Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

James 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 My brothers and sisters, not many of you should become teachers, since we teachers face stricter judgment. Bandeko na ngai, bozala ebele te ya koluka kozala balakisi, pamba te boyebi malamu ete, biso balakisi, tokosambisama makasi.
2 For we all stumble in many ways. Anyone who never stumbles in speech is a mature man, able to control his whole body too. Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.
3 If we put bits in horses' mouths to make them obey us, we guide their whole bodies too. Soki totiaka ebende na monoko ya mpunda, ezali mpo ete etosa biso ; mpe na nzela wana, tokambaka nzoto na yango nyonso.
4 Consider ships too: though large and driven by strong winds, a tiny rudder steers them wherever the pilot wants. Tala masuwa : atako ezali monene mpe mopepe makasi etindikaka yango, kasi mwa yenda moke nde ekambaka yango mpo ete elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi komema yango.
5 So too the tongue is a small body part, yet boasts great things. See how small a fire sets ablaze a great forest! Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo : ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene !
6 The tongue is a fire, a world of wickedness placed among our body's parts. It stains the whole body, sets the whole course of life ablaze, and is itself set ablaze by hell. Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.
7 Every kind of beast, bird, reptile, and sea creature is tamed, and has been tamed, by humankind, Moto azali na makoki ya kokonza lolenge nyonso ya banyama, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bambisi, mpe akonza yango penza.
8 but no human being can tame the tongue. It is a restless evil, full of deadly poison. Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango : ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka.
9 With it we bless our Father; with it we curse people made in the likeness of our Father. Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye.
10 From the same mouth come blessing and cursing. My brothers and sisters, this should not be. Ezala lipamboli to elakeli mabe, nyonso ebimaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, esengelaki te kozala bongo.
11 Does a spring pour out both fresh and bitter water from the same opening? Boni, etima moko ekoki kobimisa mayi ya peto mpe mayi ya mbindo ?
12 Brothers and sisters, can a fig tree bear olives, or a vine figs? Neither can a salt spring yield fresh water. Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki solo kobota bambuma ya olive ? Nzete ya vino ekoki solo kobota bambuma ya figi ? Boni, ekoki kosalema ete etima ya mayi ya mungwa ebimisa mayi ya malamu ?
13 Who is wise and understanding among you? Let him show his deeds through good conduct, in wisdom's humility. Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele ? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.
14 But if bitter envy and selfish ambition fill your heart, don't boast or lie against the truth. Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo mpe na molimo ya koswana, wana botika komikumisa ete bozali bato ya bwanya ; pamba te yango ezali solo te, ezali lokuta.
15 This is not the wisdom that comes down from above, but is earthly, unspiritual, demonic. Bwanya ya ndenge wana ewutaka na Likolo te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto, ya Satana.
16 For where there is jealousy and selfish ambition, there will be disorder and every vile practice. Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.
17 Wisdom from above: pure first, then peace-loving, gentle, reasonable, full of mercy and good fruit, unbiased, sincere. Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.
18 And the harvest of righteousness is sown in peace by those who make peace. Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]