Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Psalms 28 OLCB

Side by side with the Father's Heart Bible™

Yawe, yanola ngai

1Nzembo ya Davidi.Yawe, nazali kobelela Yo !Ozali Libanga na ngai,koboya te koyoka ngai.Soki te, nakozala lokola batooyo bazali kokita na kunda.

2Yoka ngai tango nabondelaka Yompo na kosenga lisungi,tango natombolaka maboko na ngai,na kotala na ngambo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.

3Kokumba ngai te elongo na bato mabe,elongo na bato oyo basalaka mabe,oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango,kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.

4Zongisela bango kolanda misala na bango,kolanda misala mabe na bango ;zongisela bango kolanda misala ya maboko na bango,mpe kweyisela bango oyo ekoki na misala na bango.

5Pamba te bamemiaka te misala ya Yawempe makambo oyo akokisaka,akobamba bango na mabelempe akotikala kotelemisa bango lisusu te.

6Tika ete Yawe akumisama,pamba te ayanoli mabondeli na ngai.

7Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ;natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai.Motema na ngai etondi na esengo,mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.

8Yawe azali makasi ya bato na Ye,ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.

9Yawe, bikisa bato na Yompe pambola libula na Yo ;zala mobateli na bangompe sunga bango mpo na libela.

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]