1When Moses finished setting up the tabernacle, he anointed and dedicated it and all its furnishings, the altar and all its utensils, anointing and dedicating them.OLCBNa mokolo oyo Moyize asilisaki kotonga Mongombo, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango elongo na bisalelo na yango. Asalaki mpe bongo mpo na etumbelo elongo na bisalelo na yango, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango.
2Then Israel's leaders—heads of their fathers' houses, the tribal leaders in charge of the census—brought an offering.OLCBBongo bakambi ya Isalaele, bakonzi ya mabota, elingi koloba bakonzi ya bikolo oyo bakambaki mosala ya kotanga motango ya bato,
3They brought their offering before our Father: six covered wagons, twelve oxen—a wagon per two leaders, an ox for each—then presented them before the tabernacle.OLCBbamemaki makabo na bango liboso ya Yawe : bashario motoba mpe bangombe zomi na mibale. Shario moko mpo na bakambi mibale, mpe ngombe moko mpo na mokonzi moko na moko ; bamemaki yango liboso ya Mongombo.
4And our Father said to Moses,OLCBYawe alobaki na Moyize :
5"Take these from them for the tent of meeting's service; give them to the Levites, each according to his service."OLCB« Ndima kozwa makabo oyo bayei na yango ; okosala na yango mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Okopesa yango epai ya Balevi kolanda mokumba ya moko na moko. »
6So Moses took the wagons and the oxen and gave them to the Levites.OLCBMoyize andimaki kozwa bashar mpe bangombe mpe apesaki yango epai ya Balevi.
7Two wagons and four oxen he gave to the sons of Gershon, according to their service.OLCBApesaki bashar mibale mpe bangombe minei epai ya bana mibali ya Gerishoni kolanda bosenga ya mosala na bango.
8He gave four wagons and eight oxen to Merari's sons, for their service, under Ithamar son of Aaron the priest.OLCBApesaki bashar minei mpe bangombe mwambe epai ya bana mibali ya Merari kolanda bosenga ya mosala na bango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
9To the sons of Kohath he gave none, since the holy things' service was theirs—carried on the shoulder.OLCBApesaki eloko te epai ya bana mibali ya Keati, pamba te bazalaki na mokumba ya komema na mapeka na bango biloko ya bule.
10On the day the altar was anointed, the leaders brought its dedication offering; the leaders brought their offering before the altar.OLCBBakambi bamemaki makabo na bango mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta ; bamemaki makabo yango liboso ya etumbelo.
11And our Father said to Moses, "Each day one leader is to bring his offering for the altar's dedication."OLCBBongo Yawe alobaki na Moyize : « Tika ete mokolo na mokolo, mokambi moko na moko amema likabo na ye mpo na libulisi ya etumbelo ! »
12Nahshon son of Amminadab, of Judah's tribe, presented his offering on the first day.OLCBNa mokolo ya liboso, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, moto ya libota ya Yuda, amemaki likabo na ye.
13His offering: one silver plate, about three and a quarter pounds, and one silver basin, about one and three-quarter pounds, both filled with fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBLikabo na ye ezalaki : etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo ;
14One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmpe mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa,
15one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
16one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
17for the peace offering: two oxen, five rams, five male goats, five year-old male lambs. This was Nahshon son of Amminadab's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.
18On the second day Nethanel son of Zuar, the leader of Issachar, presented an offering.OLCBNa mokolo ya mibale, Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, mokambi ya libota ya Isakari,
19His offering: one silver plate weighing about three and a quarter pounds, one silver bowl weighing about one and three-quarter pounds, both filled with fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
20One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
21one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
22one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
23for the peace offering: two oxen, five rams, five male goats, five year-old male lambs. This was Nethanel son of Zuar's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari.
