Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the divisions of Aaron's sons. Aaron's sons: Nadab and Abihu, Eleazar and Ithamar. Tala bituka ya bana mibali ya Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
2 Nadab and Abihu died before their father, leaving no sons; so Eleazar and Ithamar served as priests. Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya tata na bango mpe batikalaki kobota te. Eleazari mpe Itamari basalaki mosala na bango ya bonganga-Nzambe.
3 David divided them with Zadok, Eleazar's descendant, and Ahimelech, Ithamar's descendant, by their appointed service order. Tala ndenge Davidi akabolaki bango kolanda misala oyo bapesaki bango : Tsadoki, na etuka ya Eleazari ; Ayimeleki, na etuka ya Itamari.
4 Eleazar's sons were found to have more leaders than Ithamar's, so they were divided: sixteen family heads for Eleazar's, eight for Ithamar's, by their families. Bamonaki ete kati na bakitani ya Eleazari, bana mibali bazalaki ebele koleka bato oyo bazalaki kati na bakitani ya Itamari. Boye, bakabolaki bana mibali ya Eleazari lokola bakonzi ya mabota zomi na motoba mpe bana mibali ya Itamari lokola bakonzi ya mabota mwambe.
5 They divided them by lot, both alike, since officials of the sanctuary and officials of our Father came from the sons of Eleazar and the sons of Ithamar. Babetaki zeke mpo na kokabola bango, pamba te kati na bakitani ya Eleazari mpe ya Itamari, ezalaki na bakambi ya Esika ya bule mpe bakambi ya mosala ya Nzambe.
6 Shemaiah son of Nethanel, a Levite scribe, wrote them before the king, the officials, Zadok the priest, Ahimelech son of Abiathar, and the heads of the priestly and Levite families—one family chosen for Eleazar, one for Ithamar. Shemaya, mokomi mikanda, mwana mobali ya Netaneeli, na libota ya Levi, akomaki bakombo na bango na miso ya mokonzi, ya bakambi, ya Nganga-Nzambe Tsadoki, ya Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari ; mpe ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe Balevi. Babetaki zeke mbala mibale mpo na etuka ya Eleazari, mpe mbala moko, mpo na etuka ya Itamari.
7 The first lot fell to Jehoiarib, the second to Jedaiah, Tala ndenge bakambi ya mabota baponamaki na nzela ya zeke : zeke ya liboso ekweyaki epai ya Yeoyaribi ; zeke ya mibale ekweyaki epai ya Yedaeya ;
8 the third to Harim, the fourth to Seorim, zeke ya misato ekweyaki epai ya Arimi ; zeke ya minei ekweyaki epai ya Seorimi ;
9 the fifth to Malchijah, the sixth to Mijamin, zeke ya mitano ekweyaki epai ya Malikiya ; zeke ya motoba ekweyaki epai ya Miyamini ;
10 the seventh to Hakkoz, the eighth to Abijah, zeke ya sambo ekweyaki epai ya Akotsi ; zeke ya mwambe ekweyaki epai ya Abiya ;
11 the ninth to Jeshua, the tenth to Shecaniah, zeke ya libwa ekweyaki epai ya Jozue ; zeke ya zomi ekweyaki epai ya Shekania ;
12 the eleventh to Eliashib, the twelfth to Jakim, zeke ya zomi na moko ekweyaki epai ya Eliashibi ; zeke ya zomi na mibale ekweyaki epai ya Yakimi ;
13 the thirteenth to Huppah, the fourteenth to Jeshebeab, zeke ya zomi na misato ekweyaki epai ya Upa ; zeke ya zomi na minei ekweyaki epai ya Yeshebeabi ;
14 the fifteenth to Bilgah, the sixteenth to Immer, zeke ya zomi na mitano ekweyaki epai ya Biliga ; zeke ya zomi na motoba ekweyaki epai ya Imeri ;
15 the seventeenth to Hezir, the eighteenth to Happizzez, zeke ya zomi na sambo ekweyaki epai ya Eziri ; zeke ya zomi na mwambe ekweyaki epai ya Apitsetsi ;
16 the nineteenth to Pethahiah, the twentieth to Jehezkel, zeke ya zomi na libwa ekweyaki epai ya Petaya ; zeke ya tuku mibale ekweyaki epai ya Ezekieli ;
17 the twenty-first to Jachin, the twenty-second to Gamul, zeke ya tuku mibale na moko ekweyaki epai ya Yakini ; zeke ya tuku mibale na mibale ekweyaki epai ya Gamuli ;
18 the twenty-third to Delaiah, and the twenty-fourth to Maaziah. zeke ya tuku mibale na misato ekweyaki epai ya Delaya ; zeke ya tuku mibale na minei ekweyaki epai ya Maazia.
