Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Philippians 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So, my dear, longed-for brothers and sisters, my joy and crown, stand firm in the Lord this way, dear ones. Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo.
2 I urge Euodia and I urge Syntyche to agree with each other in the Lord. Nasengi na Evodi mpe na Sentishe ete bazala na makanisi moko kati na Nkolo.
3 Yes, I ask you too, true partner: help these women—they struggled with me for the gospel, along with Clement and my other coworkers, whose names are in the book of life. Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi.
4 Rejoice in the Lord always; again I will say, rejoice. Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka !
5 Show your gentleness to everyone. The Lord is near. Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.
6 Worry about nothing; instead, in everything, through prayer and petition with thanksgiving, make your requests known to our Father. Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
7 The peace of our Father, beyond all understanding, will guard your hearts and your minds in Christ Jesus. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
8 Finally, brothers, fix your minds on whatever is true, honorable, right, pure, lovely, admirable, excellent, and praiseworthy—and keep dwelling on these things. Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.
9 What you have learned and received and heard and seen in me—do these things, and our Father of peace will be with you. Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.
10 I rejoiced greatly in the Lord that at last you renewed your concern for me—you were indeed concerned, but lacked opportunity. Nazalaki penza na esengo mingi kati na Nkolo, wana botalisaki ngai lisusu bolingo na bino. Solo, bozalaki kokanisa kosunga ngai, kasi bozangaki nde libaku mpo na kokokisa yango.
11 Not that I speak from need—I've learned to be content in any circumstance. Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango.
12 I know how to be brought low, and I know how to overflow. In any and every circumstance I've learned the secret: full and hungry, overflowing and lacking. Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli.
13 I can do all things through Christ who strengthens me. Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
14 Yet it was kind of you to share my trouble. Nzokande bosalaki malamu, wana bosanganaki na pasi na ngai.
15 You Philippians know too: when the gospel began, when I left Macedonia, no church shared with me in giving and receiving except you alone. Bino bato ya Filipi, boyebi malamu ete, na ebandeli ya mosala na ngai ya koteya Sango Malamu, wana nalongwaki na Masedwane, ata Lingomba moko te esanganaki na ngai na nzela ya lisungi, longola kaka bino.
16 Even in Thessalonica you sent me help for my needs more than once. Tango mpe nazalaki na Tesalonika, botindelaki ngai mbala mibale lisungi ya biloko oyo nazalaki na yango na bosenga.
17 Not that I seek the gift, but I seek the fruit that increases to your credit. Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka.
18 I have received full payment, and more—filled, having received from Epaphroditus your gifts, a fragrant offering, a sacrifice acceptable and pleasing to our Father. Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye.
19 And my Father will supply all your needs according to his riches in glory in Christ Jesus. Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto.
20 Now to our Father be glory forever and ever. Amen. Tika ete nkembo ezonga mpo na libela na libela epai na Nzambe oyo azali Tata na biso ! Amen.
21 Greet every saint in Christ Jesus. The brothers who are with me greet you. Bopesa mbote epai ya basantu nyonso kati na Yesu-Klisto. Bandeko oyo bazali awa elongo na ngai batindeli bino mbote.
22 All the saints greet you, especially those of Caesar's household. Basantu nyonso batindeli bino mbote, mingi-mingi ba-oyo bazali ya ndako ya mokonzi Sezare.
23 The grace of the Lord Jesus Christ be with your spirit. Amen. Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto ezala elongo na molimo na bino !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]