Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Mark 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The beginning of the gospel of Jesus Christ, the Son of our Father. Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe,
2 As written in Isaiah the prophet: "Look, I send my messenger ahead of you, who will prepare your way. kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi : « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, ye nde akobongisela Yo nzela.
3 A voice calling out in the wilderness: 'Prepare the way of the Lord, make his paths straight.'" Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike ! › »
4 John appeared, baptizing in the wilderness and proclaiming a baptism of repentance for the forgiveness of sins. Boye Yoane azalaki kati na esobe mpe azalaki kosakola : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino ! »
5 All Judea and everyone in Jerusalem went out to him, and he baptized them in the Jordan River as they confessed their sins. Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye ; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
6 John was dressed in camel's hair, with a leather belt around his waist, eating locusts and wild honey. Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
7 He announced: "After me comes one stronger than I; I'm not worthy to stoop and untie his sandal strap. Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
8 I have baptized you with water, but he will baptize you with the Holy Spirit." Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino kati na Molimo Mosantu. »
9 In those days Jesus came from Nazareth of Galilee and was baptized by John in the Jordan. Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti ya Galile, mpe Yoane abatisaki Ye na ebale Yordani.
10 Immediately, as he came up out of the water, he saw the heavens split open and the Holy Spirit come down on him like a dove. Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga.
11 And a voice came from heaven: "You are my beloved Son; in you I delight." Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi ! »
12 And immediately the Holy Spirit drove him out into the wilderness. Mbala moko, Molimo amemaki Yesu kati na esobe
13 He was in the wilderness forty days, tempted by Satan, with the wild animals, and the angels served him. epai wapi avandaki mikolo tuku minei mpe Satana azalaki komeka Ye. Azalaki kuna elongo na banyama ya zamba, mpe ba-anjelu bazalaki kopesa Ye bilei.
14 Now after John was arrested, Jesus came into Galilee, proclaiming the gospel of our Father, Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe.
15 and saying, "The time is fulfilled, and our Father's kingdom is near; repent and believe the good news." Azalaki koloba : « Tango ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. »
16 Passing the Sea of Galilee, he saw Simon and his brother Andrew casting a net in the sea, for they were fishermen. Mokolo moko, wana Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galile, amonaki Simona mpe Andre, ndeko na ye. Bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
17 And Jesus said to them, "Follow me, and I will make you become fishers of people." Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
18 And immediately they left their nets and followed him. Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu.
19 Going a little farther, he saw James son of Zebedee and John his brother in their boat, mending the nets. Wana Yesu akobaki kotambola, amonaki na mosika Jake, mwana mobali ya Zebede, oyo azalaki elongo na Yoane, ndeko na ye ; bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango.
20 At once he called them; leaving their father Zebedee in the boat with the hired hands, they followed him. Mbala moko, Yesu abengaki bango. Batikaki Zebede, tata na bango, kati na bwato elongo na basali na ye mpe balandaki Yesu.
21 They went to Capernaum. At once, on the Sabbath, he entered the synagogue and began teaching. Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na Kapernawumi. Na mokolo ya Saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya.
22 They were amazed at his teaching, for he taught them with authority, not like the scribes. Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki.
23 And immediately there was in their synagogue a man with an unclean spirit, and he cried out. Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga :
24 Why meddle with us, Jesus of Nazareth? Have you come to destroy us? I know who you are—God's Holy One! — Yesu ya Nazareti, olingi nini ? Oyei nde koboma biso ? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe !
25 But Jesus rebuked him, saying, "Be silent, and come out of him!" Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo.
26 And the unclean spirit, convulsing him and crying out with a loud voice, came out of him. Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga.
27 All were amazed, and they questioned each other: "What is this? A new teaching with authority - he commands even the unclean spirits, and they obey him!" Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu likambo nini ? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya ! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye !
28 And at once his fame spread everywhere throughout all the surrounding region of Galilee. Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.
29 Immediately he left the synagogue and went to Simon and Andrew's house, with James and John. Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre.
30 Now Simon's mother-in-law lay sick with a fever, and immediately they told him about her. Nzokande, mama-bokilo ya Simona azalaki ya kolala mpo ete azalaki kobela fievele ; mbala moko, bapesaki Ye sango.
31 He came, took her hand, raised her up. The fever left her, and she served them. Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.
32 That evening, when the sun set, they brought him all who were sick and those oppressed by demons. Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe.
33 And the whole city was gathered together at the door. Bato nyonso ya engumba bayaki kosangana liboso ya ekuke ya ndako ;
34 He healed many sick with various diseases and drove out many demons, not letting the demons speak, since they knew him. bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba ; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali.
35 Long before dawn, while still dark, he got up, went out to a deserted place, and prayed there. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela.
36 And Simon and those who were with him searched for him, Simona elongo na baninga na ye bakendeki koluka Yesu.
37 and they found him and said to him, "Everyone is looking for you." Tango bamonaki Ye, balobaki na Ye : — Bato nyonso bazali koluka Yo.
38 He said, "Let us go elsewhere, to the neighboring towns, so I can preach there too, for that is why I came." Kasi Ye azongiselaki bango : — Tokende na esika mosusu, na bamboka ya zingazinga, mpo ete nateya mpe kuna, pamba te nayaki mpo na yango.
39 And he went throughout all Galilee, preaching in their synagogues and casting out demons. Boye, atambolaki na Galile mobimba ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe.
40 A man with leprosy came, knelt, and begged him, "If you're willing, you can make me clean." Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu : — Soki olingi, komisa ngai peto.
41 Moved with deep compassion, he stretched out his hand, touched him, and said to him, "I am willing; be clean." Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
42 And immediately the leprosy left him, and he was made clean. Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto.
43 Sternly warning him, he sent him away at once, Mbala moko, Yesu azongisaki ye mpe akebisaki ye :
44 and told him, "Make sure you tell no one—but go, show yourself to the priest, and offer what Moses commanded for your cleansing, as proof to the people." — Yoka Ngai malamu, koyebisa likambo oyo na moto moko te ; kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa, mpo na kopetolama na yo, likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
45 But he went out, proclaiming it freely and spreading the news, so Jesus could no longer enter a town openly, but stayed in lonely places. Yet people came to him from everywhere. Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]