Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word of our Father came to me: Yawe alobaki na ngai :
2 "You must not take a wife, and you must not have sons or daughters in this place." « Okobala te mpe okotikala kobota bana mibali to bana basi na esika oyo te. »
3 For our Father says this about sons and daughters born here, their mothers who bore them, and their fathers who fathered them in this land: Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bana mibali mpe bana basi oyo bakobotama na mboka oyo, mpe na tina na basi oyo bazali bamama na bango mpe mibali oyo bazali batata na bango :
4 They'll die of deadly diseases, unmourned, unburied, like dung on the ground. Sword and famine will finish them; their corpses will feed the birds of the sky and beasts of the earth. « Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »
5 This is what our Father says: Don't enter a mourning house, don't go to lament or grieve for them, for I've withdrawn my peace from this people, declares our Father—my covenant love and compassion. Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Kokota na ndako oyo ezali na matanga te, kokende na matanga te mpe koyokela bato oyo bazali na matanga mawa te, pamba te nalongoli kimia na Ngai, bolingo na Ngai mpe mawa na Ngai epai ya bato oyo, » elobi Yawe,
6 Great and small will die unburied in this land: none will mourn, cut themselves, or shave their heads for them. « ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango.
7 No one breaks bread with mourners to comfort them over the dead, or gives them the cup of comfort for father or mother. Moto moko te akopesa bilei mpo na kobondisa bato oyo bazali na matanga sima na kufa, mpe moto moko te akopesa bango masanga mpo na kobondisa bango, ezala ata mpo na kufa ya batata to ya bamama na bango.
8 And do not enter a house of feasting to sit with them, to eat and drink. Mpe kokota te na ndako oyo bazali kosala feti mpo na kovanda mpe komela,
9 So says the Father of heaven's armies, the Father of Israel: Before your eyes, in your days, I will silence in this place the sound of joy and gladness, the voices of bridegroom and bride. pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakosilisa kati na esika oyo, na miso na bino mpe na tango na bino, makelele ya esengo mpe makelele ya kosepela, mingongo ya babalani mpe ya babandami na libala.
10 When you tell this people all these words, they'll ask, 'Why has our Father decreed this great disaster against us? What's our guilt, what our sin, that we sinned against our Father?' Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo : ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye ? Mabe nini tosalaki Ye ? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso ? ›
11 Then tell them: Because your fathers abandoned me, declares our Father, followed other gods, served and bowed to them, abandoned me, and disregarded my instruction. Okoloba na bango : ‹ Ezali mpo ete batata na bino basundolaki Ngai, › elobi Yawe, ‹ basalaki banzambe ya bapaya, basalelaki yango mpe bafukamelaki yango. Batikaki Ngai mpe babatelaki Mobeko na Ngai te.
12 You've done worse than your ancestors, each following his own stubborn, evil heart, not listening to me. Bongo bino, bozali mpe kotambola na ezaleli mabe koleka ata ezaleli mabe ya batata na bino. Botala ndenge nini moko na moko kati na bino azali kolanda makanisi mabe ya motema na ye, na esika ya kotosa Ngai.
13 So I'll throw you from this land into one you and your fathers never knew, to serve other gods there day and night, since I'll show you no favor. Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›
14 "Days are coming," declares our Father, "when it will no longer be said, 'As our Father lives, who brought Israel up from Egypt,' Yango wana, na mikolo oyo ezali koya, » elobi Yawe, « bato bakotika koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; ›
15 but, 'As our Father lives, who brought Israel's people up from the north and from all the lands where he had driven them.' For I will bring them back to their land that I gave their fathers. kasi bakokoma koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na mokili ya nor mpe na mikili nyonso epai wapi abenganaki bango. › Nakozongisa bango na mokili na bango, mokili oyo napesaki bakoko na bango.
16 "Look, I am sending for many fishermen, declares our Father; they will catch them. Then for many hunters, who will hunt them from every mountain, every hill, and the rock crevices. Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.
17 For my eyes are on all their ways, not hidden from my face, nor their guilt from my eyes. Nazali kotala malamu banzela na bango nyonso ; moto moko te akoki kobombama na miso na Ngai, mpe masumu na bango ekoki ata moke te kobombama na miso na Ngai.
18 First I will repay their guilt and sin doubly—for making my land unclean with the corpses of their vile idols, and filling my inheritance with their detestable things." Nakofutisa bango mbala mibale lifuti ya mabe na bango mpe ya masumu na bango, pamba te bakomisi mokili na Ngai mbindo na nzela ya bililingi mpe ya bikeko na bango oyo ezanga bomoi, mpe batondisi libula na Ngai na banzambe na bango ya bikeko mpe ya nkele. »
19 My Father, my strength and my stronghold, my refuge in the day of trouble—to you the nations will come from the ends of the earth and say, "Our fathers inherited nothing but lies, worthless things that are of no use. Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.
20 Can a person make gods for himself? Yet these are not gods!" Boni, bato bakoki solo komisalela banzambe, tango bango moko bazali banzambe te ?
21 "Therefore, look—this time I will make them know; I will make them know my hand and my might, and they will know that my name is the Father." Yango wana, nakolakisa bango, nakolakisa bango nguya mpe makasi na ngai ; bongo bakoyeba penza ete Kombo na Ngai ezali Yawe. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]