Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 52 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Zedekiah, twenty-one at his crowning, ruled Jerusalem eleven years. His mother was Hamutal, daughter of Jeremiah of Libnah. Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki Amutali, mwana ya Jeremi, moto ya Libina.
2 He did evil in our Father's eyes, just as Jehoiakim had done. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki.
3 This came to Jerusalem and Judah from our Father's anger, until he cast them from his presence. Then Zedekiah rebelled against the king of Babylon. Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.
4 In the ninth year of his reign, tenth month, tenth day, Nebuchadnezzar king of Babylon came against Jerusalem with his whole army, camped against it, and built a siege wall around it. Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango na libanda ya engumba mpe batimolaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.
5 So the city was besieged until the eleventh year of King Zedekiah. Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi.
6 In month four, day nine, famine gripped the city; no food remained for the people of the land. Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba, mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te,
7 Then the city was breached. All the soldiers fled, slipping out by night through the gate between the two walls near the king's garden, while the Babylonians surrounded the city, and they headed toward the Arabah. bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
8 But Babylonian troops chased the king and caught Zedekiah on Jericho's plains, and his whole army scattered from him. Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi Sedesiasi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki mpe bapanzanaki.
9 They captured the king and brought him to the king of Babylon at Riblah in Hamath, who sentenced him. Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi, bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila kati na mokili ya Amati ; mpe mokonzi ya Babiloni akatelaki ye etumbu.
10 King of Babylon killed Zedekiah's sons before his eyes, and killed all Judah's officials at Riblah too. Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso ya Sedesiasi. Mokonzi ya Babiloni apesaki lisusu mitindo ete baboma bakalaka nyonso ya Yuda.
11 He blinded Zedekiah, bound him with bronze chains, and Babylon's king brought him to Babylon, imprisoned until his death. Bongo, atobolaki miso ya Sedesiasi, akangaki ye minyololo ya bibende mpe amemaki ye na Babiloni. Mokonzi ya Babiloni abwakaki ye na boloko kino na mokolo oyo akufaki.
12 In the fifth month, the tenth day—Nebuchadnezzar's nineteenth year—Nebuzaradan, captain of the guard, King Nebuchadnezzar's servant, came to Jerusalem. Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, oyo azalaki kosala esika moko na mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya zomi ya sanza ya mitano.
13 He burned our Father's house, the king's house, and all Jerusalem's houses—every great house he burned with fire. Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.
14 All the Babylonian army with the guard commander tore down all the walls surrounding Jerusalem. Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.
15 Nebuzaradan, captain of the guard, deported some of the poorest people, those remaining in the city, the deserters who defected to Babylon's king, and the rest of the craftsmen. Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu ndambo ya babola, ndambo ya bato oyo batikalaki kati na engumba, ndambo ya bato ya misala ya maboko mpe ba-oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni.
16 But Nebuzaradan, captain of the guard, left some of the land's poorest to work vineyards and fields. Kasi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga.
17 The bronze pillars of our Father's house, and the stands and bronze sea in our Father's house—the Babylonians smashed them and carried all the bronze to Babylon. Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango nyonso na Babiloni bisalelo.
18 They took the pots, shovels, wick trimmers, basins, dishes, and all bronze vessels used for temple service. Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo : basani ya putulu, bapawu, bambeli, basani ya kobwakela mayi, bakopo.
19 The captain of the guard also took the small bowls, fire pans, basins, pots, lampstands, incense dishes, and drink-offering bowls—whatever was gold as gold, whatever was silver as silver. Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : basani ya minene, bambabola, basani ya kobwakela mayi, basani ya putulu, bitelemiselo ya minda, bakopo mpe milangi mpo na makabo ya masanga.
20 The two pillars, the bronze sea, twelve bronze bulls under the stands, which King Solomon made for our Father's house—the bronze of it all could not be weighed. Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo mokonzi Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki kosimba nzungu ya monene mpe bashario.
21 Each pillar stood about twenty-seven feet tall, eighteen feet around, with walls three inches thick, and hollow. Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa, na bosanda, mpe bametele pene motoba, na kovimba na yango ; bongo bronze oyo basalelaki yango ezalaki evimba na basantimetele pene mwambe, mpe ezalaki polele na kati.
22 Its bronze capital was about seven and a half feet high, with a network and pomegranates all around, all bronze. The second pillar matched, with pomegranates. Basalaki na bronze moto ya likonzi moko na moko, mpe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe na bambuma ya grenade ; nyonso esalemaki na bronze.
23 Ninety-six pomegranates on the sides; the pomegranates totaled one hundred on the network all around. Bangambo nyonso ezalaki na bambuma ya grenade tuku libwa na motoba mpe motango nyonso ya bambuma ya grenade oyo ezalaki zingazinga ya basinga oyo basala lokola basheni ezalaki nkama moko.
24 The guard commander took Seraiah the chief priest, Zephaniah the second priest, and the three doorkeepers, Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko : Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.
25 from the city he took the officer over the soldiers, seven of the king's advisers found in the city, the army commander's secretary who mustered the people of the land, and sixty men of the land found in the city. Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba ; bapesi toli sambo ya mokonzi, oyo batikalaki kati na engumba ; mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga ; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba.
26 Nebuzaradan, captain of the guard, took them to the king of Babylon at Riblah. Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila.
27 Babylon's king struck them down and killed them at Riblah in Hamath. Judah went into exile from its land. Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.
28 This is the number of the people Nebuchadnezzar exiled: in the seventh year, 3,023 Judeans; Tala motango ya bato oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu : Bayuda nkoto misato na tuku mibale na misato, na mobu ya sambo wuta tango akomaki mokonzi ;
29 in the eighteenth year of Nebuchadnezzar, 832 persons from Jerusalem; Bayuda nkama mwambe na tuku misato na mibale oyo bawutaki na Yelusalemi, na mobu ya zomi na mwambe wuta tango Nabukodonozori akomaki mokonzi ;
30 in Nebuchadnezzar's twenty-third year, Nebuzaradan the guard commander exiled 745 Judeans; the total was 4,600 people. bongo na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Nabukodonozori, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu Bayuda nkama sambo na tuku minei na mitano. Bango nyonso bazalaki bato nkoto minei na nkama motoba.
31 In the thirty-seventh year of Jehoiachin king of Judah's exile, on the twelfth month's twenty-fifth day, Evil-merodach king of Babylon, in his first year, favored Jehoiachin king of Judah and freed him from prison. Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi.
32 He spoke kindly to him, setting his throne above other kings' thrones with him in Babylon. Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni ;
33 So Jehoiachin took off his prison clothes and ate at the king's table every day, all his life. apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.
34 The king of Babylon gave him a daily allowance all his life, until the day he died. Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye kino na mokolo ya kufa na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]