Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 26 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Gatekeeper divisions: of the Korahites, Meshelemiah son of Kore, of Asaph's sons. Tala masanga ya bakengeli bikuke : Mpo na bato ya Kore : Meshelemia, mwana mobali ya Kore, moko kati na bana mibali ya Azafi.
2 Meshelemiah had sons: Zechariah the firstborn, Jediael the second, Zebadiah the third, Jathniel the fourth, Meshelemia azalaki na bana mibali oyo : mwana ya liboso, Zakari ; mwana ya mibale, Yediayeli ; mwana ya misato, Zebadia ; mwana ya minei, Yatinieli ;
3 Elam the fifth, Jehohanan the sixth, Eliehoenai the seventh. mwana ya mitano, Elami ; mwana ya motoba, Yoanani ; mpe mwana ya sambo, Eliowenayi.
4 Obed-edom also had sons: Shemaiah the firstborn, Jehozabad second, Joah third, Sachar fourth, Nethanel fifth, Obedi-Edomi mpe azalaki na bana mibali oyo : mwana ya liboso, Shemaya ; mwana ya mibale, Yozabadi ; mwana ya misato, Yoa ; mwana ya minei, Sakari ; mwana ya mitano, Netaneeli ;
5 Ammiel the sixth, Issachar the seventh, Peullethai the eighth, for our Father had blessed him. mwana ya motoba, Amieli ; mwana ya sambo, Isakari ; mwana ya mwambe, Pewulitayi ; pamba te Nzambe apambolaki Obedi-Edomi.
6 Shemaiah his son also had sons over their father's household, for they were men of great valor. Mwana na ye ya mobali Shemaya azalaki mpe na bana mibali oyo bazalaki bakambi ya libota ya tata na bango, pamba te bazalaki bilombe mibali.
7 The sons of Shemaiah: Othni, Rephael, Obed, and Elzabad, whose brothers Elihu and Semachiah were able men. Bana mibali ya Shemaya : Otini, Refaeli, Obedi, Elizabadi ; mpe bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki bilombe, Eliwu mpe Samakia.
8 All these were among the sons of Obed-edom—they, their sons, and their brothers, strong and able for the work: sixty-two of Obed-edom. Bango nyonso bazalaki bakitani ya Obedi-Edomi. Bango, bana na bango mpe bandeko na bango ya mibali bazalaki bilombe mpe bato ya mpiko mpo na mosala. Bakitani nyonso ya Obedi-Edomi bazalaki tuku motoba na mibale.
9 Meshelemiah had sons and brothers, able men—eighteen in all. Meshelemia azalaki na bana mibali mpe bandeko mibali oyo bazalaki bilombe : bango nyonso bazalaki zomi na mwambe.
10 Hosah, of Merari's sons, had sons: Shimri the chief—though not the firstborn, his father made him chief. Osa, moko kati na bana mibali ya Merari, azalaki na bana mibali oyo : Shimiri oyo tata na ye atiaki ye mokonzi atako azalaki mwana ya liboso te ;
11 Hilkiah second, Tebaliah third, Zechariah fourth; Hosah's sons and brothers totaled thirteen. Ilikia, mwana ya mibale ; Tebalia, mwana ya misato ; mpe Zakari, mwana ya minei. Bana mibali mpe bandeko mibali ya Osa bazalaki bango nyonso zomi na misato.
12 These gatekeeper divisions, assigned by chief men, served like their brothers in our Father's house. Masanga ya bakengeli bikuke ezalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe, na bokambami ya bakonzi na bango ndenge bandeko na bango bazalaki mpe kosala.
13 They cast lots, small and great alike, by their families, for each gate. Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango.
14 The east lot fell to Shelemiah. For his son Zechariah, a wise counselor, they cast lots, and his lot came out north. Mpo na ekuke ya ngambo ya este, zeke ekweyaki epai ya libota ya Shelemia. Bongo babetaki zeke mpo na mwana na ye ya mobali Zakari oyo azalaki mopesi toli ya bwanya, mpe zeke mpo na ekuke ya ngambo ya Nor ekweyaki likolo na ye.
15 To Obed-edom fell the south, and to his sons the storehouse. Mpo na ekuke ya ngambo ya sude, zeke ekweyaki epai ya Obedi-Edomi ; mpe mpo na ndako oyo babombelaka biloko, zeke ekweyaki epai ya bana na ye ya mibali.
