Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Judah's sin is engraved with an iron pen, inscribed with a diamond point on the tablet of their heart and on the horns of their altars, « Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama ; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.
2 "while their children remember their altars and their Asherah poles beside the green trees on the high hills. Ndenge bakanisaka bana na bango ya mibali, ndenge wana mpe bakanisaka bitumbelo na bango mpe makonzi ya Ashera, nzambe mwasi, pembeni ya banzete ya mibesu na likolo ya bangomba.
3 My mountain in the open country, your wealth and all your treasures I will hand over as plunder, your high places too, because of the sin throughout your territory. Oh ngomba na Ngai kati na mokili, nakokaba lokola bomengo ya bitumba : biloko na yo, bozwi na yo nyonso mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.
4 By your own hand you will lose the inheritance I gave you, and I will make you serve your enemies in a land you do not know, for you have kindled a fire in my anger that will burn forever. Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te ; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »
5 This is what our Father says: Cursed is the one who trusts in mere humans, who relies on human strength, and whose heart turns away from me. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto, oyo ayekamelaka eloko ya pete mpe atalelaka Yawe te, alakelama mabe !
6 He will be like a bush in the wasteland that never finds relief even when it comes, dwelling in the parched places of the desert, in a salt land where no one lives. Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ; akomona bolamu te tango ekoya, akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe, na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te.
7 But blessed is the one who trusts in me, whose confidence is in me. Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe mpe atalelaka Ye apambolama !
8 He will be like a tree planted by water, sending out its roots by the stream. It has no fear when heat comes; its leaves stay green. It is not anxious in the year of drought and never stops bearing fruit. Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi : ezalaka na somo ya moyi makasi te ; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »
9 The heart is more deceitful than anything else and beyond cure—who can understand it? Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?
10 I, your Father, search the heart and test the mind, to repay each person according to their ways, according to what their deeds deserve. « Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »
11 Like a partridge hatching eggs it did not lay is the one who gains riches unjustly. At midlife the riches will desert him, and in the end he will prove to be a fool." Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.
12 A glorious throne, exalted from the beginning, is the place of our sanctuary. Kiti ya Bokonzi ya nkembo, oyo enetolama wuta na ebandeli ezali nde Esika na biso ya bule.
13 Our Father, hope of Israel, all who forsake you will be put to shame. Those who turn away from you will be written in the dust, because they have abandoned our Father, the spring of living water. Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.
14 Heal me, my Father, and I will be healed; save me, and I will be saved, for you are the one I praise. Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo !
15 Look, they keep saying to me, "Where is the word of God? Let it come now!" Tala, bato oyo bazali koloba na ngai : « Wapi Liloba na Yawe ? Tika ete ekokisama sik’oyo ! »
16 But I have not run away from being a shepherd in your service, nor have I longed for the day of despair. You know what passed my lips; it lay open before you. Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele oyo alandaka nzela na Yo. Oyebi malamu ete nazalaki na posa ya komona mokolo ya pasi te. Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai ebimaka nde liboso na Yo.
17 Do not become a terror to me; you are my refuge in the day of disaster. Kobangisa ngai te, pamba te ozali Ekimelo na ngai na tango ya pasi !
18 Let my persecutors be put to shame, but not me; let them be shattered, but not me. Bring on them the day of disaster; shatter them with double destruction. Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, kasi batela ngai ete nayokisama soni te ! Tika ete bango balenga na somo, kasi ngai nalenga na somo te. Tindela bango mokolo ya pasi, bebisa bango malamu mbala mibale.
19 What our Father told me: Go stand at the People's Gate, where Judah's kings come and go, and at all Jerusalem's gates, Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi.
20 and tell them: Hear the word of our Father, kings of Judah, all Judah, and everyone in Jerusalem who enters these gates. Loba na bango : ‹ Oh bino bakonzi mpe bato nyonso ya Yuda elongo na bino nyonso bavandi ya Yelusalemi, bino oyo bokotelaka na bikuke oyo, boyoka Liloba na Yawe !
21 This is what our Father says: Guard your lives—carry no load on the Sabbath, or bring one through Jerusalem's gates. Tala liloba oyo Yawe alobi : Bosala keba ete moko te kati na bino amema mikumba na mokolo ya Saba to alekisa yango na bikuke ya Yelusalemi ;
22 Don't carry a load from your houses on the Sabbath, or do any work, and keep the Sabbath holy, as I commanded your ancestors. moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino.
23 They would not listen or pay attention; they stiffened their necks, refusing to hear or accept correction. Nzokande, baboyaki koyoka, bayeisaki mito na bango makasi mpo na koboya kaka koyoka mpe kolanda mitindo na Ngai.
24 But if you truly listen to me, declares our Father, and bring no load through this city's gates on the Sabbath, and keep the Sabbath holy, doing no work on it, Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba,
25 then kings and princes who sit on David's throne will enter this city's gates, riding chariots and horses—they, their officials, the men of Judah, and Jerusalem's residents—and this city will remain inhabited forever. bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango ; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi ; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo.
26 People will come from Judah's towns, Jerusalem's outskirts, Benjamin's land, lowlands, hills, and Negev, bringing burnt offerings, sacrifices, grain offerings, incense, and thank offerings to our Father's house. Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi ; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe.
27 But if you won't listen to me—keep the Sabbath holy, carry no load through Jerusalem's gates on the Sabbath—I'll light a fire in its gates that can't be put out, consuming Jerusalem's palaces. Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]