Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ruth 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then her mother-in-law Naomi said, "My daughter, shouldn't I seek a home for you, so it goes well for you? Mokolo moko, Naomi, mama-bokilo ya Rite, alobaki na ye : — Mwana na ngai, nasengeli te koluka nzela mpo na bolamu na yo ?
2 Isn't Boaz, whose young women you were with, our relative? Tonight he winnows barley at the threshing floor. Pamba te oyebi malamu ete Boazi, oyo osalaki elongo na basali na ye ya basi, azali ndeko na biso. Na pokwa ya lelo, akoyungola orje oyo basilaki kosopa na etando.
3 Wash, perfume yourself, put on your cloak, and go down to the threshing floor. Don't reveal yourself to the man until he finishes eating and drinking. Boye, sukola malamu nzoto na yo, pakola mafuta mpe lata bilamba na yo, oyo eleki kitoko. Bongo, okokende na etando epai wapi akobeta orje na ye ; kasi sala ete Boazi ayeba te ete ozali na esika yango kino akosilisa kolia mpe komela.
4 When he lies down, note the place; go uncover his feet and lie down—he'll tell you what to do." Tango akokende kolala, okotala malamu esika nini akozala. Sima, okopusana, okolongola elamba oyo ezipi makolo na ye mpe okomilalisa wana, na makolo na ye. Ye moko akoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
5 And Ruth said to her, "All that you say I will do." Rite azongiselaki ye : — Nakosala nyonso oyo oyebisi ngai.
6 So she went down to the threshing floor and did everything her mother-in-law had told her. Bongo Rite akendeki na etando mpe asalaki makambo nyonso oyo mama-bokilo na ye ayebisaki ye.
7 Boaz ate, drank, and felt good, then lay down at the end of the grain heap. She came secretly, uncovered his feet, and lay down. Tango Boazi asilisaki kolia mpe komela, motema na ye ezalaki na esengo ; akendeki kolala na suka ya mipiku ya orje. Bongo Rite apusanaki malembe-malembe, alongolaki elamba oyo ezipaki makolo ya Boazi mpe amilalisaki wana.
8 At midnight the man was startled, turned over, and there lay a woman at his feet! Na kati-kati ya butu, tango Boazi ayokaki malili, aminyololaki mpe amonaki mwasi alali na makolo na ye.
9 "Who are you?" he asked. "I am Ruth, your servant," she said. "Spread your cloak's corner over your servant, for you are a redeemer." Atunaki ye : — Yo ozali nani ? Azongisaki : — Ezali ngai Rite, mwasi mosali na yo. Tanda songe ya elamba na yo kino epai na ngai, pamba te ozali na ndingisa ya kosikola.
10 He said, "Blessed are you by our Father, my daughter. This last kindness is better than the first, since you didn't chase young men, poor or rich. Boazi azongiselaki ye : — Tika ete Yawe apambola yo, mwana na ngai ya mwasi ! Bosembo oyo otalisi sik’oyo, ezali monene koleka bosembo oyo otalisaki liboso ; pamba te otambolaki te sima na bilenge mibali, ezala bazwi to babola.
11 Now, my daughter, don't be afraid. I'll do all you ask, for my whole town knows you're a worthy woman. Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga.
12 Now it is true that I am a redeemer, yet there is a redeemer nearer than I. Sik’oyo, atako solo nazali na ndingisa ya kosikola, kasi ezali na mosikoli mosusu oyo azali pene na yo koleka ngai.
13 Stay tonight. In the morning, if he'll redeem you—good, let him redeem. If not, as our Father lives, I will redeem you. Lie down until morning." Boye, lekisa butu awa ; bongo lobi na tongo, tokotala soki moto yango akolinga kosikola yo. Soki akolinga, wana tika ye asikola yo ; kasi soki aboyi, nalaki yo na Kombo na Yawe ete ngai nakosikola yo. Boye liboso ete tongo etana, lala awa.
14 She lay at his feet until morning, rose before anyone was recognizable, for he said, "No one may know a woman came to the threshing floor." Boye Rite alalaki na makolo na ye mpe alamukaki na tongo-tongo, wana molili ezalaki nanu kopekisa bato komonana malamu ; pamba te Boazi alobaki : « Moto moko te ayeba ete mwasi moko ayaki na etando oyo. »
15 He said, "Bring the shawl you're wearing; hold it out." She held it out. He measured six portions of barley, put it on her, and went into the city. Liboso ete akende, Boazi ayebisaki ye : « Pesa ngai elamba oyo olati, simba yango malamu. » Wana Rite asimbaki yango malamu, Boazi atielaki ye bakilo pene tuku mibale ya orje mpe asungaki ye mpo na kotombola mpe kotia yango na moto. Mpe Rite azongaki na engumba.
16 When Ruth came to her mother-in-law, Naomi asked, "How did it go, my daughter?" She told her all the man had done for her. Tango Rite akomaki epai ya mama-bokilo na ye, Naomi atunaki ye : — Mwana na ngai ya mwasi, makambo eleki ndenge nini ? Boye Rite ayebisaki ye makambo oyo Boazi asalaki mpo na ye.
17 She said, "He gave me these six measures of barley, saying, 'Don't return to your mother-in-law empty-handed.'" Mpe abakisaki : « Apesaki ngai kutu bakilo tuku mibale ya orje oyo, pamba te ayebisaki ngai : ‹ Kozonga maboko pamba te epai ya mama-bokilo na yo. › »
18 Naomi said, "Wait, my daughter, until you know the outcome, for the man won't rest until he settles it today." Bongo Naomi alobaki na ye : — Sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, vanda awa kino okomona ndenge makambo oyo ekosuka ; pamba te mobali wana akozala na kimia te kino akosilisa likambo oyo, kaka na mokolo ya lelo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]