Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 On a Sabbath, Jesus walked through grainfields; his disciples picked heads of grain, rubbed them in their hands, and ate. Mokolo moko ya Saba, wana Yesu azalaki kotambola kati na bilanga ya ble, bayekoli na Ye babandaki kobuka ble ; mpe, sima na bango kolongola yango baposo na maboko, baliaki bambuma na yango.
2 Some of the Pharisees said, "Why are you doing what is not lawful on the Sabbath?" Ndambo ya Bafarizeo batunaki : — Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ?
3 Jesus answered them, "Haven't you read what David did when he and those with him were hungry, Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala ?
4 how he entered our Father's house, took the bread of the Presence, ate it, gave some to his companions, though it's not lawful for any but the priests to eat it?" Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
5 Then he said to them, "The Son of Man is Lord of the Sabbath." Yesu alobaki na bango lisusu : — Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
6 On another Sabbath he entered the synagogue and taught; a man was there with a withered right hand. Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali.
7 The scribes and Pharisees watched him closely to see if he would heal on the Sabbath, so they could find a charge against him. Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.
8 But knowing their thoughts, he told the man with the withered hand, "Get up and stand here." So he got up and stood there. Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko : — Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso ! Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso.
9 Then Jesus said to them, "I ask you: is it lawful on the Sabbath to do good or do harm, to save a life or destroy it?" Bongo Yesu alobaki na bato mosusu : — Nazali kotuna bino : nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?
10 Looking around at them all, he told the man, "Stretch out your hand." He did, and his hand was restored. Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki.
11 But filled with rage, they discussed with each other what to do to Jesus. Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu.
12 In those days Jesus went out to the mountain to pray, spending the whole night in prayer to our Father. Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.
13 At daybreak he called his disciples and chose twelve of them, naming them apostles: Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki :
14 Simon, whom he named Peter, and his brother Andrew; James and John; Philip and Bartholomew; Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi ;
15 Matthew and Thomas; James son of Alphaeus, and Simon who was called the Zealot; Matayo, Toma ; Jake, mwana mobali ya Alife, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote ;
16 Judas son of James, and Judas Iscariot, who became a traitor. Yuda, mwana mobali ya Jake, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
17 He came down with them and stood on a level place, with a large crowd of his disciples and a large multitude of people from all Judea, Jerusalem, and the coast of Tyre and Sidon. Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.
18 They came to hear him and be healed of their diseases; those troubled by unclean spirits were also cured. Bayaki mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. Ba-oyo milimo mabe ezalaki kotungisa bakangolamaki.
19 The whole crowd tried to touch him, since power went out from him, healing everyone. Bato nyonso balukaki kosimba Ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima kati na Ye mpe ezalaki kobikisa bato nyonso.
20 Looking up at his disciples, he said: "Blessed are you who are poor, for yours is the kingdom of our Father. Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki : « Esengo na bino oyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino !
21 "Blessed are you who hunger now, for you will be satisfied. Blessed are you who weep now, for you will laugh. Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo, pamba te bokotonda ! Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo, pamba te bokoseka !
22 Blessed are you when people hate you, and when they exclude you and revile you and reject your name as evil, because of the Son of Man. Esengo na bino tango bato bazali koyina bino, tango bazali kobengana bino, tango bazali kofinga bino, mpe tango bato bazali kosambwisa kombo na bino, likolo na Mwana na Moto !
23 Rejoice in that day and leap for joy, for your reward is great in heaven; for that is how the persecutors' ancestors treated the prophets. Tango makambo yango ekokokisama, bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo. Ezalaki mpe kaka ndenge wana nde batata na bango banyokolaki basakoli.
24 But woe to you who are rich, for you have already received your comfort. Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi, pamba te bosili kozwa kobondisama na bino !
25 Woe to you who are full now, for you will be hungry. Woe to you who laugh now, for you will mourn and weep. Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo, pamba te bokozala na nzala ! Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo, pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !
26 Woe to you when everyone speaks well of you, for that is how the flatterers' ancestors treated the false prophets. Mawa na bino soki bato nyonso bazali koloba malamu na tina na bino, pamba te ezali ndenge wana nde bakoko na bango basalaki basakoli ya lokuta !
