Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When humanity began to multiply on the earth and daughters were born to them, Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi,
2 the sons of divine origin saw the daughters of human origin were beautiful, and took as wives any they chose. milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.
3 Then our Father said, "My Spirit will not wrestle with humanity forever, for they are flesh; their days will be 120 years." Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
4 The Nephilim were on the earth in those days, and afterward too, when the sons of divine origin came to the daughters of human origin, who bore them children. These were the mighty men of old, men of renown. Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango.
5 Our Father saw how great human wickedness had become on the earth—every thought and desire of their hearts only evil all the time. Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe.
6 He was grieved he had made humanity on the earth, and his heart filled with pain. Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye.
7 So our Father said, "I will wipe out humanity, whom I created, from the face of the earth—people, animals, crawling things, and birds of the sky—for I regret making them." Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
8 But Noah found favor in the eyes of our Father. Kasi Noa azwaki ngolu na miso ya Yawe.
9 This is Noah's account. Noah was a righteous man, blameless among the people of his time, and Noah walked faithfully with our Father. Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.
10 And Noah had three sons: Shem, Ham, and Japheth. Noa azalaki na bana mibali misato : Semi, Cham mpe Jafeti.
11 The earth was corrupt before our Father, and filled with violence. Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.
12 Our Father saw the earth was corrupt, for all flesh had corrupted their ways on the earth. Nzambe amonaki ndenge mokili ebebaki, pamba te bato nyonso ya mokili babebisaki banzela na bango.
13 Then our Father said to Noah, "The end of all flesh has come before me, for the earth is full of violence because of the people. I am going to destroy them with the earth. Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.
14 Build yourself an ark of cypress wood; make rooms in it and coat it inside and out with pitch. Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango.
15 Make it like this: the ark about 450 feet long, seventy-five feet wide, forty-five feet high. Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
16 Make a roof for the ark, finishing it eighteen inches from the top. Put a door in its side, and build it with lower, middle, and upper decks. Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato.
17 I myself am bringing floodwaters on the earth to destroy all flesh with the breath of life in it under the heavens; everything on the earth will die. Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi : ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa.
18 But I will establish my covenant with you, and you will enter the ark—you, your sons, your wife, and your sons' wives with you. Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa : yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo.
19 Bring two of every living creature into the ark to keep alive with you—a male and a female. Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo.
20 Of the birds by kind, the animals by kind, every crawling thing of the ground by kind, two of each will come to you to be kept alive. Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu ; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi.
21 Take every kind of food that can be eaten and store it up; it will be food for you and for them." Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. »
22 Noah did everything just as our Father commanded him. Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]