24On the third day it was Eliab son of Helon, the leader of the sons of Zebulun.OLCBNa mokolo ya misato, Eliabi, mwana mobali ya Eloni, mokambi ya libota ya Zabuloni,
25His offering: one silver plate weighing about three and a quarter pounds, one silver basin weighing about one and three-quarter pounds, both full of fine flour mixed with oil for a grain offering;OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
26one gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
27one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
28one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
29for the peace offering sacrifice: two oxen, five rams, five male goats, five male lambs a year old. This was Eliab son of Helon's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Eliabi, mwana mobali ya Eloni.
30On the fourth day it was Elizur son of Shedeur, the leader of the sons of Reuben.OLCBNa mokolo ya minei, Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, mokambi ya libota ya Ribeni,
31His offering: one silver plate, about three and a quarter pounds, and one silver basin, about one and three-quarter pounds—both full of fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
32One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
33one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
34one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
35and for the peace offering sacrifice: two oxen, five rams, five male goats, five male lambs a year old. This was Elizur son of Shedeur's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri.
36On the fifth day it was Shelumiel son of Zurishaddai, the leader of the sons of Simeon.OLCBNa mokolo ya mitano, Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, mokambi ya libota ya Simeoni,
37His offering: one silver plate, about three and a quarter pounds, one silver basin, about one and three-quarter pounds, both full of fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
38One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
39one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
40one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
41for the sacrifice of peace offerings: two oxen, five rams, five male goats, five year-old male lambs. This was Shelumiel son of Zurishaddai's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani : bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Wana nde ezalaki makabo ya Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi.
42On the sixth day it was Eliasaph son of Deuel, the leader of the sons of Gad.OLCBNa mokolo ya motoba, Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, mokambi ya libota ya Gadi,
43His offering was one silver plate, about three and a quarter pounds, and one silver basin, about one and three-quarter pounds, both filled with fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
44One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
45one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
46one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
47for the peace offering: two oxen, five rams, five male goats, five male yearling lambs. This was Eliasaph son of Deuel's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Eliazafi, mwana mobali ya Deweli.
48On the seventh day it was Elishama son of Ammihud, the leader of the sons of Ephraim.OLCBNa mokolo ya sambo, Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, mokambi ya libota ya Efrayimi,
49His offering: one silver plate, about three and a quarter pounds, and one silver basin, about one and three-quarter pounds, both filled with fine flour mixed with oil for a grain offering;OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
50one gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
51one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
52one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
53for the sacrifice of peace offerings: two oxen, five rams, five male goats, five male lambs a year old. This was Elishama son of Ammihud's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Elishama, mwana mobali ya Amiwudi.
54On the eighth day it was Gamaliel son of Pedahzur, the leader of the sons of Manasseh.OLCBNa mokolo ya mwambe, Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, mokambi ya libota ya Manase,
55His offering: one silver plate, about three and a quarter pounds, and one silver basin, about one and three-quarter pounds, both full of fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
56One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
57one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
58one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
59for the peace offering: two oxen, five rams, five male goats, five year-old male lambs. Offering of Gamaliel son of Pedahzur.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri.
60On the ninth day it was Abidan son of Gideoni, the leader of the sons of Benjamin.OLCBNa mokolo ya libwa, Abidani, mwana mobali ya Gideoni, mokambi ya libota ya Benjame,
61His offering: one silver plate, about three and a quarter pounds, one silver basin, about one and three-quarter pounds, both full of fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
62One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
63one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
64one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
65for the peace-offering sacrifice: two oxen, five rams, five male goats, five yearling male lambs. This was Abidan son of Gideoni's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Abidani, mwana mobali ya Gideoni.
66On the tenth day it was Ahiezer son of Ammishaddai, the leader of the sons of Dan.OLCBNa mokolo ya zomi, Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, mokambi ya libota ya Dani,
67His offering: one silver plate weighing about three and a quarter pounds, one silver basin weighing about one and three-quarter pounds, both full of fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
68One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
69one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
70one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
71for the peace-offering sacrifice: two oxen, five rams, five male goats, five male year-old lambs. This was Ahiezer son of Ammishaddai's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi.