19 These were their appointed duties for serving in our Father's house, by the order Aaron their father gave them, as our Father of Israel had commanded him. Ezalaki ndenge wana nde bakabolaki bango mpe bazalaki kolandana kati na mosala mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe. Bazalaki kosala misala na bango kolanda mibeko oyo tata na bango, Aron, apesaki bango, mpe ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, atindaki ye.
20 The rest of Levi's sons: of Amram's sons, Shubael; of Shubael's sons, Jehdeiah. Tala bakitani mosusu ya Levi oyo bazalaki bakambi ya bituka : Shubaeli, mpo na etuka ya Amirami ; Yedeya, mpo na etuka ya Shubaeli ;
21 Of Rehabiah: of the sons of Rehabiah, Isshiah the first. Yishiya, mpo na etuka ya Reabia ;
22 Of the Izharites, Shelomoth; of the sons of Shelomoth, Jahath. Shelomoti, mpo na etuka ya Yitseari ; Yaati, mpo na etuka ya Shelomiti.
23 The sons of Hebron: Jeriah the first, Amariah the second, Jahaziel the third, Jekameam the fourth. Bana mibali ya Ebron : mwana ya liboso, Yeriya ; mwana ya mibale, Amaria ; mwana ya misato, Yaazieli ; mpe mwana ya minei, Yekameami ;
24 The sons of Uzziel: Micah; of the sons of Micah, Shamir. Shamiri, mpo na etuka ya Mishe, mwana mobali ya Uzieli ;
25 The brother of Micah: Isshiah; of the sons of Isshiah, Zechariah. Zakari, mpo na etuka ya Yishiya, ndeko mobali ya Mishe.
26 The sons of Merari: Mahli and Mushi. The sons of Jaaziah: Beno. Bana mibali ya Merari : Maali mpe Mushi. Beno, mpo na etuka ya Yaaziya.
27 The sons of Merari through Jaaziah: Beno, Shoham, Zaccur, and Ibri. Bakitani ya Merari : na nzela ya mwana na ye ya mobali Yaaziya : Beno, Shoami, Zakuri mpe Ibiri.
28 Of Mahli: Eleazar, who had no sons. Na nzela ya mwana na ye ya mobali Maali : Eleazari oyo atikalaki kobota te.
29 Of Kish: the sons of Kish, Jerahmeel. Mpo na Kishi : Yerameeli, mwana na ye ya mobali.
30 The sons of Mushi: Mahli, Eder, and Jerimoth. These were the Levites by their families. Bana mibali ya Mushi : Maali, Ederi mpe Yerimoti. Bango wana nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango.
31 They too cast lots, like their relatives the sons of Aaron, before King David, Zadok, Ahimelech, and the heads of the priestly and Levite families—the head of each family the same as his younger brother. Bango mpe babetaki zeke lokola bandeko na bango ya mibali, bakitani ya Aron, na miso ya mokonzi Davidi, ya Tsadoki, ya Ayimeleki, ya bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi. Boye bazalaki komona mabota nyonso ndenge moko, ezala libota ya kulutu to ya leki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]