mpe Ushayi, moto ya Ariki, azalaki mobateli sekele ya mokonzi.
34 After Ahithophel: Jehoiada son of Benaiah, and Abiathar. Joab commanded the king's army. Yeoyada, mwana mobali ya Benaya, elongo na Abiatari, bakitanaki na Ayitofeli. Joabi azalaki mokonzi ya mampinga ya mokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]