Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is the written record of Adam's descendants. When our Father created humankind, he made them in the likeness of God. Tala lisolo ya libota ya Adamu. Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe.
2 He created them male and female, blessed them, and named them Humankind when they were created. Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. »
3 At 130, Adam fathered a son in his likeness, after his image, and named him Seth. Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »
4 After he fathered Seth, Adam lived 800 years and had other sons and daughters. Sima na mbotama ya Seti, Adamu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
5 Altogether, Adam lived 930 years, and then he died. Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki.
6 When Seth had lived 105 years, he fathered Enosh. Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi.
7 After he fathered Enosh, Seth lived 807 years and had other sons and daughters. Sima na kobota Enoshi, Seti awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
8 Altogether, Seth lived 912 years, and then he died. Mibu nyonso oyo Seti awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi na mibale, sima akufaki.
9 When Enosh had lived ninety years, he fathered Kenan. Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena.
10 After he fathered Kenan, Enosh lived 815 years and had other sons and daughters. Sima na kobota Kena, Enoshi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
11 Altogether, Enosh lived 905 years, and then he died. Mibu nyonso oyo Enoshi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na mitano, sima akufaki.
12 When Kenan had lived seventy years, he fathered Mahalalel. Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele.
13 After he fathered Mahalalel, Kenan lived 840 years and had other sons and daughters. Sima na kobota Maalalele, Kena awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku minei mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
14 Altogether, Kenan lived 910 years, and then he died. Mibu nyonso oyo Kena awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi, sima akufaki.
15 When Mahalalel had lived sixty-five years, he fathered Jared. Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi.
16 After he fathered Jared, Mahalalel lived 830 years and had other sons and daughters. Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
17 Altogether, Mahalalel lived 895 years, and then he died. Mibu nyonso oyo Maalalele awumelaki na bomoi ezalaki nkama mwambe na tuku libwa na mitano, sima akufaki.
18 When Jared had lived 162 years, he fathered Enoch. Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki.
19 After he fathered Enoch, Jared lived 800 years and had other sons and daughters. Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
20 Altogether, Jared lived 962 years, and then he died. Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki.
21 When Enoch had lived sixty-five years, he fathered Methuselah. Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi.
22 After fathering Methuselah, Enoch walked with our Father 300 years, and had other sons and daughters. Sima na kobota Metusalemi, Enoki azalaki kosala mokano ya Nzambe mibu nkama misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
23 Altogether, Enoch lived 365 years. Mibu nyonso oyo Enoki awumelaki na bomoi ezalaki nkama misato na tuku motoba na mitano.
24 Enoch walked faithfully with our Father; then he was gone, because our Father took him. Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe ; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye.
25 When Methuselah had lived 187 years, he fathered Lamech. Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki.
26 After he fathered Lamech, Methuselah lived 782 years and had other sons and daughters. Sima na kobota Lemeki, Metusalemi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama sambo na tuku mwambe na mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
27 Altogether, Methuselah lived 969 years, and then he died. Mibu nyonso oyo Metusalemi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na libwa, sima akufaki.
28 When Lamech had lived 182 years, he fathered a son. Tango Lemeki akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na mibale ya mbotama, abotaki mwana mobali.
29 He named him Noah, saying, "He will comfort us in our work and painful toil of our hands, from the ground our Father cursed." Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. »
30 After he fathered Noah, Lamech lived 595 years and had other sons and daughters. Sima na kobotama ya Noa, Lemeki awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mitano na tuku libwa na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
31 Altogether, Lamech lived 777 years, and then he died. Mibu nyonso oyo Lemeki awumelaki na bomoi ezalaki nkama sambo na tuku sambo na sambo, sima akufaki.
32 When Noah was 500 years old, he fathered Shem, Ham, and Japheth. Tango Noa akokisaki mibu nkama mitano ya mbotama, abotaki Semi, Cham mpe Jafeti.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]