Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Leviticus 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses, saying: Yawe alobaki na Moyize :
2 "Speak to the children of Israel and say to them: I am your Father. « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
3 You must not do as Egypt does, where you lived; you must not do as Canaan does, where I am bringing you; you must not follow their statutes. Bokoki te kosala makambo ndenge esalemaka na Ejipito epai wapi bozalaki kovanda to na Kanana epai wapi nazali komema bino.
4 You must follow my judgments and keep my statutes, walking in them. I am your Father. Bosengeli kotosa bobele mibeko mpe bikateli na Ngai. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
5 Keep my statutes and my judgments; whoever does them will live by them. I am your Father. Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe.
6 "None of you may approach any close relative to have sexual relations. I am your Father. Mobali moko te akosangisa nzoto na mwasi ya libota na ye penza. Nazali Yawe.
7 "Do not have sex with your mother—that exposes your father's nakedness. She is your mother; do not have sex with her. Okosambwisa te tata na yo na kosangisa nzoto na mama na yo. Lokola azali mama na yo, kosambwisa ye te.
8 "You must not have sexual relations with your father's wife; that would dishonor your father. Okosangisa nzoto te na mwasi mosusu ya tata na yo, soki te okosambwisa tata na yo.
9 "Don't have sexual relations with your sister, your father's or mother's daughter, born at home or elsewhere. Okosangisa nzoto te na ndeko na yo ya mwasi, ezala na mwana mwasi ya tata na yo to ya mama na yo, oyo abotami na ndako to na libanda ya ndako.
10 "Do not have sex with your son's or daughter's daughter—that exposes your own nakedness. Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwana na yo ya mobali to ya mwasi ; kosambwisa ye te.
11 "Your father's wife's daughter, born to your father, is your sister; do not have sex with her. Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, azali ndeko na yo ya mwasi.
12 "You must not have sexual relations with your father's sister; she is your father's close relative. Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata na yo, azali tata mwasi na yo.
13 "You must not have sexual relations with your mother's sister, for she is your mother's close relative. Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mama na yo, azali mama leki to mama kulutu na yo.
14 "Do not dishonor your father's brother by having sex with his wife; she is your aunt. Okosambwisa te ndeko mobali ya tata na yo na kosangisa nzoto na mwasi na ye. Azali mama na yo.
15 "Do not have sex with your daughter-in-law; she is your son's wife—do not have sex with her. Okosangisa nzoto te na bokilo na yo. Azali mwasi ya mwana na yo, kosangisa na ye nzoto te.
16 "You must not have sexual relations with your brother's wife; that would dishonor your brother. Okosambwisa te ndeko na yo ya mobali na kosangisa nzoto na mwasi na ye.
17 "Do not have sex with a woman and her daughter, or take her son's or her daughter's daughter, to have sex with them; they are close relatives—that is depraved. Okosangisa nzoto te na mama mpe na mwana na ye ya mwasi to na mwana mwasi ya mwana na ye ya mobali mpe ya mwasi ; pamba te bazali makila moko mpe ekozala likambo ya nkele penza na miso ya Nzambe.
18 "Do not marry a woman as rival to her sister, sleeping with her while the sister is still living. Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mwasi na yo, wana mwasi na yo azali nanu na bomoi, noki te ekoyeisa bombanda.
19 "Do not approach a woman for sex during her monthly impurity. Okosangisa nzoto te na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza, pamba te azali mbindo.
20 "Do not have sex with your neighbor's wife, making yourself unclean by her. Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.
21 "Do not give any of your children to be passed through the fire to Molech, desecrating your Father's name. I am your Father. Okopesa moko kati na bana na yo te lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, pamba te osengeli te kobebisa lokumu ya Kombo ya Nzambe na yo. Ngai nazali Yawe.
22 "You must not have sexual relations with a male as with a woman; it is detestable. Okosangisa nzoto te na mwana mobali ndenge basangisaka nzoto na mwana mwasi ; ezali likambo ya nkele.
23 "Do not have sex with any animal, making yourself unclean; a woman must not present herself to an animal to mate with it. That is a perversion. Okosangisa nzoto te na nyama, noki te okokoma mbindo elongo na yango. Ndenge moko mpe mwasi akosangisa nzoto te na nyama : ezali kotiola Nzambe.
24 "Do not make yourselves unclean by any of these, for by all of them the nations I'm driving out before you became unclean. Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo.
25 The land was made unclean, so I called it to account for its guilt, and it vomited out those living there. Lokola mboka yango moko mpe ekomaki mbindo, napesaki yango mpe etumbu mpo na lisumu na yango ; bongo esanzaki bavandi na yango.
26 Keep my rules and laws. None of you—native or foreigner among you—may do any of these detestable things. Kasi, ezala mwana mboka to mopaya oyo bazali kati na bino, bosengeli kotosa malako mpe bikateli na Ngai ; mpe bosengeli koboya kosala makambo nyonso oyo ya nkele na miso ya Nzambe.
27 For the people of the land before you did all these detestable things, and it was made unclean. Pamba te bato oyo bazalaki kovanda na mboka oyo liboso na bino babandaki kosala makambo oyo nyonso, bongo mboka ekomaki mbindo.
28 Let the land not vomit you out for making it unclean, as it vomited out the nation before you. Bino bokeba ete bokomisa mboka mbindo te, mpo ete yango esanza bino te ndenge esanzaki bato ya bikolo oyo bazalaki liboso na bino.
29 "Anyone who does any of these detestable things will be cut off from among their people. Moto nyonso oyo akosala moko ya makambo oyo ya nkele na miso ya Nzambe, esengeli balongola ye kati na bato na ye.
30 So keep my charge: do none of the detestable customs practiced before you, and do not make yourselves unclean by them. I am your Father." Boye, bobatela malako na Ngai mpe bolanda ata likambo moko te kati na makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso ete bino boya, mpo ete bomikomisa mbindo te na nzela na yango. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]