16 To Shuppim and Hosah fell the west, with Shallecheth Gate on the ascending road, watch facing watch. Mpo na ekuke ya ngambo ya weste mpe ekuke ya Shaleketi, na nzela oyo emata na likolo, zeke ekweyaki epai ya Shupimi mpe Osa. Tala ndenge bakabolaki masanga ya bakengeli bikuke :
17 Six Levites stood east, four daily north, four daily south, and two by two at the storehouse. mokolo na mokolo, ezalaki na Balevi motoba na ngambo ya este, Balevi minei na ngambo ya nor, mpe Balevi minei na ngambo ya sude ; mpe masanga mibale oyo moko na moko ezalaki na bato mibale, na ndako oyo babombelaka biloko.
18 At the pavilion on the west: four at the road and two at the pavilion. Mpo na lopango ya weste, ezalaki na bakengeli minei na nzela ; mpe mibale kati na lopango.
19 These were the divisions of the gatekeepers among the Korahites and the Merarites. Oyo nde ezalaki masanga ya bakengeli bikuke oyo baponamaki kati na libota ya Kore mpe ya Merari.
20 Ahijah the Levite oversaw the treasuries of our Father's house and the treasuries of the dedicated gifts. Balevi mosusu lokola Ayiya, bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo mpe biloko ya bule.
21 The sons of Ladan, the Gershonites belonging to Ladan, the family leaders of Ladan the Gershonite: Jehieli. Tala bakitani ya Laedani, oyo bazalaki bato ya etuka ya Gerishoni mpe bakambi, moto na moto ya libota na ye : bato ya Yeyeli ;
22 Jehieli's sons, Zetham and Joel his brother, oversaw our Father's house storerooms. mpe bana mibali ya Yeyeli : Zetami mpe ndeko na ye ya mobali Joeli. Bazalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Tempelo ya Yawe.
23 Of the Amramites, the Izharites, the Hebronites, and the Uzzielites: Mpo na bakitani ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli :
24 Shebuel son of Gershom, son of Moses, was chief officer over the treasuries. Shebueli, mokitani ya Gerishomi, mwana mobali ya Moyize, azalaki mokonzi ya babateli bozwi ya Tempelo.
25 His relatives through Eliezer: Rehabiah his son, Jeshaiah his son, Joram his son, Zichri his son, Shelomith his son. Tala bandeko na ye ya mibali oyo babotamaki na nzela ya Eliezeri : Reabia, Ezayi, Yorami, Zikiri mpe Shelomiti.
26 Shelomith and his brothers oversaw all treasuries of gifts dedicated by King David, the family heads, the commanders of thousands and hundreds, and army commanders. Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe ; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga.
27 From the plunder won in battles they dedicated gifts to maintain the house of our Father. Babulisaki biloko mosusu oyo bazwaki na bitumba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe.
28 All that Samuel the seer, Saul son of Kish, Abner son of Ner, and Joab son of Zeruiah dedicated—every dedicated thing—Shelomith and his brothers oversaw. Shelomiti mpe bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo Samuele, momoni makambo ; Saulo, mwana mobali ya Kishi ; Abineri, mwana mobali ya Neri ; Joabi oyo kombo ya mama na ye ezalaki « Tseruya, » babulisaki mpo na Yawe.
29 Of the Izharites, Chenaniah and his sons managed Israel's outside affairs as officers and judges. Mpo na bakitani ya Yitseari : Kenania mpe bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakomi mikanda mpe basambisi. Bazalaki na mokumba ya kotala makambo ya boyokani ya Isalaele na bikolo mosusu.
30 Of the Hebronites, Hashabiah and his relatives—1,700 capable men—oversaw Israel west of the Jordan, for all our Father's work and the king's service. Mpo na bakitani ya Ebron : Ashabia mpe bandeko na ye ya mibali, bilombe mibali nkoto moko na nkama sambo. Bazalaki kokamba Isalaele na ngambo ya weste ya Yordani ; mpe bazalaki na mokumba ya misala nyonso ya Yawe mpe ya mokonzi.
31 Among the Hebronites, Jerijah was chief, by their family records. In David's fortieth year, a search found capable men among them at Jazer in Gilead. Mpo na bakitani ya Ebron : Yeriya azalaki mokonzi na bango, kolanda milongo ya mabota na bango. Na mobu ya tuku minei ya bokonzi ya Davidi, batalaki malamu na buku ya mabota mpe bamonaki kati na engumba Yaezeri ya Galadi, bilombe mibali kati na bakitani ya Ebron.
32 Jerijah's relatives were 2,700 able men, family heads. King David set them over the Reubenites, Gadites, and half-tribe of Manasseh, for every matter of our Father and the king. Yeriya azalaki na bandeko mibali nkoto mibale na nkama sambo : bazalaki bilombe mibali mpe bakambi ya mabota. Mokonzi Davidi apesaki bango mokumba ya misala nyonso ya Nzambe mpe ya mokonzi kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]