Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jesus was leaving the temple when his disciples came to show him its buildings. Wana Yesu azalaki kobima longwa na lopango ya Tempelo, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpo na kotalisa Ye ndenge batonga Tempelo.
2 "Do you see all these?" he answered. "Truly I tell you: not one stone here will be left on another; all will be torn down." Kasi Yesu alobaki na bango : — Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.
3 While Jesus was sitting on the Mount of Olives, his disciples came to him privately: "Tell us, when will these things happen, and what sign marks your coming and the end of the age?" Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?
4 Jesus answered, "Watch out that no one deceives you. Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moto moko te akosa bino !
5 "For many will come in my name, claiming, 'I am the Christ,' and they will deceive many. Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
6 You'll hear of wars and rumors of wars—don't be alarmed. This must happen, but the end isn't yet. Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.
7 Nation will rise against nation, and kingdom against kingdom, with famines and earthquakes in place after place. Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, nzala ekozala makasi penza, mpe mabele ekoningana bipai na bipai.
8 All these are the beginning of birth pains. Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
9 Then they will hand you over to suffering and kill you, hated by all nations because of my name. Bongo, bakokaba bino mpo ete bomona pasi, bakoboma bino ; bikolo nyonso ekoyina bino mpo na Kombo na Ngai.
10 At that time many will fall away and will betray and hate one another, Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango.
11 and many false prophets will appear and deceive many people. Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele.
12 Because lawlessness will increase, the love of most will grow cold, Lokola mabe ekokola se kokola, bolingo ya bato ebele ekokita.
13 but the one who endures to the end will be saved. Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
14 This good news of the kingdom will be announced worldwide as a testimony to all nations, and then the end will come. Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso ; sima na yango kaka nde suka ekoya.
15 So when you see the desolating abomination Daniel the prophet spoke of standing in the holy place—let the reader understand, Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—
16 then let those who are in Judea flee to the mountains. wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;
17 "Let no one on the rooftop go down to take anything out of the house, tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye,
18 and let no one in the field go back to get a coat. mpe tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye !
19 How dreadful it will be in those days for pregnant women and nursing mothers! Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele !
20 Pray that your flight will not take place in winter or on the Sabbath. Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi to na mokolo ya Saba.
21 For then there will be great suffering, unmatched from the world's beginning until now, and never to be matched again. Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
22 If those days had not been cut short, no one would survive; but for the elect's sake, those days will be cut short. Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
23 Then if anyone tells you, 'Look, here's the Christ,' or 'There he is,' don't believe it. Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te.
24 False messiahs and false prophets will arise, performing great signs and wonders to deceive, if possible, even the elect. Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.
25 See, I have told you ahead of time. Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba !
26 So if they say, 'Look, he's in the wilderness,' don't go out; 'Look, in the inner rooms,' don't believe it. Soki moto moko alobi na bino : « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te ; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te.
27 For just as lightning flashes from the east and shows as far as the west, so will the Son of Man's coming be. Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala.
28 Wherever there is a carcass, there the vultures will gather. Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.
29 Right after the suffering of those days, the sun will go dark, the moon will give no light, stars will fall from the sky, and the powers of the heavens will shake. Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
30 Then the sign of the Son of Man will appear in heaven, and all earth's peoples will mourn, seeing the Son of Man come on heaven's clouds with power and great glory. Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.
31 He will send out his angels with a loud trumpet blast, and they will gather his chosen from the four winds, from one end of the sky to the other. Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
32 Learn this from the fig tree: as soon as its branch softens and leafs out, you know summer is near. Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
33 So also, when you see all these things, know it is near, at the door. Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
34 Truly I tell you, this generation will certainly not pass away until all these things have happened. Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
35 Heaven and earth will pass away, but my words will never pass away. Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
36 "No one knows that day or hour—not the angels in heaven, not the Son—only the Father. Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
37 As in Noah's days, so will be the Son of Man's coming. Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto ;
38 For in the days before the flood, people ate and drank, married and gave in marriage, until the day Noah entered the ark; pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ;
39 and they knew nothing until the flood came and swept them all away. That is how the coming of the Son of Man will be. bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso. Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto.
40 Two men will be in the field; one will be taken and the other left. Mibali mibale bakozala na elanga : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;
41 Two women will be grinding with a hand mill; one will be taken and the other left. basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo ; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.
42 Therefore keep watch, because you do not know on what day your Lord will come. Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.
43 Understand: had the homeowner known what watch of night the thief was coming, he'd have watched and kept his house from being broken into. Bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga ya butu oyo moyibi akoya, alingaki kosenzela mpe kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.
44 So you too must be ready, because the Son of Man comes at an hour you don't expect. Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te.
45 Who then is the faithful and wise servant, whom the master put in charge of his household to give them food at the right time? Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?
46 It will be good for that servant whose master finds him doing so when he returns. Esengo na mowumbu oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo.
47 Truly I tell you, he will put him in charge of all his possessions. Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso.
48 But suppose that wicked servant says to himself, 'My master is staying away a long time,' Kasi soki azali mowumbu mabe oyo amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, »
49 and then begins to beat his fellow servants and to eat and drink with drunkards. mpe akomi kobeta baninga na ye ya mosala, bawumbu lokola ye, kolia mpe komela masanga mesa moko elongo na balangwi masanga,
50 That servant's master will come on a day he doesn't expect, at an hour he doesn't know. nkolo na ye akozonga na mokolo oyo ye, mowumbu, azali kozela te mpe na ngonga oyo ayebi te ;
51 He will cut him to pieces and place him with the hypocrites, where people weep and grind their teeth." akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]