Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Leviticus 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses, saying: Yawe alobaki na Moyize :
2 "Speak to the whole community of Israel: You are to be holy, for I, your Father, am holy. « Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule.
3 "Each of you must respect your mother and father, and keep my Sabbaths. I am your Father. Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
4 "Do not turn to idols or make for yourselves gods of cast metal. I am your Father. Bomipesa te na banzambe ya bikeko to bomisalela te banzambe ya bikeko ya bibende ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
5 "When you sacrifice a peace offering to me, offer it so you will be accepted. Tango bokobonza mbeka ya boyokani epai na Yawe, bosala yango na ndenge esengeli mpo ete endimama mpo na bolamu na bino.
6 Eat it the day you offer it, or the next; anything left to the third day, burn in fire. Bosengeli kolia yango kaka na mokolo oyo bobonzi yango lokola mbeka to na mokolo oyo elandi. Mpe eloko nyonso oyo ekotikala, bosengeli kozikisa yango na moto na mokolo ya misato.
7 If any is eaten on the third day, it is foul and will not be accepted. Kasi na mokolo yango ya misato, mbeka yango ekokoma mbindo ; soki moto moko alie yango, nakondima yango lisusu te.
8 Whoever eats it bears their guilt, for they desecrated what is holy to me; that person will be cut off from their people. Moto nyonso oyo akolia yango, akomema mokumba ya mabe na ye mpo ete asambwisi eloko oyo ezali bule mpo na Yawe, mpe basengeli kobengana ye kati na bato na ye.
9 "When you harvest your land, do not reap to the field's edges or gather the gleanings of your harvest. Tango okobuka mbuma ya bilanga na yo, okobuka yango te kino na mondelo, mpe okozonga te mpo na kolokota mbuma oyo ekokweya.
10 Do not strip your vineyard bare or gather its fallen grapes. Leave them for the poor and the foreigner. I am your Father. Okobuka mpe te mbuma ya vino oyo ekotikala to kolokota oyo ekokweya. Okotika yango mpo na babola to bapaya : nazali Yawe Nzambe na yo.
11 "Do not steal; do not deceive; do not lie to one another. Okoyiba te, okoloba lokuta te, moto moko te akosa moninga na ye.
12 "Don't swear falsely by my name, desecrating your Father's name. I am your Father. Okolapa te ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai mpe okobebisa te bosantu ya Kombo ya Nzambe na yo. Nazali Yawe, Nzambe na yo.
13 "You shall not oppress your neighbor or rob him. Do not hold a hired worker's wages overnight. Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.
14 "Do not curse the deaf or place a stumbling block before the blind, but fear your Father. I am your Father. Okolakela mabe te moto oyo akufa matoyi mpe okotia libaku te liboso ya mokufi miso, kasi okotosa Nzambe na yo. Nazali Yawe.
15 "Do not pervert justice in your decisions. Do not favor the poor or defer to the great, but judge your neighbor fairly. Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo.
16 "Don't spread slander among your people, and don't stand idle while your neighbor's life is in danger. I am your Father. Okokende te kotonga bato na yo bipai na bipai. Okosala eloko moko te oyo ekoyeisa pasi na bomoi ya moninga na yo. Nazali Yawe.
17 "Do not hate your brother in your heart; correct your neighbor openly, so you don't bear sin because of him. Okoyina ndeko na yo te na motema na yo ; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye.
18 Do not take revenge or hold a grudge against your own people, but love your neighbor as yourself. I am your Father. Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe.
19 "Keep my decrees. Don't breed your livestock with a different kind. Don't sow your field with two kinds of seed, or wear a garment of two kinds of material. Okobatela bikateli na ngai : okosangisa nzoto te ya banyama mibale ya lolenge mibale ekesana ; okolona mpe te na elanga na yo nkona mibale ekesana. Okolata te elamba oyo batongi na basinga mibale ekesana.
20 "If a man sleeps with a slave woman assigned to another man, and she has not been bought back or set free, an inquiry is required. They are not to be put to death, since she was not free. Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi oyo azali mobandami ya mobali mosusu, kasi nanu bapeseli ye te biloko ya libala to kopesa ye bonsomi, esengeli mobali wana afuta lomande. Nzokande bango mibale, bakoboma bango te mpo ete mwasi yango asikolamaki nanu te.
21 He is to bring his guilt offering to me, at the entrance of the tent of meeting—a ram as the guilt offering. Mpe mobali asengeli komema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani meme ya mobali oyo akobonza epai na Yawe lokola mbeka mpo na masumu.
22 The priest will make atonement for him with the ram of the guilt offering before me, for the sin he committed; and he will be forgiven the sin he committed. Bongo na nzela ya meme yango ya mbeka mpo na masumu, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mobali yango liboso ya Yawe, mpe masumu oyo asilaki kosala ekolimbisama.
23 "When you enter the land and plant any food tree, treat its fruit as forbidden. For three years it is forbidden to you; do not eat it. Tango bokokota na mokili ya Kanana, bokolona banzete ya lolenge nyonso oyo ebotaka mbuma. Na mibu misato, bokozwa bambuma na yango nyonso lokola bambuma ya mbindo ; boye bokolia yango te.
24 In the fourth year all its fruit is to be holy, an offering of praise to me. Na mobu ya minei, bokobulisa bambuma na yango nyonso ekozala bule mpo na Yawe lokola litatoli ya kozongisa matondi epai na Ye.
25 But the fifth year you may eat its fruit, so it yields more for you. I am your Father. Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
26 "Do not eat anything with the blood in it. Do not practice fortune-telling or interpret omens. Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te.
27 "Do not round off the hair at the sides of your head or damage the edges of your beard. Okokata suki te na bangambo nyonso ya moto na yo, okokata mpe te mandefu na bapembeni na yango.
28 "Don't cut your body for the dead or tattoo yourselves. I am your Father. Soki bozwi matanga, bomikata-kata banzoto na bino te to bomikatisa banzoloko te. Nazali Yawe.
29 "Do not desecrate your daughter by making her a prostitute, or the land will turn to prostitution and fill with depravity. Bobebisa te lokumu ya bana na bino ya basi na kokomisa bango basi ya ndumba, noki te mboka mobimba ekomipesa na kindumba mpe ekotonda na mabe.
30 "You are to keep my Sabbaths and revere my sanctuary. I am your Father. Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe.
31 "Do not turn to mediums or necromancers; do not seek to be made unclean by them. I am your Father. Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
32 "Stand up before the gray-haired and respect the old. Fear your Father. I am your Father. Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange ; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe.
33 "When a foreigner lives among you in your land, do not mistreat them. Soki mopaya moko ayei kovanda kati na bino, na mokili na bino, bonyokola ye te.
34 The foreigner living among you must be to you as a native, and love them as yourself, for you were foreigners in Egypt. I am your Father. Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
35 "You are to do no wrong in judgment, in measures of length, weight, or quantity. Bokosalela lokuta te tango bokomeka molayi, bakilo mpe tango bokoluka koyeba ebele oyo ekoki kozala na kati.
36 Have honest scales, honest weights, an honest grain measure, an honest liquid measure. I am your Father, who brought you out of the land of Egypt. Bokosalela bimekelo ya malamu, bakilo ya malamu, efa ya malamu ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito.
37 "Keep all my statutes and all my rules, and do them. I am your Father." Bokobatela bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso mpe bokosalela yango. Nazali Yawe. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]