Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Isaiah 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the year King Uzziah died, I saw the Lord Jesus seated on a throne, high and lifted up, and the hem of his robe filled the temple. Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.
2 Above him stood seraphim, each with six wings: two covered the face, two covered the feet, two flew. Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.
3 They called to one another: "Holy, holy, holy is our Father, Son, and Holy Spirit, the Lord of heaven's armies; the whole earth is full of his glory." Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu : « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! »
4 At the sound of their voices the thresholds' foundations shook, and the house filled with smoke. Na makelele ya mingongo na bango, mabaya oyo esimbaka bikuke ekomaki koningana, mpe Tempelo etondaki na milinga.
5 Then I said: "Woe to me! I'm ruined! I'm a man of unclean lips living among people of unclean lips—and my eyes have seen the King, Jesus, the Lord of all heaven's armies!" Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »
6 Then one of the seraphim flew to me with a glowing coal in his hand, taken with tongs from the altar. Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai ;
7 He touched my mouth with it and said, "See, this touched your lips; your guilt is removed, your sin atoned for." atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki : « Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo, mabe na yo esili kolongwa, masumu na yo esili kolimbisama. »
8 Then I heard the voice of our Lord Jesus saying, "Whom should I send? Who will go for us?" I said, "Here I am. Send me." Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba : — Nakotinda nani ? Nani akokende mpo na biso ? Nazongisaki : — Ngai oyo, tinda ngai !
9 He said, "Go, tell this people: 'Keep hearing, but never understand; keep seeing, but never perceive.' Yawe alobaki na ngai : — Kende koloba na bato oyo : « Boyoka na bino, kasi bokososola te ; botala na bino, kasi bokomona te !
10 Make the heart of this people calloused; make their ears dull and their eyes blind—so they will not see with their eyes, hear with their ears, understand with their hearts, and turn and be healed." Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te ! »
11 Then I said, "How long, Lord Jesus?" He answered: "Until cities lie ruined and empty, houses without people, the land left utterly desolate, Boye nalobaki : — Oh Nkolo, kino tango nini ? Azongisaki : — Kino bingumba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te, kino tango bato bakotikala lisusu na bandako te, mpe bilanga ekobebisama mpe bakosakanela yango ;
12 "Until our Father has sent the people far away, and vast emptiness covers the land. kino tango Yawe akotinda bato mosika, kino tango bakobosana penza mokili libela.
13 And though a tenth remains in it, it will be burned again—like a terebinth or an oak whose stump remains when it is felled. The holy seed is its stump." Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]