72On the eleventh day it was Pagiel son of Ochran, the leader of the sons of Asher.OLCBNa mokolo ya zomi na moko, Pagieli, mwana mobali ya Okirani, mokambi ya libota ya Aseri,
73He offered a silver plate, about three and a quarter pounds, and a silver basin, about one and three-quarter pounds, both filled with fine flour mixed with oil for a grain offering;OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
74one gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
75one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
76one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
77and for the sacrifice of peace offerings: two oxen, five rams, five male goats, five male lambs a year old. The offering of Pagiel son of Ochran.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Pagieli, mwana mobali ya Okirani.
78On the twelfth day it was Ahira son of Enan, the leader of the sons of Naphtali.OLCBNa mokolo ya zomi na mibale, Akira, mwana mobali ya Enani, mokambi ya libota ya Nefitali,
79His offering: one silver plate, about three and a quarter pounds, and one silver basin, about one and three-quarter pounds, both filled with fine flour mixed with oil for a grain offering.OLCBamemaki makabo oyo : etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo,
80One gold dish weighing about four ounces, full of incense;OLCBmbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa.
81one young bull, one ram, and one male lamb a year old, for a burnt offering;OLCBAmemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,
82one male goat for a sin offering;OLCBntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;
83and for the peace-offering sacrifice: two oxen, five rams, five male goats, five male lambs a year old. Ahira son of Enan's offering.OLCBmpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Akira, mwana mobali ya Enani.
84This was the altar's dedication offering when it was anointed, from Israel's leaders: twelve silver plates, twelve silver basins, twelve gold dishes.OLCBYango nde ezalaki makabo ya bakambi ya Isalaele mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta. Na kosangisa, bango nyonso bapesaki : bitando ya palata zomi na mibale, bambeki ya palata zomi na mibale, bambeki ya wolo zomi na mibale.
85Each silver plate weighed about three and a quarter pounds, each basin about one and three-quarter pounds; all the silver of the vessels totaled about sixty pounds.OLCBEtando moko na moko ya palata ezalaki ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mpe mbeki moko na moko ezalaki ya bagrame nkama mwambe : palata nyonso esalaki bakilo tuku mibale na sambo na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bazalaki komeka bakilo na Esika ya bule.
86The twelve gold dishes full of incense weighed about four ounces each; all the gold totaled about three pounds.OLCBMbeki moko na moko ya wolo ezalaki ya bagrame nkama moko na zomi : wolo nyonso esalaki bagrame nkoto moko na nkama misato.
87All the cattle for the burnt offering: twelve bulls, twelve rams, twelve year-old male lambs, with their grain offering; and twelve male goats for the sin offering.OLCBMpo na bambeka ya kotumba, bango nyonso bapesaki : bangombe zomi na mibale ya mibali, bameme zomi na mibale ya mibali, bana meme zomi na mibale ya mobu moko elongo na makabo mosusu mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka mpo na masumu.
88All the cattle for the peace offering sacrifices: twenty-four bulls, sixty rams, sixty male goats, sixty male year-old lambs. This was the altar's dedication offering, after it was anointed.OLCBNa kosangisa, bango nyonso bapesaki lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani : bangombe tuku mibale na minei ya mibali, bameme tuku motoba ya mibali, bantaba tuku motoba ya mibali, bana meme tuku motoba ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya libulisi ya etumbelo sima na kosopela yango mafuta.
89When Moses entered the tent of meeting to speak with our Father, he heard the voice speaking to him from above the mercy seat on the ark of the testimony, between the two cherubim—so our Father spoke with him.OLCBTango Moyize azalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosolola na Yawe, azalaki koyoka mongongo koloba na ye wuta na mofinuku oyo ezalaki likolo ya Sanduku ya Litatoli kati na basheribe mibale, mpe azalaki kosolola na ye.