27 But I tell you who listen: love your enemies, do good to those who hate you, Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi : Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu.
28 bless those who curse you, pray for those who mistreat you. Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
29 Whoever strikes you on one cheek, offer the other too; whoever takes your coat, do not hold back your shirt. Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe litama mosusu. Soki moto abotoli yo kazaka na yo, tika ye azwa lisusu elamba na yo.
30 Give to everyone who asks you, and don't demand back what is taken from you. Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo, kosenga te ete azongisela yo yango.
31 Do to others as you would have them do to you. Oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango.
32 Loving those who love you—what credit is that? Even sinners love those who love them. Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango.
33 If you do good to those doing you good, what credit is that to you? Even sinners do the same. Mpe soki bosalaka bolamu epai ya bato oyo basalaka bino bolamu, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe basalaka bongo.
34 And if you lend expecting repayment, what credit is that? Even sinners lend to sinners to get back the same amount. Soki bodefisaka kaka na bato oyo bozali na elikya ete bakoki kofuta bino niongo oyo bodefisaka bango, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango, bato ya masumu, na elikya ete bakofuta bango niongo yango.
35 But love your enemies, do good, and lend expecting nothing back; your reward will be great, and you will be children of the Most High, for he is kind to the ungrateful and evil. Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.
36 Be merciful, just as your Father is merciful. Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.
37 Do not judge, and you will not be judged. Do not condemn, and you will not be condemned. Forgive, and you will be forgiven. Bosambisaka te, mpe bakosambisa bino te ; bokatelaka bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te ; bolimbisaka, mpe bakolimbisa bino ;
38 Give, and it will be given to you: a good measure—pressed down, shaken, overflowing—will be poured into your lap. For the measure you use will be measured back to you." bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »
39 He also gave them a parable: "Can a blind person guide a blind person? Won't both fall into a pit? Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo : « Boni, mokufi miso akoki kotambolisa mokufi miso mosusu ? Boni, bango mibale bakokweya te kati na libulu ?
40 No student surpasses their teacher; whoever is fully trained becomes like their teacher. Moyekoli alekaka molakisi na ye te, kasi moyekoli nyonso oyo bateyi malamu akozala lokola molakisi na ye.
41 Why do you see the speck in your brother's eye, yet miss the beam in your own eye? Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ?
42 How can you tell your brother, 'Brother, let me remove the speck from your eye,' when you don't see the beam in your own eye? Hypocrite! First remove the beam from your own eye—then you'll see clearly to remove the speck from your brother's eye. Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.
43 For no good tree bears bad fruit, nor again does a bad tree bear good fruit. Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu.
44 Each tree is known by its own fruit; figs aren't gathered from thornbushes, nor grapes picked from a bramble. Nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango : na nzete ya nzube, babukaka bambuma ya figi te ; mpe na nzete ya sende, balongolaka bambuma ya vino te.
45 A good person produces good from the heart's good store; an evil person produces evil from the evil store; for the mouth speaks from the heart's overflow. Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.
46 Why do you call me 'Lord, Lord,' and not do what I say? Mpo na nini bobengaka Ngai ‹ Nkolo ! Nkolo ! › kasi bosalaka te makambo oyo nayebisaka bino ?
47 Everyone coming to me, hearing my words, and doing them—I'll show you what he's like: Moto nyonso oyo ayaka epai na Ngai, ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango na misala, nazali kolakisa bino soki akokani na nani :
48 He's like a man building a house, who dug deep and laid its foundation on rock. When the flood came, the river crashed into that house but couldn't shake it—it was built well. akokani na moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki mabele, akitaki penza na mozindo mpe atongaki moboko ya ndako yango na likolo ya libanga ; tango mpela eyaki, mayi emataki makasi mpe emibwakaki na ndako yango kasi ekokaki te kobuka yango, pamba te etongamaki malamu.
49 But whoever hears my words and doesn't act on them is like a man who built a house on the ground, without a foundation. The flood crashed against it, and it collapsed at once—that house's ruin was great." Kasi moto oyo ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango te na misala akokani na moto oyo atongaki ndako na likolo ya mabele, ezanga moboko ; tango kaka mpela emibwakaki na ndako, ndako yango ekweyaki mbala moko mpe epanzanaki. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]