Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When David was old and had lived many years, he made his son Solomon king over Israel. Tango Davidi akomaki mobange makasi, akomisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mokonzi ya Isalaele.
2 He gathered together all the leaders of Israel, along with the priests and the Levites. Asangisaki bakambi nyonso ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi.
3 The Levites thirty years old or older were counted, and their total number was 38,000. Batangaki Balevi nyonso oyo bazalaki na mibu tuku misato mpe koleka : motango nyonso ya Balevi ezalaki nkoto tuku misato na mwambe.
4 Of these, 24,000 were to oversee the work of our Father's house; 6,000 were officers and judges. Davidi alobaki : « Tika ete Balevi nkoto tuku mibale na minei bazala bakambi ya misala ya Tempelo ya Yawe, Balevi nkoto motoba bazala bakomi mikanda mpe basambisi,
5 4,000 were gatekeepers, and 4,000 praised our Father with instruments David made for praise. Balevi nkoto minei bazala bakengeli bikuke, mpe Balevi nkoto minei bakumisa Yawe na bibetelo mindule oyo nasalaki na tina na yango. »
6 And David divided them into divisions according to the sons of Levi: Gershon, Kohath, and Merari. Bongo Davidi akabolaki bango na masanga kolanda buku ya mabota ya bana mibali ya Levi : Gerishoni, Keati mpe Merari.
7 Of the Gershonites: Ladan and Shimei. Mpo na libota ya Gerishoni : Laedani mpe Shimei.
8 The sons of Ladan: Jehiel the chief, then Zetham and Joel, three in all. Laedani azalaki na bana mibali misato : mokonzi Yeyeli, Zetami mpe Joeli.
9 Shimei's sons: Shelomoth, Haziel, and Haran—three. These were Ladan's family heads. Shimei azalaki na bana mibali misato : Shelomiti, Azieli mpe Arani. Bango nde bazalaki bakambi ya mabota ya Laedani.
10 And the sons of Shimei: Jahath, Zina, Jeush, and Beriah. These four were the sons of Shimei. Shimei azalaki na bana mibali mosusu minei : Yaati, Ziza, Yewushi mpe Beria.
11 Jahath was chief, Zizah second; Jeush and Beriah had few sons, so they were counted together as one family, one assignment. Yaati azalaki mwana ya liboso, mpe Ziza, mwana ya mibale. Nzokande Yewushi mpe Beria bazalaki na bakitani ebele te. Boye batangaki bango lokola libota moko.
12 The sons of Kohath: Amram, Izhar, Hebron, and Uzziel, four in all. Keati azalaki na bana mibali minei : Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
13 The sons of Amram: Aaron and Moses. Aaron was set apart to consecrate the most holy things, he and his sons forever, to make offerings before our Father, to serve him, and to bless in his name forever. Amirami azalaki na bana mibali mibale : Aron mpe Moyize. Aron aponamaki mpo na libela, elongo na bana na ye ya mibali, mpo na kobulisa Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso ya Yawe, mpo na kosalela Ye mpe kopambola bato mpo na libela na Kombo na Ye.
14 But Moses, man of our Father—his sons were counted among Levi's tribe. Bana ya Moyize, moto na Nzambe, batangaki bango na ekolo ya Levi.
15 The sons of Moses: Gershom and Eliezer. Bana mibali ya Moyize : Gerishomi mpe Eliezeri.
16 The sons of Gershom: Shebuel the chief. Bana mibali ya Gerishomi : Shebueli azalaki mwana mobali ya liboso.
17 Eliezer's sons: Rehabiah the chief. Eliezer had no other sons; Rehabiah's sons were very numerous. Bana mibali ya Eliezeri : Reabia azalaki mwana na ye se moko. Eliezeri azalaki na bana mosusu te, kasi Reabia azalaki na bana ebele.
18 The sons of Izhar: Shelomith the chief. Bana mibali ya Yitseari : Shelomiti azalaki mwana ya liboso kati na bana mibali ya Yitseari.
