Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Matthew 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jesus spoke to them again in parables, saying: Yesu alobaki na bango lisusu na masese :
2 "The kingdom of our Father is like a king who prepared a wedding feast for his son. — Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.
3 He sent his servants to summon the invited guests to the wedding feast, but they refused to come. Atindaki basali na ye kokende koyebisa babengami na feti ete baya na feti, kasi babengami yango baboyaki.
4 Again he sent other servants, saying, 'Tell those invited: Look, I have prepared my dinner; my oxen and fattened cattle are killed, everything ready. Come to the wedding feast.' Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango : « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei : nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta ; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. »
5 But they paid no attention and went off, one to his farm, another to his business, Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba : bamoko bakendeki na bilanga na bango ; bamosusu, na mombongo na bango ;
6 while the rest seized his servants, mistreated them, and killed them. mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango.
7 The king was enraged, and he sent his troops, destroyed those murderers, and burned their city. Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.
8 Then he told his servants, 'The wedding is ready, but those invited weren't worthy. Alobaki na basali na ye : « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te.
9 Go therefore to the main roads and invite to the wedding feast as many as you find.' Bokende na bisika oyo babalabala ekutana mpe bobenga bato nyonso oyo bokomona kuna, mpo ete baya na feti ya libala ya mwana na ngai. »
10 Those servants went out into the roads and gathered everyone they found, bad and good, and the wedding hall filled with guests. Basali bakendeki na babalabala mpe babengaki bato nyonso oyo bamonaki kuna : bato mabe mpe bato malamu. Boye, ndako ya feti etondaki na babengami.
11 "But when the king came in to see the guests, he saw a man not dressed in wedding clothes. Kasi tango mokonzi akotaki mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko oyo alataki te elamba ya feti ya libala.
12 He asked, 'Friend, how did you get in here without wedding clothes?' He was speechless. Atunaki ye : « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala ? » Moto yango azangaki eyano ya kopesa.
13 Then the king told the servants, 'Tie his hands and feet, and throw him into the outer darkness, where there will be weeping and grinding of teeth.' Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
14 For many are called, but few are chosen." Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke.
15 Then the Pharisees went and plotted how to trap him with his own words. Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko.
16 They sent their disciples to him, with the Herodians, saying, "Teacher, we know you are truthful and truly teach God's way; you defer to no one, since you don't judge people by rank. Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ;
17 Tell us, then, what you think: Is it lawful to pay taxes to Caesar, or not?" yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo : Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare ?
18 But Jesus, knowing their malice, said, "Why are you testing me, you hypocrites? Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki : — Bato ya bilongi mibale ! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ?
19 Show me the coin used for the tax." And they brought him a denarius. Bolakisa Ngai mbongo oyo bofutaka na yango mpako. Bamemelaki Ye mbongo moko ya ebende.
20 And he said to them, "Whose image is this, and whose inscription?" Atunaki bango : — Elilingi mpe makomi oyo ezali ya nani ?
21 They said, "Caesar's." Then he said to them, "So pay Caesar what belongs to Caesar, and our Father what belongs to our Father." Bazongisaki : — Ezali ya Sezare. Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !
22 When they heard it, they were amazed; and they left him and went away. Tango bayokaki eyano ya Yesu, bakamwaki ; batikaki Ye mpe bakendeki.
23 That same day Sadducees came to him, who say there is no resurrection, and they asked him, Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :
24 saying, "Teacher, Moses said: if a man dies childless, his brother must marry the widow and raise offspring for his brother. — Moteyi, Moyize alobaki : « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi. »
25 Now there were seven brothers among us. The first married, died, and, childless, left his wife to his brother. Nzokande, kati na biso, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki ; kasi lokola abotaki te bana oyo basengelaki kokitana na ye, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye.
26 So too the second and the third, down to the seventh. Esalemaki mpe bongo na ndeko ya mibale, na ndeko ya misato kino na ndeko ya sambo.
27 Last of all, the woman died. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
28 In the resurrection, then, whose wife of the seven will she be? For they all had her." Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ?
29 Jesus answered, "You're mistaken—you know neither the Scriptures nor our Father's power. Yesu azongiselaki bango : — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
30 For in the resurrection people neither marry nor are married off, but are like angels in heaven. Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.
31 Now, about the resurrection of the dead, haven't you read what our Father told you: Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino :
32 'I'm the God of Abraham, of Isaac, and of Jacob'? He's not God of the dead, but of the living." « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi.
33 And when the crowds heard it, they were astonished at his teaching. Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu.
34 But when the Pharisees heard that he had silenced the Sadducees, they gathered together. Tango Bafarizeo bayokaki ete Yesu asukisi Basaduseo, bango mpe basanganaki ;
35 And one of them, an expert in the Law, asked him a question to test him: mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye :
36 "Teacher, which is the great commandment in the Law?" — Moteyi, mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso ?
37 He said to him, "Love your Father with all your heart, with all your soul, and with all your mind. Yesu azongiselaki ye : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.
38 This is the great and first commandment. Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene.
39 And a second is like it: You will love your neighbor as yourself. Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
40 On these two commandments depend all the Law and the Prophets." Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale.
41 Now while the Pharisees were gathered together, Jesus asked them, Wana Bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango :
42 "What do you think about the Christ? Whose son is he?" They said to him, "David's." — Bozali kokanisa nini na tina na Klisto ? Azali Mwana ya nani ? Bazongiselaki Ye : — Azali mwana ya Davidi !
43 He asked them, "How then does David, by the Holy Spirit, call him Lord, saying, Alobaki na bango : — Bongo ndenge nini Davidi, na botindikami ya Molimo ya Nzambe, abengaki Ye Nkolo ? Pamba te alobaki :
44 'Our Father said to my Lord, "Sit at my right hand, until I put your enemies under your feet"'? « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
45 If then David calls the Christ Lord, how can the Christ be David's son?" Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?
46 No one could answer him a word, and from that day no one dared ask him anything else. Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]