19 The sons of Hebron: Jeriah the chief, Amariah the second, Jahaziel the third, and Jekameam the fourth. Bana mibali ya Ebron : Yeriya, mwana ya liboso ; Amaria, mwana ya mibale ; Yaazieli, mwana ya misato mpe Yekameami, mwana ya minei.
20 The sons of Uzziel: Micah the chief and Isshiah the second. Bana mibali ya Uzieli : Mishe, mwana ya liboso ; mpe Yishiya, mwana ya mibale.
21 The sons of Merari: Mahli and Mushi. The sons of Mahli: Eleazar and Kish. Bana mibali ya Merari : Maali mpe Mushi. Bana mibali ya Maali : Eleazari mpe Kishi.
22 Eleazar died having no sons, only daughters; so their relatives, the sons of Kish, married them. Eleazari akufaki mpe atikalaki kobota bana mibali te, azalaki kaka na bana basi oyo babalanaki na bandeko na bango, bana mibali ya tata leki na bango Kishi.
23 The sons of Mushi: Mahli, Eder, and Jeremoth, three in all. Bana mibali ya Mushi : Maali, Ederi mpe Yeremoti. Bango nyonso bazalaki misato.
24 These were Levi's sons by family, family heads registered by name, who served in our Father's house, age twenty and up. Bango nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango, mpe bakambi ya bituka na bango kolanda ndenge bakomamaki, moto na moto, na buku ya mabota. Bazwaki mokumba ya kosala misala kati na Tempelo ya Yawe, kobanda na oyo azalaki na mibu tuku mibale mpe koleka.
25 For David said, "Our Father, Israel's God, gave his people rest, and lives in Jerusalem forever. Bongo Davidi alobaki : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi bopemi na bato na Ye mpe avandi libela kati na Yelusalemi.
26 So the Levites no longer carry the tabernacle or all its service vessels." Boye Balevi bazala lisusu te na mokumba ya komema Mongombo mpe bisalelo na yango nyonso. »
27 For by these final instructions of David the Levites were counted from twenty years old or older. Ezalaki kolanda malako ya suka ya Davidi nde batangaki bakitani ya Levi kobanda na mibu tuku mibale mpe koleka.
28 Their duty was assisting Aaron's sons in serving the house of our Father: caring for the courts and the chambers, purifying all holy things, and any work in the house of our Father. Mosala ya Balevi ezalaki mpo na kosunga bakitani ya Aron na mosala ya Tempelo ya Yawe : kolandela bopeto ya veranda mpe ya bashambre, kopetola biloko nyonso ya bule mpe kosala misala nyonso ya Tempelo.
29 They cared for the Bread of the Presence, the fine flour for grain offerings, wafers made without yeast, the baking and mixing, and all measures of quantity and size. Bazalaki na mokumba ya kotanda mapa na mesa, kobongisa farine mpo na makabo ya bagato ezanga levire, bagalete mpe bagato batumba na kikalungu, mpe bagato basangisa na mafuta mpe biloko nyonso oyo bamekelaka kilo mpe molayi.
30 They were to stand every morning to thank and praise our Father, and again in the evening, Bazalaki mpe na mokumba ya kotelema liboso ya Yawe, tongo mpe pokwa nyonso, mpo na kokumisa mpe kosanzola Ye ;
31 and for all burnt offerings to our Father on Sabbaths, new moons, and appointed feasts—in the required number, always before our Father. mpe kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba oyo bazalaki komema epai na Yawe na mikolo ya Saba, na ebandeli ya sanza mpe na mikolo nyonso ya bafeti oyo ekatama, kolanda motango oyo bakatelaki bango mpo na libela liboso ya Yawe.
32 They kept the charge of the tent of meeting, the charge of the sanctuary, and the charge of their brothers, Aaron's sons, in the service of the house of our Father. Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]